< תהילים 105 >

הודו ליהוה קראו בשמו הודיעו בעמים עלילותיו 1
Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye! Bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo!
שירו-לו זמרו-לו שיחו בכל-נפלאותיו 2
Boyemba mpo na lokumu na Ye, bosanzola Ye na mindule! Botatolaka tango nyonso misala minene na Ye nyonso!
התהללו בשם קדשו ישמח לב מבקשי יהוה 3
Bosepela na Kombo na Ye ya bule! Tika ete mitema ya bato oyo balukaka Yawe etonda na esengo!
דרשו יהוה ועזו בקשו פניו תמיד 4
Bomipesa na Yawe. Bosenga makasi na Ye. Bolukaka tango nyonso elongi na Ye.
זכרו--נפלאותיו אשר-עשה מפתיו ומשפטי-פיו 5
Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalaki mpe bitumbu oyo apesaki,
זרע אברהם עבדו בני יעקב בחיריו 6
bino, bakitani ya Abrayami, mosali na Ye; bino, baponami na Ye, bana mibali ya Jakobi!
הוא יהוה אלהינו בכל-הארץ משפטיו 7
Yawe azali Nzambe na biso, mikano na Ye ekambaka mokili mobimba.
זכר לעולם בריתו דבר צוה לאלף דור 8
Akanisaka tango nyonso Boyokani na Ye, bilaka na Ye mpo na bikeke nkoto moko,
אשר כרת את-אברהם ושבועתו לישחק 9
boyokani oyo asalaki elongo na Abrayami, mpe ndayi oyo alapaki epai ya Izaki.
ויעמידה ליעקב לחק לישראל ברית עולם 10
Akokisaki bosolo na yango epai ya Jakobi lokola mobeko, epai ya Isalaele lokola boyokani ya libela na libela,
לאמר--לך אתן את-ארץ-כנען חבל נחלתכם 11
tango alobaki: « Nakopesa yo mokili ya Kanana lokola libula oyo epesameli yo! »
בהיותם מתי מספר כמעט וגרים בה 12
Na tango wana, bazalaki kaka motango moke ya bato mpe bapaya kati na yango;
ויתהלכו מגוי אל-גוי מממלכה אל-עם אחר 13
bazalaki koyengayenga longwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu, longwa na mokili moko kino na mokili mosusu.
לא-הניח אדם לעשקם ויוכח עליהם מלכים 14
Atikaki moto moko te konyokola bango; apamelaki bakonzi na tina na bango:
אל-תגעו במשיחי ולנביאי אל-תרעו 15
« Bosimba bapakolami na Ngai te, bosala mabe te epai na basakoli na Ngai! »
ויקרא רעב על-הארץ כל-מטה-לחם שבר 16
Abengisaki nzala makasi kati na mboka, azangisaki bango bilei.
שלח לפניהם איש לעבד נמכר יוסף 17
Atindaki moto moko liboso na bango: Jozefi oyo atekamaki lokola mowumbu.
ענו בכבל רגליו (רגלו) ברזל באה נפשו 18
Bakangaki makolo na ye na minyololo mpe batiaki bibende na kingo na ye,
עד-עת בא-דברו-- אמרת יהוה צרפתהו 19
kino makambo oyo Jozefi asakolaki ekokisamaki, kino Liloba na Yawe etalisaki ete Jozefi alobaki solo.
שלח מלך ויתירהו משל עמים ויפתחהו 20
Mokonzi apesaki mitindo ete bafungola ye minyololo, mokambi atikaki ye na bonsomi.
שמו אדון לביתו ומשל בכל-קנינו 21
Akomisaki ye nkolo ya ndako na ye mpe moyangeli ya biloko na ye nyonso,
לאסר שריו בנפשו וזקניו יחכם 22
mpo ete akonza bakambi na ye mpe alakisa bwanya epai ya bapesi toli ya mokonzi.
ויבא ישראל מצרים ויעקב גר בארץ-חם 23
Bongo Isalaele akendeki na Ejipito; mpe Jakobi avandaki lokola mopaya kati na mokili ya Cham.
