< במדבר 14 >

ותשא כל העדה ויתנו את קולם ויבכו העם בלילה ההוא 1
Bato nyonso ya lisanga batombolaki mingongo na bango mpe bakomaki kolela makasi butu mobimba.
וילנו על משה ועל אהרן כל בני ישראל ויאמרו אלהם כל העדה לו מתנו בארץ מצרים או במדבר הזה לו מתנו 2
Bato nyonso ya Isalaele bakomaki koyimayima mpo na Moyize mpe Aron, mpe lisanga mobimba ekomaki koloba: « Ah, elingaki kozala malamu soki tomikufelaki na biso na Ejipito to na esobe!
ולמה יהוה מביא אתנו אל הארץ הזאת לנפל בחרב--נשינו וטפנו יהיו לבז הלוא טוב לנו שוב מצרימה 3
Boni, Yawe amemi biso na mokili oyo kaka mpo ete tokufa na mopanga? Boye basi mpe bana na biso bakokoma kaka bomengo ya bitumba. Ekozala malamu te mpo na biso ete tozonga na biso na Ejipito? »
ויאמרו איש אל אחיו נתנה ראש ונשובה מצרימה 4
Boye bakomaki kolobana bango na bango: « Tosengeli kopona mokambi mosusu mpe kozonga na Ejipito. »
ויפל משה ואהרן על פניהם לפני כל קהל עדת בני ישראל 5
Moyize mpe Aron bakweyaki elongi kino na mabele liboso ya lisanga mobimba ya bana ya Isalaele oyo basanganaki kuna.
ויהושע בן נון וכלב בן יפנה מן התרים את הארץ--קרעו בגדיהם 6
Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe Kalebi, mwana mobali ya Yefune, oyo bazalaki na molongo ya bato oyo bakendeki kononga mokili bapasolaki bilamba na bango
ויאמרו אל כל עדת בני ישראל לאמר הארץ אשר עברנו בה לתור אתה--טובה הארץ מאד מאד 7
mpe balobaki na lisanga mobimba ya Isalaele: « Mokili oyo totambolaki kati na yango mpe tonongaki ezali malamu mingi penza.
אם חפץ בנו יהוה--והביא אתנו אל הארץ הזאת ונתנה לנו ארץ אשר הוא זבת חלב ודבש 8
Soki tozwi ngolu na miso ya Yawe, akokamba biso kino na mokili yango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mpe akopesa biso yango.
אך ביהוה אל תמרדו ואתם אל תיראו את עם הארץ כי לחמנו הם סר צלם מעליהם ויהוה אתנו אל תיראם 9
Kasi botombokela Yawe te mpe bobanga te bato oyo bazali na mokili yango, pamba te tokomela bango; kobatelama na bango elongwe kati na bango. Nzokande na ngambo na biso, Yawe azali elongo na biso. Bobanga bango te. »
ויאמרו כל העדה לרגום אתם באבנים וכבוד יהוה נראה באהל מועד אל כל בני ישראל 10
Wana lisanga mobimba ya Isalaele ezalaki koloba ete baboma bango na mabanga, nkembo ya Yawe emonanaki na Ndako ya kapo ya Bokutani na miso ya bato nyonso ya Isalaele.
ויאמר יהוה אל משה עד אנה ינאצני העם הזה ועד אנה לא יאמינו בי בכל האתות אשר עשיתי בקרבו 11
Yawe alobaki na Moyize: — Kino tango nini bato oyo bakotiola Ngai? Kino tango nini bakoboya penza kondimela Ngai, ezala mpo na bikamwa nyonso oyo nasali kati na bango?
אכנו בדבר ואורשנו ואעשה אתך לגוי גדול ועצום ממנו 12
Nakokweyisa bango na nzela ya etumbu ya bokono oyo ebomaka mpo na kobebisa bango. Kasi yo, nakokomisa yo ekolo moko monene mpe ya nguya koleka bango.
ויאמר משה אל יהוה ושמעו מצרים כי העלית בכחך את העם הזה מקרבו 13
Moyize alobaki na Yawe: — Bato ya Ejipito bakoyoka yango! Nzokande ezali na nguya na Yo nde obimisaki bato oyo kati na bango.
ואמרו אל יושב הארץ הזאת שמעו כי אתה יהוה בקרב העם הזה אשר עין בעין נראה אתה יהוה ועננך עמד עלהם ובעמד ענן אתה הלך לפניהם יומם ובעמוד אש לילה 14
Mpe bakoyebisa na bavandi ya mokili oyo makambo yango. Oh Yawe, basila koyoka wuta kala ete ozalaka elongo na bato oyo, ete Yo, oh Yawe, omimonisaki epai na bango miso na miso, ete lipata na Yo etelema likolo na bango, ete otambolaka liboso na bango kati na likonzi ya lipata, na moyi, mpe kati na likonzi ya moto, na butu.
