< שמואל א 6 >

ויהי ארון יהוה בשדה פלשתים שבעה חדשים 1
Sima na Sanduku ya Yawe kosala sanza sambo kati na mokili ya bato ya Filisitia,
ויקראו פלשתים לכהנים ולקסמים לאמר מה נעשה לארון יהוה הודענו במה נשלחנו למקומו 2
bato ya Filisitia babengisaki Banganga-Nzambe mpe bato ya soloka, balobaki na bango: — Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Yawe? Boyebisa biso ndenge nini tokoki kozongisa yango na esika na yango.
ויאמרו אם משלחים את ארון אלהי ישראל אל תשלחו אתו ריקם--כי השב תשיבו לו אשם אז תרפאו ונודע לכם למה לא תסור ידו מכם 3
Bazongisaki: — Soki bolingi kozongisa Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango ya pamba te, kasi bozongisa yango elongo na bambeka mpo na masumu; bongo bokobika na bokono, mpe bokoyeba mpo na nini loboko na Yawe etikaki te konyokola bino.
ויאמרו מה האשם אשר נשיב לו ויאמרו מספר סרני פלשתים חמשה עפלי (טחרי) זהב וחמשה עכברי זהב כי מגפה אחת לכלם ולסרניכם 4
Bato ya Filisitia batunaki: — Mbeka ya masumu ya lolenge nini tosengeli kobonzela Yawe? Bazongisaki: — Kolanda motango ya bakambi ya bato ya Filisitia, bobonzela Ye biloko mitano ya wolo, oyo ekotalisa bapota ya libumu, mpe bampuku mitano ya wolo; pamba te ezala bino to bakambi na bino, bokweyelaki kaka etumbu ya ndenge moko.
ועשיתם צלמי עפליכם (טחריכם) וצלמי עכבריכם המשחיתם את הארץ ונתתם לאלהי ישראל כבוד אולי יקל את ידו מעליכם ומעל אלהיכם ומעל ארצכם 5
Bosala bililingi oyo ekotalisa bapota na bino ya libumu, mpe oyo ekotalisa bampuku oyo ezali kobebisa mokili na bino; mpe bopesa nkembo na Nzambe ya Isalaele. Tango mosusu, akolongola loboko na Ye na likolo na bino, na likolo ya banzambe na bino, mpe na likolo ya mokili na bino.
ולמה תכבדו את לבבכם כאשר כבדו מצרים ופרעה את לבם הלוא כאשר התעלל בהם וישלחום וילכו 6
Tina nini kozala moto makasi lokola Faraon mpe bato ya Ejipito? Bokanisa ete sima na Nzambe konyokola bango, batikaki bana ya Isalaele kokende na nzela na bango.
ועתה קחו ועשו עגלה חדשה אחת ושתי פרות עלות אשר לא עלה עליהם על ואסרתם את הפרות בעגלה והשיבתם בניהם מאחריהם הביתה 7
Boye bino, bosala sik’oyo shario moko ya sika; bozwa bangombe mibale ya basi oyo ezali komelisa mpe oyo nanu balatisi te ekangiseli na kingo. Bokangisa bangombe yango na shario, kasi bozongisa bana na yango na lopango.
ולקחתם את ארון יהוה ונתתם אתו אל העגלה ואת כלי הזהב אשר השבתם לו אשם תשימו בארגז מצדו ושלחתם אתו והלך 8
Bokamata Sanduku ya Yawe mpe botia yango na likolo ya shario. Pembeni ya Sanduku ya Yawe, botia kati na mwa sanduku moko ya moke biloko ya wolo oyo bokobonzela Yawe lokola bambeka mpo na masumu. Sima, botika yango kokende.
וראיתם אם דרך גבולו יעלה בית שמש--הוא עשה לנו את הרעה הגדולה הזאת ואם לא וידענו כי לא ידו נגעה בנו--מקרה הוא היה לנו 9
Kasi bokotala yango malamu: soki Sanduku ya Yawe ezwi nzela ya Beti-Shemeshi mpo na kokende na mokili na yango, wana elakisi ete Yawe nde akweyiselaki biso pasi makasi yango; soki te, wana tokoyeba ete ezalaki na yango loboko na Yawe te, kasi oyo ekomelaki biso ezalaki na yango kaka libaku.
ויעשו האנשים כן ויקחו שתי פרות עלות ויאסרום בעגלה ואת בניהם כלו בבית 10
Bato ya Filisitia basalaki ndenge bayebisaki bango: bazwaki bangombe mibale ya basi oyo ezalaki komelisa mpe bakangisaki yango na shario. Kasi bazongisaki bana na yango na lopango.
