< Γένεσις 23 >

1 ἐγένετο δὲ ἡ ζωὴ Σαρρας ἔτη ἑκατὸν εἴκοσι ἑπτά
Sara awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku mibale na sambo.
2 καὶ ἀπέθανεν Σαρρα ἐν πόλει Αρβοκ ἥ ἐστιν ἐν τῷ κοιλώματι αὕτη ἐστὶν Χεβρων ἐν γῇ Χανααν ἦλθεν δὲ Αβρααμ κόψασθαι Σαρραν καὶ πενθῆσαι
Akufaki na Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. Abrayami asalaki matanga mpo na Sara mpe alelaki ye.
3 καὶ ἀνέστη Αβρααμ ἀπὸ τοῦ νεκροῦ αὐτοῦ καὶ εἶπεν τοῖς υἱοῖς Χετ λέγων
Abrayami alongwaki liboso ya ebembe ya mwasi na ye mpe asololaki na bato ya Iti.
4 πάροικος καὶ παρεπίδημος ἐγώ εἰμι μεθ’ ὑμῶν δότε οὖν μοι κτῆσιν τάφου μεθ’ ὑμῶν καὶ θάψω τὸν νεκρόν μου ἀπ’ ἐμοῦ
Alobaki na bango: — Nazali mopaya mpe navandaka kati na bino; botekela ngai eteni ya mabele kati na bino mpo ete nakunda mwasi na ngai.
5 ἀπεκρίθησαν δὲ οἱ υἱοὶ Χετ πρὸς Αβρααμ λέγοντες
Bato ya Iti bazongiselaki Abrayami:
6 μή κύριε ἄκουσον δὲ ἡμῶν βασιλεὺς παρὰ θεοῦ εἶ σὺ ἐν ἡμῖν ἐν τοῖς ἐκλεκτοῖς μνημείοις ἡμῶν θάψον τὸν νεκρόν σου οὐδεὶς γὰρ ἡμῶν τὸ μνημεῖον αὐτοῦ κωλύσει ἀπὸ σοῦ τοῦ θάψαι τὸν νεκρόν σου ἐκεῖ
— Yoka biso, nkolo na ngai; ya solo, ozali moto monene kati na biso. Kunda mwasi na yo kati na kunda oyo eleki kitoko kati na bakunda na biso. Moko te kati na biso akoboya kopesa yo kunda na ye mpo ete okunda mwasi na yo.
7 ἀναστὰς δὲ Αβρααμ προσεκύνησεν τῷ λαῷ τῆς γῆς τοῖς υἱοῖς Χετ
Boye, Abrayami atelemaki mpe agumbamaki liboso ya bato ya mboka wana, bato ya Iti.
8 καὶ ἐλάλησεν πρὸς αὐτοὺς Αβρααμ λέγων εἰ ἔχετε τῇ ψυχῇ ὑμῶν ὥστε θάψαι τὸν νεκρόν μου ἀπὸ προσώπου μου ἀκούσατέ μου καὶ λαλήσατε περὶ ἐμοῦ Εφρων τῷ τοῦ Σααρ
Ayebisaki bango: — Soki ezali mokano na bino ete nakunda nzoto ya mwasi na ngai awa, boyoka ngai mpe bosengela ngai epai ya Efroni, mwana mobali ya Tsoari,
9 καὶ δότω μοι τὸ σπήλαιον τὸ διπλοῦν ὅ ἐστιν αὐτῷ τὸ ὂν ἐν μέρει τοῦ ἀγροῦ αὐτοῦ ἀργυρίου τοῦ ἀξίου δότω μοι αὐτὸ ἐν ὑμῖν εἰς κτῆσιν μνημείου
ete atekela ngai libulu na ye ya mabanga oyo ezali na Makipela, na suka ya elanga na ye. Boyebisa ye ete atekela ngai yango na motuya oyo ekoki na yango mpo ete nakomisa yango mabele ya kokunda bato na ngai.
10 Εφρων δὲ ἐκάθητο ἐν μέσῳ τῶν υἱῶν Χετ ἀποκριθεὶς δὲ Εφρων ὁ Χετταῖος πρὸς Αβρααμ εἶπεν ἀκουόντων τῶν υἱῶν Χετ καὶ πάντων τῶν εἰσπορευομένων εἰς τὴν πόλιν λέγων
Nzokande, Efroni, moto ya Iti, oyo azalaki kovanda kati na bato na ye, azongiselaki Abrayami na miso ya bato ya Iti, liboso ya bato nyonso oyo bayaki na ekuke ya engumba na ye:
11 παρ’ ἐμοὶ γενοῦ κύριε καὶ ἄκουσόν μου τὸν ἀγρὸν καὶ τὸ σπήλαιον τὸ ἐν αὐτῷ σοι δίδωμι ἐναντίον πάντων τῶν πολιτῶν μου δέδωκά σοι θάψον τὸν νεκρόν σου
— Te, nkolo na ngai, yoka ngai! Napesi yo elanga mpe libulu ya mabanga oyo ezali kati na yango. Napesi yo yango liboso ya bato na ngai mpo ete okunda mwasi na yo.
