< 2 Koenige 21 >

1 Manasse war zwölf Jahre alt, da er König ward, und regierte fünfundfünfzig Jahre zu Jerusalem. Seine Mutter hieß Hephzibah.
Manase azalaki na mibu zomi na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Efitsiba. »
2 Und er tat, was dem HERRN übel gefiel, nach den Greueln der Heiden, die der HERR vor den Kinder Israel vertrieben hatte,
Manase asalaki makambo mabe na miso ya Yawe na ndenge amekolaki misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele.
3 und baute wieder Höhen, die sein Vater Hiskia hatte zerstört, und richtete dem Baal Altäre auf und machte ein Ascherabild, wie Ahab, der König Israels, getan hatte, und betete an alles Heer des Himmels und diente ihnen.
Atongaki lisusu bisambelo ya likolo ya bangomba oyo Ezekiasi, tata na ye, abukaki; atongaki mpe bitumbelo mpo na nzambe Bala mpe atelemisaki likonzi mpo na nzambe mwasi Ashera, ndenge Akabi, mokonzi ya Isalaele, asalaki; afukamelaki mpe agumbamelaki mampinga nyonso ya likolo.
4 Und baute Altäre im Hause des HERRN, davon der HERR gesagt hatte: Ich will meinen Namen zu Jerusalem setzen;
Atongaki bitumbelo mpo na banzambe ya bapaya kati na Tempelo ya Yawe oyo, na tina na yango, Yawe alobaki: « Nakotia Kombo na Ngai kati na Yelusalemi. »
5 und er baute allem Heer des Himmels Altäre in beiden Höfen am Hause des HERRN.
Atongaki kati na mapango nyonso mibale ya Tempelo ya Yawe bitumbelo mpo na mampinga nyonso ya likolo.
6 Und ließ seinen Sohn durchs Feuer gehen und achtete auf Vogelgeschrei und Zeichen und hielt Wahrsager und Zeichendeuter und tat des viel, das dem HERRN übel gefiel, ihn zu erzürnen.
Abonzaki na moto, lokola mbeka, mwana na ye ya mobali; asalelaki kindoki, soloka mpe maji. Atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe; mpe, na bongo, apelisaki kanda ya Yawe.
7 Er setzte auch das Bild der Aschera, das er gemacht hatte, in das Haus, von welchem der HERR gesagt hatte: In dies Haus und nach Jerusalem, das ich erwählt habe aus allen Stämmen Israels, will ich meinen Namen setzen ewiglich;
Atiaki kati na Tempelo ya Yawe ekeko ya Ashera, oyo asalisaki; nzokande, Yawe alobaki na Davidi mpe na Salomo, mwana na ye ya mobali: « Nakotia Kombo na Ngai mpo na libela kati na Tempelo oyo mpe kati na Yelusalemi oyo naponi kati na mabota nyonso ya Isalaele.
8 und will den Fuß Israels nicht mehr bewegen lassen von dem Lande, das ich ihren Vätern gegeben habe, so doch, daß sie halten und tun nach allem, was ich geboten habe, und nach allem Gesetz, das mein Knecht Mose ihnen geboten hat.
Soki kaka bato ya Isalaele batosi mibeko mpe mitindo nyonso oyo napesaki bango na nzela ya Moyize, mosali na Ngai, nakosala ete bayengayenga lisusu te mosika ya mabele oyo napesaki epai ya batata na bango. »
9 Aber sie gehorchten nicht; sondern Manasse verführte sie, daß sie ärger taten denn die Heiden, die der HERR vor den Kindern Israel vertilgt hatte.
Kasi bato ya Isalaele batosaki te. Manase apengwisaki bango, mpe basalaki lisusu mabe koleka bikolo oyo Yawe abebisaki liboso ya bato ya Isalaele.
10 Da redete der HERR durch seine Knechte, die Propheten, und sprach:
Yawe alobaki na nzela ya basali na ye, basakoli:
11 Darum daß Manasse, der König Juda's, hat diese Greuel getan, die ärger sind denn alle Greuel, so die Amoriter getan haben, die vor ihm gewesen sind, und hat auch Juda sündigen gemacht mit seinen Götzen;
« Lokola Manase, mokonzi ya Yuda, asalaki makambo ya nkele, lokola asalaki makambo mabe koleka ata bato ya Amori oyo bazalaki liboso na ye, mpe lokola apengwisaki Yuda na nzela ya banzambe na ye ya bikeko,
12 darum spricht der HERR, der Gott Israels, also: Siehe, ich will Unglück über Jerusalem und Juda bringen, daß, wer es hören wird, dem sollen seine beide Ohren gellen;
tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Nakoyeisa kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda pasi oyo ekozala lokola kake na matoyi ya moto nyonso oyo akoyoka sango na yango.