ויפר את-עמו מאד ויעצמהו מצריו 24
Yawe asalaki ete bato na Ye babota mingi, mpe akomisaki bango makasi koleka banguna na bango.
הפך לבם לשנא עמו להתנכל בעבדיו 25
Abongolaki mitema ya banguna yango mpo ete bayina bato na Ye mpe banyokola bango makasi.
שלח משה עבדו אהרן אשר בחר-בו 26
Atindaki mosali na Ye, Moyize, mpe Aron oyo aponaki.
שמו-בם דברי אתותיו ומפתים בארץ חם 27
Na mitindo na Ye Nzambe, basalaki bikamwa kati na Ejipito, misala minene kati na mokili ya Cham.
שלח חשך ויחשך ולא-מרו את-דבריו (דברו) 28
Atindaki molili oyo ekotaki kati na mokili, mpe bato ya Ejipito batombokelaki maloba na Ye te.
הפך את-מימיהם לדם וימת את-דגתם 29
Abongolaki mayi makila, mpe abomaki mbisi na yango.
שרץ ארצם צפרדעים בחדרי מלכיהם 30
Mokili na bango etondaki na magorodo kino na bashambre ya mokonzi na bango.
אמר ויבא ערב כנים בכל-גבולם 31
Na mitindo na Ye, banzinzi oyo eswaka mpe bangungi eyaki na mboka mobimba.
נתן גשמיהם ברד אש להבות בארצם 32
Na esika ya mvula, atindelaki bango mvula ya mabanga mpe abetisaki kake kati na mokili na bango.
ויך גפנם ותאנתם וישבר עץ גבולם 33
Abebisaki bilanga na bango ya vino mpe ya figi, mpe abukaki banzete ya mboka na bango.
אמר ויבא ארבה וילק ואין מספר 34
Na mitindo na Ye, mabanki mpe makelele oyo bakokaki kotanga te esopanaki,
ויאכל כל-עשב בארצם ויאכל פרי אדמתם 35
eliaki matiti nyonso ya mobesu kati na mokili na bango, eliaki bambuma ya mabele na bango.
ויך כל-בכור בארצם ראשית לכל-אונם 36
Abomaki bana liboso nyonso kati na mokili na bango, bambuma ya liboso ya makasi na bango.
ויוציאם בכסף וזהב ואין בשבטיו כושל 37
Abimisaki Isalaele, bato na Ye, elongo na palata mpe wolo; mpe moko te atiaki tembe kati na mabota na bango.
שמח מצרים בצאתם כי-נפל פחדם עליהם 38
Ejipito esepelaki komona bango kobima, pamba te somo ya Isalaele ekangaki bango.
פרש ענן למסך ואש להאיר לילה 39
Atandaki lipata mpo na kobatela bango, mpe moto mpo na kopesa pole na butu.
שאל ויבא שלו ולחם שמים ישביעם 40
Ndenge kaka basengaki, atindelaki bango bakayi mpe atondisaki bango na bilei ya likolo.
פתח צור ויזובו מים הלכו בציות נהר 41
Afungolaki libanga, mpe mayi ebimaki, etiolaki lokola ebale kati na esobe.
כי-זכר את-דבר קדשו את-אברהם עבדו 42
Mpo ete akanisaki elaka ya bule oyo apesaki mosali na Ye, Abrayami,
ויוצא עמו בששון ברנה את-בחיריו 43
abimisaki na esengo bato na Ye, baponami na Ye na koganga ya esengo.
ויתן להם ארצות גוים ועמל לאמים יירשו 44
Apesaki bango mabele ya bikolo mosusu mpe bazwaki lokola libula mosala ya bikolo yango
בעבור ישמרו חקיו-- ותורתיו ינצרו הללו-יה 45
mpo ete babatela mitindo na Ye mpe batosa mibeko na Ye. Bokumisa Yawe!

< תהילים 105 >