12 καὶ προσεκύνησεν Αβρααμ ἐναντίον τοῦ λαοῦ τῆς γῆς
Abrayami agumbamaki liboso ya bato ya mboka
13 καὶ εἶπεν τῷ Εφρων εἰς τὰ ὦτα τοῦ λαοῦ τῆς γῆς ἐπειδὴ πρὸς ἐμοῦ εἶ ἄκουσόν μου τὸ ἀργύριον τοῦ ἀγροῦ λαβὲ παρ’ ἐμοῦ καὶ θάψω τὸν νεκρόν μου ἐκεῖ
mpe azongiselaki Efroni: — Nabondeli yo, yoka ngai! Soki olingi, nakopesa yo motuya oyo ekoki na elanga. Ndima yango mpo ete nakunda mwasi na ngai kuna.
14 ἀπεκρίθη δὲ Εφρων τῷ Αβρααμ λέγων
Efroni azongiselaki Abrayami:
15 οὐχί κύριε ἀκήκοα γῆ τετρακοσίων διδράχμων ἀργυρίου ἀνὰ μέσον ἐμοῦ καὶ σοῦ τί ἂν εἴη τοῦτο σὺ δὲ τὸν νεκρόν σου θάψον
— Yoka, nkolo na ngai! Mabele ya motuya ya mbongo ya bibende, nkama minei, ezali penza nini kati na ngai mpe yo? Kamata mabele yango mpe kunda mwasi na yo.
16 καὶ ἤκουσεν Αβρααμ τοῦ Εφρων καὶ ἀπεκατέστησεν Αβρααμ τῷ Εφρων τὸ ἀργύριον ὃ ἐλάλησεν εἰς τὰ ὦτα τῶν υἱῶν Χετ τετρακόσια δίδραχμα ἀργυρίου δοκίμου ἐμπόροις
Abrayami andimaki maloba ya Efroni mpe amemelaki ye motuya oyo alobaki na miso ya bato ya Iti: mbongo ya bibende, nkama minei, kolanda ndenge bazalaki kotanga mbongo na tango wana.
17 καὶ ἔστη ὁ ἀγρὸς Εφρων ὃς ἦν ἐν τῷ διπλῷ σπηλαίῳ ὅς ἐστιν κατὰ πρόσωπον Μαμβρη ὁ ἀγρὸς καὶ τὸ σπήλαιον ὃ ἦν ἐν αὐτῷ καὶ πᾶν δένδρον ὃ ἦν ἐν τῷ ἀγρῷ ὅ ἐστιν ἐν τοῖς ὁρίοις αὐτοῦ κύκλῳ
Boye elanga ya Efroni oyo ezalaki na Makipela, pembeni ya Mamire, elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki kati na yango, banzete nyonso oyo ezalaki kati na elanga mpe na bandelo ya zingazinga na yango, epesamaki
18 τῷ Αβρααμ εἰς κτῆσιν ἐναντίον τῶν υἱῶν Χετ καὶ πάντων τῶν εἰσπορευομένων εἰς τὴν πόλιν
epai ya Abrayami mpe ekomaki ya ye na miso ya bato ya Iti oyo bayaki na ekuke ya engumba.
19 μετὰ ταῦτα ἔθαψεν Αβρααμ Σαρραν τὴν γυναῖκα αὐτοῦ ἐν τῷ σπηλαίῳ τοῦ ἀγροῦ τῷ διπλῷ ὅ ἐστιν ἀπέναντι Μαμβρη αὕτη ἐστὶν Χεβρων ἐν τῇ γῇ Χανααν
Sima na yango, Abrayami akundaki mwasi na ye Sara na libulu ya mabanga ya elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana.
20 καὶ ἐκυρώθη ὁ ἀγρὸς καὶ τὸ σπήλαιον ὃ ἦν ἐν αὐτῷ τῷ Αβρααμ εἰς κτῆσιν τάφου παρὰ τῶν υἱῶν Χετ
Bato ya Iti bapesaki Abrayami elanga yango elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki na kati mpo ete ekoma ya ye mpe akundaka bato na ye kuna.

< Γένεσις 23 >