13 und will über Jerusalem die Meßschnur Samarias ziehen und das Richtblei des Hauses Ahab; und will Jerusalem ausschütten, wie man Schüsseln ausschüttet, und will sie umstürzen;
Nakobebisa Yelusalemi ndenge nabebisaki Samari, mpe nakokomisa yango lokola ndako ya Akabi. Nakonika Yelusalemi ndenge banikaka mpe babalolaka nzungu.
14 und ich will die übrigen meines Erbteils verstoßen und sie geben in die Hände ihrer Feinde, daß sie ein Raub und Reißen werden aller ihrer Feinde,
Nakosundola ndambo ya libula na Ngai oyo ekotikala, nakokaba bango na maboko ya banguna na bango. Banguna na bango bakobebisa bango mpe bakobotola biloko na bango,
15 darum daß sie getan haben, was mir übel gefällt, und haben mich erzürnt von dem Tage an, da ihre Väter aus Ägypten gezogen sind, bis auf diesen Tag.
pamba te basalaki mabe na miso na Ngai mpe bapelisaki kanda na Ngai, wuta na mokolo oyo batata na bango babimaki na Ejipito kino na mokolo ya lelo. › »
16 Auch vergoß Manasse sehr viel unschuldig Blut, bis daß Jerusalem allerorten voll ward, außer der Sünde, durch die er Juda sündigen machte, daß sie taten, was dem HERRN übel gefiel.
Mpe lisusu, Manase asopaki makila ya bato oyo bayebi likambo te mpe atondisaki Yelusalemi na makila yango na bisika nyonso —kotanga te masumu oyo apengwisaki na yango Yuda mpo na kosala mabe na miso ya Yawe.
17 Was aber mehr von Manasse zu sagen ist und alles, was er getan hat, und seine Sünde, die er tat, siehe, das ist geschrieben in der Chronik der Könige Juda's.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Manase, misala na ye nyonso mpe masumu oyo asalaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
18 Und Manasse entschlief mit seinen Vätern und ward begraben im Garten an seinem Hause, im Garten Usas. Und sein Sohn Amon ward König an seiner Statt.
Manase akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na elanga ya ndako na ye ya bokonzi, oyo babengaka elanga ya Uza. Amoni, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
19 Zweiundzwanzig Jahre alt war Amon, da er König ward, und regierte zwei Jahre zu Jerusalem. Seine Mutter hieß Mesullemeth, eine Tochter des Haruz von Jotba.
Amoni azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mibale na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Meshulemeti. » Meshulemeti azalaki mwana mwasi ya Arutsi, moto ya Yotiba.
20 Und er tat, was dem HERRN übel gefiel, wie sein Vater Manasse getan hatte,
Amoni asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Manase, tata na ye, asalaki.
21 und wandelte in allem Wege, den sein Vater gewandelt hatte, und diente allen Götzen, welchen sein Vater gedient hatte, und betete sie an,
Atambolaki na banzela nyonso ya tata na ye, na kosambelaka banzambe ya bikeko oyo tata na ye asambelaki mpe agumbamelaki.
22 und verließ den HERRN, seiner Väter Gott, und wandelte nicht im Wege des HERRN.
Asundolaki Yawe, Nzambe ya batata na ye, mpe atambolaki na banzela ya Yawe te.
23 Und seine Knechte machten einen Bund wider Amon und töteten den König in seinem Hause.
Bakalaka ya Amoni basalelaki ye likita mpe babomaki ye kati na ndako na ye ya bokonzi.
24 Aber das Volk im Land schlug alle, die den Bund gemacht hatten wider den König Amon. Und das Volk im Lande machte Josia, seinen Sohn zum König an seiner Statt.
Bongo bato ya mokili babomaki bato nyonso oyo basalelaki mokonzi Amoni likita mpe bakomisaki Joziasi, mwana na ye ya mobali, mokonzi na esika na ye.
25 Was aber Amon mehr getan hat, siehe, das ist geschrieben in der Chronik der Könige Juda's.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Amoni, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
26 Und man begrub ihn in seinem Grabe im Garten Usas. Und sein Sohn Josia ward König an seiner Statt.
Bakundaki ye kati na kunda na ye, kati na elanga ya Uza; mpe Joziasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

< 2 Koenige 21 >