< מלכים ב 6 >

ויאמרו בני הנביאים אל אלישע הנה נא המקום אשר אנחנו ישבים שם לפניך--צר ממנו 1
Mokolo moko, bayekoli ya basakoli balobaki na Elize: — Tala! Esika oyo tosanganaka elongo na yo ekomi moke mingi mpo na biso.
נלכה נא עד הירדן ונקחה משם איש קורה אחת ונעשה לנו שם מקום לשבת שם ויאמר לכו 2
Pesa biso nzela ya kokende na ebale Yordani epai wapi moko na moko kati na biso akoki kozwa nzete mpo na kotonga kuna esika ya kovanda. Elize alobaki na bango: — Bokende!
ויאמר האחד הואל נא ולך את עבדיך ויאמר אני אלך 3
Moko kati na bango alobaki: — Okosepela te kokende elongo na basali na yo? Elize azongisaki: — Nandimi, nakokende.
וילך אתם ויבאו הירדנה ויגזרו העצים 4
Boye akendeki elongo na bango. Bakendeki na ebale Yordani mpe babandaki kokata banzete.
ויהי האחד מפיל הקורה ואת הברזל נפל אל המים ויצעק ויאמר אהה אדני והוא שאול 5
Wana moko kati na bango azalaki kokata nzete, ebende ya epasola na ye ekweyaki na mayi. Agangaki: — Ah, nkolo na ngai! Nadefaki yango kodefa!
ויאמר איש האלהים אנה נפל ויראהו את המקום ויקצב עץ וישלך שמה ויצף הברזל 6
Moto na Nzambe atunaki: — Ekweyaki na esika nini? Sima na ye kolakisa ye esika yango, Elize akataki eteni ya nzete mpe abwakaki yango na esika oyo ebende ya epasola ekweyaki. Mpe, na mbala moko, eteni ya nzete yango ematisaki ebende na likolo ya mayi, mpe ebende ekomaki kotepa.
ויאמר הרם לך וישלח ידו ויקחהו 7
Elize alobaki: — Kamata yango! Boye, mosali wana asembolaki loboko na ye mpe akamataki yango.
ומלך ארם היה נלחם בישראל ויועץ אל עבדיו לאמר אל מקום פלני אלמני תחנתי 8
Mokonzi ya Siri azalaki kobundisa bana ya Isalaele. Asololaki na basali na ye mpe alobaki: « Nakotia molako na ngai na esika songolo to pakala. »
וישלח איש האלהים אל מלך ישראל לאמר השמר מעבר המקום הזה כי שם ארם נחתים 9
Mbala moko, moto na Nzambe atindaki maloba oyo epai ya mokonzi ya Isalaele: « Keba! Koleka na esika wana te, pamba te bato ya Siri bazali kokita kuna. »
וישלח מלך ישראל אל המקום אשר אמר לו איש האלהים והזהירה--ונשמר שם לא אחת ולא שתים 10
Mokonzi ya Isalaele atindaki bato kokende kononga esika oyo moto na Nzambe alobelaki. Mbala ebele, Elize azalaki kokebisa mokonzi ete azala na bokebi na bisika ya ndenge wana; mpe mbala ebele, mokonzi ya Isalaele azalaki komibikisa na motambo ya bato ya Siri.
ויסער לב מלך ארם על הדבר הזה ויקרא אל עבדיו ויאמר אליהם הלוא תגידו לי מי משלנו אל מלך ישראל 11
Suka na suka, mokonzi ya Siri asilikaki makasi, abengisaki bakalaka na ye mpe atunaki bango: — Bokoki te koyebisa ngai nani kati na biso azali na ngambo ya mokonzi ya Isalaele?
ויאמר אחד מעבדיו לוא אדני המלך כי אלישע הנביא אשר בישראל יגיד למלך ישראל את הדברים אשר תדבר בחדר משכבך 12
Moko kati na bakalaka na ye alobaki: — Mokonzi, nkolo na ngai, moko te kati na biso. Ezali nde mosakoli Elize oyo azali kati na Isalaele; ye nde ayebaka mpe ayebisaka mokonzi ya Isalaele ata makambo oyo olobaka kati na shambre na yo ya kolala.
