< Psalm 93 >

1 Der Herr ist König, angetan mit Hoheit. Mit Macht bekleidet sei der Herr, gegürtet! Dann steht die Welt da ohne Wanken.
Yawe azali kokonza, alati lokumu monene; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.
2 Dein Thron steht wieder da wie einst. Du bist dann wie vor alters.
Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala; seko na seko, ozali.
3 Erheben Ströme, Herr, erheben Ströme ihr Gebraus, erheben Ströme ihr Getöse,
Yawe, bibale egangaka! Bibale etombolaka lokito na yango; bibale etombolaka makelele na yango.
4 viel stärker noch als vieler Wasser Tosen ist die Meeresbrandung; doch mächtiger der Herr in Himmelshöhen!
Yawe azali monene makasi, na bisika ya likolo; aleki lokito ya mayi minene, mpe bambonge milayi ya ebale monene.
5 So bleibt, was Du verordnest, gültig. Wir wollen in Dein heilig Haus noch lange wallen, Herr.
Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo; bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.

< Psalm 93 >