והמתה את העם הזה כאיש אחד ואמרו הגוים אשר שמעו את שמעך לאמר 15
Na bongo, soki obomi bato oyo nyonso na mbala moko, bikolo oyo eyokaki sango oyo mpo na Yo ekoloba:
מבלתי יכלת יהוה להביא את העם הזה אל הארץ אשר נשבע להם וישחטם במדבר 16
« Yawe azangaki penza makoki ya kokotisa bato oyo na mokili oyo alakaki, na nzela ya ndayi, ete akopesa bango yango, yango wana abomaki bango kati na esobe. »
ועתה יגדל נא כח אדני כאשר דברת לאמר 17
Sik’oyo, nabondeli Yo, tika ete makasi ya Nkolo emonisama na nguya na yango kolanda ndenge olobaki:
יהוה ארך אפים ורב חסד נשא עון ופשע ונקה לא ינקה--פקד עון אבות על בנים על שלשים ועל רבעים 18
« Nazali Yawe oyo asilikaka noki te, atonda na bolingo, alimbisaka masumu mpe botomboki; kasi apesaka moto oyo asali mabe etumbu, apesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei. »
סלח נא לעון העם הזה--כגדל חסדך וכאשר נשאתה לעם הזה ממצרים ועד הנה 19
Nabondeli Yo, kolanda bolingo monene na Yo, limbisa masumu ya bato oyo ndenge kaka olimbisaki bango wuta babimaki na Ejipito kino sik’oyo.
ויאמר יהוה סלחתי כדברך 20
Yawe azongisaki: — Nalimbisi bango ndenge osengi.
ואולם חי אני וימלא כבוד יהוה את כל הארץ 21
Kasi na Kombo na Ngai, mpe lokola mokili mobimba etondi na nkembo ya Yawe,
כי כל האנשים הראים את כבדי ואת אתתי אשר עשיתי במצרים ובמדבר וינסו אתי זה עשר פעמים ולא שמעו בקולי 22
moko te kati na bato oyo bamonaki nkembo na Ngai mpe bikamwa oyo nasalaki kati na Ejipito mpe na esobe kasi baboyaki kotosa Ngai mpe bamekaki Ngai mbala zomi,
אם יראו את הארץ אשר נשבעתי לאבתם וכל מנאצי לא יראוה 23
moko te kati na bango akomona lisusu mokili oyo nalakaki na nzela na ndayi epai ya bakoko na bango, moko te kati na ba-oyo batiolaki Ngai akomona lisusu mokili yango.
ועבדי כלב עקב היתה רוח אחרת עמו וימלא אחרי--והביאתיו אל הארץ אשר בא שמה וזרעו יורשנה 24
Kasi lokola Kalebi, mosali na Ngai, atambolisamaka na molimo mosusu mpe atamboli na bosembo na miso na Ngai, nakokotisa ye na mokili oyo asilaki kokende, mpe bakitani na ye bakokamata yango lokola libula.
והעמלקי והכנעני יושב בעמק מחר פנו וסעו לכם המדבר--דרך ים סוף 25
Lokola bato ya Amaleki mpe ya Kanana bazali nanu kovanda na lubwaku, bino bokobaluka mpe bokozonga lobi na tongo na esobe, na nzela oyo ekenda na ebale monene ya Barozo.
וידבר יהוה אל משה ואל אהרן לאמר 26
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
עד מתי לעדה הרעה הזאת אשר המה מלינים עלי את תלנות בני ישראל אשר המה מלינים עלי--שמעתי 27
— Kino penza tango nini lisanga oyo ya batomboki ekokoba kotelemela Ngai? Solo, nayoki bileli mpe koyimayima ya bana ya Isalaele na tina na Ngai.
אמר אלהם חי אני נאם יהוה אם לא כאשר דברתם באזני כן אעשה לכם 28
Yebisa bango: « Nalapi ndayi, » elobi Yawe, « nakosalela bino makambo nyonso oyo nayoki bino koloba.
במדבר הזה יפלו פגריכם וכל פקדיכם לכל מספרכם מבן עשרים שנה ומעלה אשר הלינתם עלי 29
Bibembe na bino ekolala na esobe oyo. Bino nyonso oyo bozali na mibu tuku mibale mpe koleka, bino oyo botangamaki na motango mpe boyimaki-yimaki mpo na Ngai,
אם אתם תבאו אל הארץ אשר נשאתי את ידי לשכן אתכם בה--כי אם כלב בן יפנה ויהושע בן נון 30
bokokota te na mokili oyo nalakaki na nzela ya ndayi, na kotombola loboko, ete nakokomisa yango mokili na bino, longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.