ויאמר לכו וראו איכה הוא ואשלח ואקחהו ויגד לו לאמר הנה בדתן 13
Mokonzi apesaki mitindo: — Bokende koluka esika oyo azali mpo ete natinda bato mpo na kokanga ye. Bayaki koyebisa ye: — Azali na Dotani.
וישלח שמה סוסים ורכב וחיל כבד ויבאו לילה ויקפו על העיר 14
Bongo mokonzi atindaki kuna bampunda elongo na bashar mpe basoda ebele. Bakendeki kuna na butu mpe bazingelaki engumba.
וישכם משרת איש האלהים לקום ויצא והנה חיל סובב את העיר וסוס ורכב ויאמר נערו אליו אהה אדני איכה נעשה 15
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, tango mosali ya moto na Nzambe alamukaki mpe abimaki, amonaki ete mampinga elongo na bampunda mpe bashar bazingelaki engumba. Mosali yango alobaki na Elize: — Oh nkolo na ngai, eyindi na libanda! Tokosala nini!
ויאמר אל תירא כי רבים אשר אתנו מאשר אותם 16
Mosakoli azongisaki: — Kobanga te, pamba te ba-oyo bazali elongo na biso bazali ebele koleka ba-oyo bazali elongo na bango.
ויתפלל אלישע ויאמר יהוה פקח נא את עיניו ויראה ויפקח יהוה את עיני הנער וירא והנה ההר מלא סוסים ורכב אש סביבת אלישע 17
Elize asambelaki: — Oh Yawe, fungola ye miso mpo ete amona! Yawe afungolaki miso ya mosali, mpe mosali atalaki; amonaki bangomba mike etonda na bampunda mpe bashar ya moto zingazinga ya Elize.
וירדו אליו ויתפלל אלישע אל יהוה ויאמר הך נא את הגוי הזה בסנורים ויכם בסנורים כדבר אלישע 18
Lokola monguna azalaki kopusana pene na ye, Elize asambelaki Yawe: — Boma ekolo oyo miso! Mpe Yawe abomaki bango miso, ndenge kaka Elize asengaki.
ויאמר אלהם אלישע לא זה הדרך ולא זה העיר--לכו אחרי ואוליכה אתכם אל האיש אשר תבקשון וילך אותם שמרונה 19
Elize alobaki na bango: — Nzela ezali awa te! Engumba mpe ezali awa te! Bolanda ngai, mpe nakomema bino epai ya moto oyo bozali koluka. Elize amemaki bango na Samari.
ויהי כבאם שמרון ויאמר אלישע יהוה פקח את עיני אלה ויראו ויפקח יהוה את עיניהם ויראו והנה בתוך שמרון 20
Tango bakotaki na engumba, Elize asambelaki lisusu: — Yawe, fungola miso ya bato oyo mpo ete bamona. Yawe afungolaki miso na bango, mpe bamonaki ete bazali kati na engumba Samari.
ויאמר מלך ישראל אל אלישע כראתו אותם האכה אכה אבי 21
Tango mokonzi ya Isalaele amonaki bango, atunaki Elize: — Tata na ngai, naboma bango? Naboma bango?
ויאמר לא תכה האשר שבית בחרבך ובקשתך אתה מכה שים לחם ומים לפניהם ויאכלו וישתו וילכו אל אדניהם 22
Elize azongisaki: — Koboma bango te! Boni, okoboma solo bato oyo okangi, na nzela ya mopanga na yo to ya tolotolo na yo? Pesa bango nde bilei mpe mayi ya komela mpo ete balia, bamela mpe bazonga epai ya mokonzi na bango.
ויכרה להם כרה גדולה ויאכלו וישתו וישלחם וילכו אל אדניהם ולא יספו עוד גדודי ארם לבוא בארץ ישראל 23
Boye abongisaki feti monene mpo na bango. Tango basilisaki kolia mpe komela, azongisaki bango. Mpe bazongaki epai ya mokonzi na bango. Wuta tango yango, mampinga ya Siri batikaki kokota mpo na kobundisa Isalaele.
