< דברי הימים א 3 >

ואלה היו בני דויד אשר נולד לו בחברון הבכור אמנן לאחינעם היזרעאלית שני דניאל לאביגיל הכרמלית 1
Tala bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron: Mwana ya liboso ezalaki Aminoni, mwana mobali ya Ayinoami, moto ya Jizireyeli; ya mibale, Daniele, mwana mobali ya Abigayili, moto ya Karimeli;
השלשי לאבשלום בן מעכה בת תלמי מלך גשור הרביעי אדניה בן חגית 2
ya misato, Abisalomi, mwana mobali ya Maaka, mwana mwasi ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri; ya minei, Adoniya, mwana mobali ya Agite;
החמישי שפטיה לאביטל הששי יתרעם לעגלה אשתו 3
ya mitano, Shefatia, mwana mobali ya Abitali; mpe ya motoba, Yitileami oyo Egila, mwasi na ye, abotaki.
ששה נולד לו בחברון וימלך שם שבע שנים וששה חדשים ושלשים ושלוש שנה מלך בירושלם 4
Bango nyonso motoba bazalaki bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron, mboka mokonzi, epai wapi akonzaki mibu sambo na ndambo. Davidi akonzaki wuta na Yelusalemi mibu tuku misato na misato.
ואלה נולדו לו בירושלים שמעא ושובב ונתן ושלמה ארבעה לבת שוע בת עמיאל 5
Tala bakombo ya bana na ye ya mibali oyo babotamaki na Yelusalemi: Shimea, Shobabi, Natan mpe Salomo. Ezali Batisheba, mwana mwasi ya Amieli, nde abotaki bana mibali minei oyo.
ויבחר ואלישמע ואליפלט 6
Babotelaki ye lisusu bana oyo: Yibari, Elishama, Elifeleti,
ונגה ונפג ויפיע 7
Noga, Nefegi, Yafia,
ואלישמע ואלידע ואליפלט תשעה 8
Elishama, Eliyada mpe Elifeleti. Bango nyonso bazalaki libwa.
כל בני דויד--מלבד בני פילגשים ותמר אחותם 9
Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Davidi, longola bana mibali oyo bamakangu na ye babotelaki ye. Mpe Tamari azalaki ndeko na bango ya mwasi.
ובן שלמה רחבעם אביה בנו אסא בנו יהושפט בנו 10
Salomo azalaki tata ya Roboami, Roboami azalaki tata ya Abiya, Abiya azalaki tata ya Asa, Asa azalaki tata ya Jozafati,
יורם בנו אחזיהו בנו יואש בנו 11
Jozafati azalaki tata ya Yorami, Yorami azalaki tata ya Akazia, Akazia azalaki tata ya Joasi,
אמציהו בנו עזריה בנו יותם בנו 12
Joasi azalaki tata ya Amatsia, Amatsia azalaki tata ya Azaria, Azaria azalaki tata ya Yotami,
אחז בנו חזקיהו בנו מנשה בנו 13
Yotami azalaki tata ya Akazi, Akazi azalaki tata ya Ezekiasi, Ezekiasi azalaki tata ya Manase,
אמון בנו יאשיהו בנו 14
Manase azalaki tata ya Amoni, Amoni azalaki tata ya Joziasi,
ובני יאשיהו--הבכור יוחנן השני יהויקים השלשי צדקיהו הרביעי שלום 15
Joziasi azalaki tata ya bana mibali oyo: Yoanani, mwana na ye ya liboso; Yeoyakimi, ya mibale; Sedesiasi, ya misato; Shalumi, ya minei.
ובני יהויקים--יכניה בנו צדקיה בנו 16
Bana mibali ya Yeoyakimi: Yekonia mpe Sedesiasi.
ובני יכניה אסר שאלתיאל בנו 17
Libota ya Yekonia, mokangami: Shealitieli, mwana na ye ya mobali;
ומלכירם ופדיה ושנאצר יקמיה הושמע ונדביה 18
Malikirami, Pedaya, Shenatsari, Yekamia, Oshama mpe Nedabia.
ובני פדיה זרבבל ושמעי ובן זרבבל משלם וחנניה ושלמית אחותם 19
Bana mibali ya Pedaya: Zorobabeli mpe Shimei. Bana mibali ya Zorobabeli: Meshulami mpe Anania. Shelomiti azalaki ndeko na bango ya mwasi.
וחשבה ואהל וברכיה וחסדיה יושב חסד--חמש 20
Bana mibali ya Meshulami: Ashuba, Oeli, Berekia, Asadia, Yoshabi-Esedi. Bango nyonso bazalaki mitano.
ובן חנניה פלטיה וישעיה בני רפיה בני ארנן בני עבדיה בני שכניה 21
Bakitani ya Anania: Pelatia mpe Ezayi elongo na bana mibali ya Refaya, ya Arinani, ya Abidiasi mpe ya Shekania.
ובני שכניה שמעיה ובני שמעיה חטוש ויגאל ובריח ונעריה ושפט--ששה 22
Libota ya Shekania: Shemaya elongo na bana na ye ya mibali: Atushi, Yigali, Baria, Nearia mpe Shafati. Bango nyonso bazalaki motoba.
ובן נעריה אליועיני וחזקיה ועזריקם--שלשה 23
Bana mibali ya Nearia: Eliowenayi, Ezekiasi mpe Azirikami. Bango nyonso bazalaki misato.
ובני אליועיני הודיוהו (הודויהו) ואלישיב ופליה ועקוב ויוחנן ודליה וענני--שבעה 24
Bana mibali ya Eliowenayi: Odavia, Eliashibi, Pelaya, Akubi, Yoanani, Delaya mpe Anani. Bango nyonso bazalaki sambo.

< דברי הימים א 3 >