וישמו את ארון יהוה אל העגלה ואת הארגז ואת עכברי הזהב ואת צלמי טחריהם 11
Batiaki Sanduku ya Yawe na likolo ya shario; bongo na pembeni na yango, batiaki mwa sanduku oyo ya moke, oyo kati na yango ezalaki na bampuku ya wolo mpe bililingi ya bapota na bango ya libumu.
וישרנה הפרות בדרך על דרך בית שמש במסלה אחת הלכו הלך וגעו ולא סרו ימין ושמאול וסרני פלשתים הלכים אחריהם עד גבול בית שמש 12
Bangombe yango ya basi ekendeki mbala moko na nzela ya Beti-Shemeshi, elandaki kaka nzela yango mpe, nzela-nzela, ezalaki kolela; ebalukaki te ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali. Nzokande bakambi ya bato ya Filisitia balandaki yango na mosika kino na mondelo ya Beti-Shemeshi.
ובית שמש קצרים קציר חטים בעמק וישאו את עיניהם ויראו את הארון וישמחו לראות 13
Na eleko yango, bato ya Beti-Shemeshi bazalaki kobuka ble, na lubwaku. Bongo tango batombolaki miso mpe bamonaki Sanduku, basepelaki makasi.
והעגלה באה אל שדה יהושע בית השמשי ותעמד שם ושם אבן גדולה ויבקעו את עצי העגלה ואת הפרות העלו עלה ליהוה 14
Shario ekomaki na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi, mpe etelemaki wana, pembeni ya libanga monene. Bato babukaki mabaya ya sanduku mpe babonzaki bangombe ya basi lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe.
והלוים הורידו את ארון יהוה ואת הארגז אשר אתו אשר בו כלי זהב וישמו אל האבן הגדולה ואנשי בית שמש העלו עלות ויזבחו זבחים ביום ההוא--ליהוה 15
Balevi bakitisaki Sanduku ya Yawe elongo na mwa sanduku ya moke oyo kati na yango ezalaki na biloko ya wolo, mpe batiaki yango na likolo ya libanga monene. Na mokolo wana, bato ya Beti-Shemeshi babonzaki bambeka ya kotumba mpe makabo epai na Yawe.
וחמשה סרני פלשתים ראו וישבו עקרון ביום ההוא 16
Bakambi yango mitano ya bato ya Filisitia bamonaki makambo nyonso wana mpe bazongaki na Ekroni kaka mokolo wana.
ואלה טחרי הזהב אשר השיבו פלשתים אשם ליהוה לאשדוד אחד לעזה אחד לאשקלון אחד לגת אחד לעקרון אחד 17
Tala bililingi ya wolo ya bapota ya libumu oyo bato ya Filisitia babonzelaki Yawe lokola bambeka mpo na masumu: moko mpo na Asidodi, moko mpo na Gaza, moko mpo na Ashikeloni, moko mpo na Gati, moko mpo na Ekroni.
ועכברי הזהב מספר כל ערי פלשתים לחמשת הסרנים--מעיר מבצר ועד כפר הפרזי ועד אבל הגדולה אשר הניחו עליה את ארון יהוה עד היום הזה בשדה יהושע בית השמשי 18
Ezalaki mpe na bampuku ya wolo, kolanda motango ya bingumba ya bato ya Filisitia, oyo bakambi mitano oyo bazalaki koyangela: kobanda na bingumba batonga makasi, bamboka na yango ya mike kino na libanga ya monene oyo, na likolo na yango, batiaki Sanduku ya Yawe mpe oyo, kino na mokolo ya lelo, ezali na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi.
ויך באנשי בית שמש כי ראו בארון יהוה ויך בעם שבעים איש חמשים אלף איש ויתאבלו העם כי הכה יהוה בעם מכה גדולה 19
Kasi Nzambe abomaki bato ya Beti-Shemeshi mpo ete batalaki Sanduku ya Yawe: kati na bato nkoto tuku mitano, abomaki tuku sambo. Bato ya Beti-Shemeshi basalaki matanga mpo ete Yawe apesaki bango etumbu ya makasi.
ויאמרו אנשי בית שמש מי יוכל לעמד לפני יהוה האלהים הקדוש הזה ואל מי יעלה מעלינו 20
Bato ya Beti-Shemeshi balobaki: « Nani akoki kotelema liboso ya Yawe, Nzambe oyo ya bule? Sanduku ekokende epai ya nani soki elongwe awa epai na biso? »
וישלחו מלאכים אל יושבי קרית יערים לאמר השבו פלשתים את ארון יהוה--רדו העלו אתו אליכם 21
Bongo batindaki bantoma koloba na bato ya Kiriati-Yearimi: « Bato ya Filisitia bazongisi Sanduku ya Yawe; boya kozwa yango mpe bomema yango epai na bino. »

< שמואל א 6 >