ויהי אחרי כן ויקבץ בן הדד מלך ארם את כל מחנהו ויעל ויצר על שמרון 24
Sima na tango, Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, asangisaki mampinga na ye nyonso mpe akendeki kozingela engumba Samari.
ויהי רעב גדול בשמרון והנה צרים עליה עד היות ראש חמור בשמנים כסף ורבע הקב חרי (דב) יונים בחמשה כסף 25
Lokola bazingelaki Samari tango molayi, nzala makasi ekotaki kati na engumba kino moto moko ya ane ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mwambe; mpe bagrame nkama mibale na tuku mitano ya nyei ekawuka ya ebenga ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, mitano.
ויהי מלך ישראל עבר על החמה ואשה צעקה אליו לאמר הושיעה אדני המלך 26
Mokolo moko, wana mokonzi ya Isalaele azalaki koleka na likolo ya mir ya lopango, mwasi moko agangaki epai na ye: — Mokonzi, nkolo na ngai, sunga ngai!
ויאמר אל יושעך יהוה מאין אושיעך המן הגרן או מן היקב 27
Mokonzi azongisaki: — Soki Yawe asungi yo te, esika nini ngai nakozwa lisungi mpo na kosunga yo? Nazangi vino to ble ya kopesa yo.
ויאמר לה המלך מה לך ותאמר האשה הזאת אמרה אלי תני את בנך ונאכלנו היום ואת בני נאכל מחר 28
Nzokande, mokonzi atunaki ye lisusu: — Likambo nini ekomeli yo? Mwasi azongisaki: — Mwasi wana alobaki na ngai: « Pesa mwana na yo ya mobali mpo ete tolia ye lelo, bongo lobi, tokolia mwana na ngai. »
ונבשל את בני ונאכלהו ואמר אליה ביום האחר תני את בנך ונאכלנו ותחבא את בנה 29
Boye tolambaki mwana na ngai ya mobali mpe toliaki ye. Mokolo oyo elandaki, nalobaki na ye: « Pesa mwana na yo ya mobali mpo ete tolia ye, » kasi abombaki ye.
ויהי כשמע המלך את דברי האשה ויקרע את בגדיו והוא עבר על החמה וירא העם והנה השק על בשרו מבית 30
Tango mokonzi ayokaki maloba ya mwasi oyo, apasolaki bilamba na ye. Lokola atambolaki lisusu na likolo ya mir ya lopango, bato bamonaki ete, na se ya bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki na nzoto na ye.
ויאמר כה יעשה לי אלהים וכה יוסף אם יעמד ראש אלישע בן שפט עליו--היום 31
Mokonzi alobaki: « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki kaka moto ya Elize, mwana mobali ya Shafati, etikali na likolo ya mapeka na ye. »
ואלישע ישב בביתו והזקנים ישבים אתו וישלח איש מלפניו בטרם יבא המלאך אליו והוא אמר אל הזקנים הראיתם כי שלח בן המרצח הזה להסיר את ראשי ראו כבא המלאך סגרו הדלת ולחצתם אתו בדלת הלוא קול רגלי אדניו אחריו 32
Nzokande, Elize avandaki kati na ndako na ye, elongo na bakambi ya engumba. Mokonzi atindaki ntoma moko epai ya Elize. Kasi liboso ete akoma, Elize alobaki na bakambi ya engumba: « Bozali komona te ete mobomi oyo atindi moto mpo na koya kokata ngai moto? Bosala keba! Tango kaka bokomona ye, bokanga ekuke liboso na ye mpe botindika ye na yango na sima! Boyoka! Wana ezali makelele ya makolo ya nkolo na ye te, oyo ezali koyokana sima na ye? »
עודנו מדבר עמם והנה המלאך ירד אליו ויאמר הנה זאת הרעה מאת יהוה--מה אוחיל ליהוה עוד 33
Wana Elize azalaki nanu koloba, ntoma ya mokonzi akomaki mpe ayebisaki ye maloba ya mokonzi: « Pasi oyo nyonso ewuti epai ya Yawe! Nakozela lisusu nini kowuta na Ye? »

< מלכים ב 6 >