< תהילים 148 >

הללו-יה הללו את-יהוה מן-השמים הללוהו במרומים 1
Bokumisa Yawe! Bokumisa Yawe wuta na likolo, bokumisa Ye na bisika oyo eleki likolo.
הללוהו כל-מלאכיו הללוהו כל-צבאו 2
Bokumisa Ye, bino ba-anjelu na Ye nyonso; bokumisa Ye, bino mampinga na Ye nyonso;
הללוהו שמש וירח הללוהו כל-כוכבי אור 3
bokumisa Ye, bino moyi mpe sanza; bokumisa Ye, bino minzoto nyonso oyo engengaka;
הללוהו שמי השמים והמים אשר מעל השמים 4
bokumisa Ye, bino oyo boleki likolo kati na likolo, mpe bino mayi oyo bozali na likolo!
יהללו את-שם יהוה כי הוא צוה ונבראו 5
Tika ete ekumisa Kombo ya Yawe! Pamba te apesaki mitindo, mpe ekelamaki.
ויעמידם לעד לעולם חק-נתן ולא יעבור 6
Atiaki yango mpo na libela; apesaki mibeko oyo ekobongwana te.
הללו את-יהוה מן-הארץ-- תנינים וכל-תהמות 7
Bokumisa Yawe wuta na mokili, ezala bilima ya mayi to mozindo nyonso,
אש וברד שלג וקיטור רוח סערה עשה דברו 8
ezala moto to mvula ya mabanga, ezala mvula ya pembe to londende, ezala mopepe makasi oyo ekokisaka liloba na Ye;
ההרים וכל-גבעות עץ פרי וכל-ארזים 9
ezala bangomba milayi to bangomba mikuse, ezala banzete oyo ebotaka bambuma to banzete ya sedele,
החיה וכל-בהמה רמש וצפור כנף 10
ezala banyama ya zamba to bibwele nyonso, ezala bikelamu oyo etambolaka na libumu to bandeke,
מלכי-ארץ וכל-לאמים שרים וכל-שפטי ארץ 11
ezala bakonzi ya mabele to bikolo nyonso, ezala bakambi to batambolisi nyonso ya mokili,
בחורים וגם-בתולות זקנים עם-נערים 12
ezala bilenge mibali to bilenge basi, ezala bampaka to bana mike!
יהללו את-שם יהוה-- כי-נשגב שמו לבדו הודו על-ארץ ושמים 13
Tika ete bakumisa Kombo ya Yawe! Pamba te Ye moko kaka nde aleki likolo; nkembo na Ye eleki mabele mpe likolo.
וירם קרן לעמו תהלה לכל-חסידיו-- לבני ישראל עם קרבו הללו-יה 14
Abongisi elombe mokangoli mpo na bato na Ye! Ezali likambo oyo bayengebene na Ye nyonso, bana nyonso ya Isalaele, bato oyo balingaka Ye, basengeli kokumisa Yawe mpo na yango. Bokumisa Yawe!

< תהילים 148 >