וטפכם--אשר אמרתם לבז יהיה והביאתי אתם--וידעו את הארץ אשר מאסתם בה 31
Kasi nakomema bana na bino oyo na tina na bango bolobaki ete bakozwa bango lokola bomengo ya bitumba, mpe nakokotisa bango na esengo kati na mokili yango oyo botiolaki.
ופגריכם אתם--יפלו במדבר הזה 32
Nzokande bino, bibembe na bino ekolala na esobe oyo.
ובניכם יהיו רעים במדבר ארבעים שנה ונשאו את זנותיכם--עד תם פגריכם במדבר 33
Bana na bino bakokoma babateli bibwele awa na esobe mibu tuku minei. Lokola botamboli na bosembo te na miso na Ngai, bakomona pasi kino ebembe na bino ya suka elala na esobe.
במספר הימים אשר תרתם את הארץ ארבעים יום--יום לשנה יום לשנה תשאו את עונתיכם ארבעים שנה וידעתם את תנואתי 34
Lokola bosalaki mikolo tuku minei mpo na kononga mokili, bokomona pasi mibu tuku minei mpo na masumu na bino: mobu moko mpo na mokolo moko. Na bongo bokoyeba mbano oyo ezali kati na likambo ya kotelemela Ngai.
אני יהוה דברתי אם לא זאת אעשה לכל העדה הרעה הזאת הנועדים עלי במדבר הזה יתמו ושם ימתו 35
Ngai Yawe nde nalobi; mpe nakosala solo makambo oyo epai ya lisanga oyo mobimba ya batomboki oyo basanganaki mpo na kotelemela Ngai. Bakomona suka na bango kati na esobe oyo; ezali awa nde bakokufa. »
והאנשים אשר שלח משה לתור את הארץ וישבו וילונו (וילינו) עליו את כל העדה להוציא דבה על הארץ 36
Bato oyo Moyize atindaki mpo na kononga mokili mpe, na bozongi na bango, batindikaki lisanga mobimba na koyimayima na tina na ye wana bapanzaki sango mabe na tina na mokili;
וימתו האנשים מוצאי דבת הארץ רעה--במגפה לפני יהוה 37
bato oyo babimisaki maloba mabe na tina na mokili yango, bazwaki etumbu mpe bakufaki liboso ya Yawe.
ויהושע בן נון וכלב בן יפנה חיו מן האנשים ההם ההלכים לתור את הארץ 38
Kati na bato oyo bakendeki kononga mokili, kaka Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe Kalebi, mwana mobali ya Yefune, nde babikaki.
וידבר משה את הדברים האלה אל כל בני ישראל ויתאבלו העם מאד 39
Tango Moyize ayebisaki makambo oyo epai ya bato nyonso ya Isalaele, balelaki makasi.
וישכמו בבקר ויעלו אל ראש ההר לאמר הננו ועלינו אל המקום אשר אמר יהוה--כי חטאנו 40
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bamataki na songe ya ngomba kati na etuka ya bangomba mpe balobaki: — Solo, tosalaki masumu; kasi sik’oyo, tozali kokende kuna, na esika oyo Yawe alakaki biso.
ויאמר משה למה זה אתם עברים את פי יהוה והוא לא תצלח 41
Kasi Moyize alobaki: — Mpo na nini bozali koboya kotosa mitindo ya Yawe? Likambo oyo ekolonga te!
אל תעלו כי אין יהוה בקרבכם ולא תנגפו לפני איביכם 42
Bokende te, pamba te Yawe azali elongo na bino te; banguna na bino bakolonga bino.
כי העמלקי והכנעני שם לפניכם ונפלתם בחרב כי על כן שבתם מאחרי יהוה ולא יהיה יהוה עמכם 43
Bato ya Amaleki mpe ya Kanana bakokutana na bino kuna. Bongo lokola bopesaki Yawe mokongo, bokokweya na mopanga mpo ete akozala elongo na bino te.
ויעפלו לעלות אל ראש ההר וארון ברית יהוה ומשה לא משו מקרב המחנה 44
Na lolendo na bango, bakendeki kaka na songe ya ngomba kati na etuka ya bangomba; kasi Moyize alongwaki te na molako, ndenge moko mpe mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe.
וירד העמלקי והכנעני הישב בהר ההוא ויכום ויכתום עד החרמה 45
Boye, bato ya Amaleki mpe ya Kanana oyo bazalaki kovanda na bangomba yango bakitelaki bango, babundisaki bango, balongaki bango mpe balandaki bango kino na Orima.

< במדבר 14 >