< תהילים 71 >

בך-יהוה חסיתי אל-אבושה לעולם 1
Yawe, ozali ebombamelo na ngai; kondima te ete nayoka soni!
בצדקתך תצילני ותפלטני הטה-אלי אזנך והושיעני 2
Na bosembo na Yo, kangola mpe bikisa ngai. Yoka ngai mpe bikisa ngai.
היה לי לצור מעון לבוא-- תמיד צוית להושיעני כי-סלעי ומצודתי אתה 3
Zala mpo na ngai ekimelo ya libanga epai wapi nakoki kokende tango nyonso. Ozwaki mokano ya kobikisa ngai, pamba te ozali libanga mpe ndako na ngai batonga makasi.
אלהי--פלטני מיד רשע מכף מעול וחומץ 4
Nzambe na ngai, kangola ngai wuta na maboko ya bato mabe, na maboko ya batomboki mpe bato na kanza.
כי-אתה תקותי אדני יהוה מבטחי מנעורי 5
Nkolo Yawe, ozali elikya na ngai; wuta bolenge na ngai, namipesaka na Yo.
עליך נסמכתי מבטן--ממעי אמי אתה גוזי בך תהלתי תמיד 6
Wuta mbotama na ngai, natalelaka Yo; Yo nde obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai. Nakokumisa Yo tango nyonso.
כמופת הייתי לרבים ואתה מחסי-עז 7
Nazali likamwisi mpo na bato ebele; ozali ebombamelo na ngai ya makasi.
ימלא פי תהלתך כל-היום תפארתך 8
Tika ete monoko na ngai etonda na masanzoli mpo na lokumu na Yo; tika ete etatolaka tango nyonso kongenga ya nkembo na Yo.
אל-תשליכני לעת זקנה ככלות כחי אל-תעזבני 9
Kobwaka ngai te awa nakomi mobange, kotika ngai te awa makasi na ngai ekomi kosila.
כי-אמרו אויבי לי ושמרי נפשי נועצו יחדו 10
Pamba te banguna na ngai bazali koloba mabe na tina na ngai, mpe bato oyo balukaka koboma ngai basaleli ngai likita.
לאמר אלהים עזבו רדפו ותפשוהו כי-אין מציל 11
Bazali koloba: « Nzambe asundoli ye; bolanda ye, bokanga ye; moto oyo akokangola ye azali te! »
אלהים אל-תרחק ממני אלהי לעזרתי חישה (חושה) 12
Oh Nzambe, kozala mosika na ngai te! Nzambe na ngai, yaka noki mpo na kosunga ngai.
יבשו יכלו שטני נפשי יעטו חרפה וכלמה--מבקשי רעתי 13
Tika ete bato oyo bafundaka ngai bakufa soni mpe balimwa! Tika ete ba-oyo balukaka pasi na ngai basambwa mpe bayokisama soni!
ואני תמיד איחל והוספתי על-כל-תהלתך 14
Kasi ngai, nakozala na elikya tango nyonso mpe nakokoba kokumisa Yo.
פי יספר צדקתך--כל-היום תשועתך כי לא ידעתי ספרות 15
Monoko na ngai ekosakola tango nyonso misala ya bosembo mpe ya lobiko na Yo, pamba te nayebi motango na yango te.
אבוא--בגברות אדני יהוה אזכיר צדקתך לבדך 16
Nkolo Yawe, nakoya epai na Yo mpe nakotatola misala na Yo ya nguya; nakotatola misala malamu ya bosembo na Yo, misala ya bosembo na Yo kaka.
אלהים למדתני מנעורי ועד-הנה אגיד נפלאותיך 17
Nzambe, wuta bolenge na ngai, oteya ngai; mpe kino lelo, nazali kotatola bikamwa na Yo.
וגם עד-זקנה ושיבה-- אלהים אל-תעזבני עד-אגיד זרועך לדור לכל-יבוא גבורתך 18
Ezala ndenge nakomi sik’oyo mobange mpe suki na ngai ekomi pembe, oh Nzambe na ngai, kotika ngai te, mpo ete natatola makasi na Yo epai ya bato ya ekeke oyo, mpe misala ya nguya na Yo epai ya bato nyonso oyo bakoya sima.
וצדקתך אלהים עד-מרום אשר-עשית גדלות אלהים מי כמוך 19
Nzambe, bosembo na Yo ekenda kino na likolo, pamba te osalaka makambo minene. Oh Nzambe, nani akokani na Yo?
אשר הראיתנו (הראיתני) צרות רבות-- ורעות תשוב תחינו (תחיני) ומתהמות הארץ תשוב תעלני 20
Atako osalaki ete tokutana na pasi mingi mpe na makambo ya bololo, kasi okotika lisusu biso kozala na bomoi, okobimisa ngai lisusu wuta na mozindo ya mabele.
תרב גדלתי ותסב תנחמני 21
Okomatisa lisusu lokumu na ngai, mpe okobondisa ngai lisusu.
גם-אני אודך בכלי-נבל-- אמתך אלהי אזמרה לך בכנור-- קדוש ישראל 22
Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda mpo na boyengebene na Yo; Mosantu ya Isalaele, nakobeta lindanda mpo na lokumu na Yo.
תרננה שפתי כי אזמרה-לך ונפשי אשר פדית 23
Nakoganga na esengo tango nakoyemba banzembo mpo na lokumu na Yo, pamba te okangoli bomoi na ngai.
גם-לשוני-- כל-היום תהגה צדקתך כי-בשו כי-חפרו מבקשי רעתי 24
Lolemo na ngai ekotatola tango nyonso misala ya bosembo na Yo, pamba te bato oyo balukaka pasi na ngai bayokisami soni mpe basambwe.

< תהילים 71 >