< 1 Mose 33 >

1 Jakob aber erhob seine Augen und schaute; da kam Esau mit 400 Mann. Da verteilte er die Kinder auf Lea, Rachel und die beiden Mägde.
Tango Jakobi atombolaki miso na ye, amonaki na mosika Ezawu koya elongo na bato nkama minei. Boye Jakobi akabolaki bana na ye: ndambo epai ya Lea, ndambo epai ya Rasheli mpe ndambo mosusu epai ya basali mibale ya basi.
2 Und zwar stellte er die Mägde und ihre Kinder voran, dahinter Lea mit ihren Kindern und ganz hinten Rachel und Joseph.
Atiaki basali ya basi elongo na bana na bango na liboso; Lea mpe bana na ye na sima; mpe Rasheli na Jozefi na suka.
3 Er selbst ging ihnen voraus und neigte sich siebenmal zur Erde, bis er zu seinem Bruder kam.
Ye moko alekaki liboso na bango mpe afukamaki na mabele mbala sambo wana azalaki kopusana liboso ya ndeko na ye ya mobali.
4 Da lief ihm Esau entgegen, umarmte ihn, fiel ihm um den Hals und küßte ihn. Und sie weinten.
Ezawu akimaki mbangu mpo na kokutana na ye; ayambaki ye, amibwakaki na nzoto na ye mpo na koyamba ye mpe apesaki ye beze; bongo bakomaki kolela.
5 Dann erhob er seine Augen, sah die Weiber mit den Kindern und sprach: "Was sind diese da bei dir?" Er sprach: "Das sind die Kinder, die Gott deinem Sklaven geschenkt hat."
Tango atombolaki miso na ye, amonaki na mosika basi mpe bana. Atunaki: — Banani wana bazali elongo na yo? Jakobi azongisaki: — Ezali bana oyo Nzambe apesi, na bolingo na Ye, epai ya mosali na yo.
6 Da traten die Mägde mit ihren Kindern herzu und verneigten sich.
Boye, basali ya basi elongo na bana na bango bapusanaki mpe bafukamaki.
7 Auch Lea und ihre Kinder traten herzu und verneigten sich. Danach traten Joseph und Rachel herzu und verneigten sich.
Na sima, Lea elongo na bana na ye bayaki kofukama. Bongo na suka, Jozefi elongo na Rasheli bayaki mpe kofukama.
8 Er sprach: "Was soll dir dies ganze Lager, auf das ich gestoßen bin?" Er sprach: "Auf daß ich Gnade finde bei meinem Herrn!"
Ezawu atunaki: — Ngulupa nyonso oyo nakutani na yango, tina na yango nini? Jakobi azongisaki: — Ezali mpo ete nazwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai.
9 Da sprach Esau: "Ich habe übergenug, mein Bruder. Behalte, was dir gehört!"
Kasi Ezawu azongisaki: — Ndeko na ngai, biloko nyonso oyo, nazali na yango ebele; bomba biloko na yo mpo na yo moko.
10 Jakob sprach: "Nicht doch! Habe ich in deinen Augen Gnade gefunden, dann mußt du meine Gabe von mir annehmen. Denn ich habe dein Antlitz gesehen, so, wie ich Gottes Antlitz sah, und du nahmst mich zu Gnaden an.
Jakobi alobaki: — Nabondeli yo: soki nazwi ngolu na miso na yo, ndima kozwa biloko oyo lokola kado kowuta na maboko na ngai; pamba te ndenge namoni yo, ezali lokola namoni Nzambe, mpo ete oyambi ngai na boboto.
11 Nimm doch mein Grußgeschenk, das dir dargebracht ward! Denn Gott hat mich begnadet, und ich habe vollauf." So drang er in ihn, bis er es nahm.
Nabondeli yo penza, ndima makabo oyo namemeli yo; pamba te Nzambe nde apesaki ngai yango na ngolu na Ye mpe nazali na nyonso. Lokola Jakobi azalaki kaka kotia molende, Ezawu andimaki kozwa yango.
12 Dann sprach er: "Laßt uns aufbrechen und weiterziehen! Ich halte gleichen Schritt mit dir."
Ezawu alobaki: — Telema tokende, nakotambola na yo nzela moko.
13 Er aber sprach zu ihm: "Mein Herr sieht selber, daß die Kinder zart sind, und säugende Schafe und Kinder stehen in meiner Obhut. Wollte ich sie einen Tag über Gebühr anstrengen, dann stürbe die ganze Herde.
Kasi Jakobi azongiselaki ye: — Oh nkolo na ngai! Oyebi malamu ete bana bazwi nanu makasi te, mpe nazali lisusu na bameme, bangombe mpe bantaba ya basi oyo ezali nanu komelisa mabele. Soki tomeki kotambolisa yango mbangu makasi kaka na mokolo moko, bibwele nyonso ekokufa.
14 So ziehe mein Herr doch vor seinem Sklaven her! Ich ziehe gemächlich weiter, im Schritte des Viehstands vor mir und im Schritte der Kinder, bis ich zu meinem Herrn nach Seïr komme!"
Boye, tika ete nkolo na ngai akende liboso, wana ngai nakotambola malembe-malembe na sima, kolanda etamboli ya bibwele oyo ezali liboso na ngai, mpe kolanda etamboli ya bana, kino nakokoma epai ya nkolo na ngai, na Seiri.
15 Da sprach Esau: "So will ich wenigstens bei dir einen Teil meiner Leute lassen." Er aber sprach: "Wozu? Möchte ich nur Huld bei meinem Herrn finden!"
Ezawu alobaki: — Nabondeli yo, ndima ete natikela yo ndambo ya bato na ngai. Kasi Jakobi atunaki: — Mpo na nini kosala bongo? Tika ete nazwa kaka ngolu na miso ya nkolo na ngai!
16 So kehrte Esau an jenem Tag nach Seïr zurück.
Boye, kaka na mokolo wana, Ezawu azwaki nzela mpe azongaki na Seiri.
17 Jakob aber zog nach Sukkot weiter und baute sich ein Haus, seinem Vieh aber machte er Laubhütten. Daher nennt man den Ort Sukkot.
Nzokande, Jakobi akendeki na Sukoti. Atongaki kuna ndako mpo na ye moko mpe mpo na bibwele na ye; yango wana babengi esika yango Sukoti.
18 Und Jakob kam in friedlicher Gesinnung nach der Stadt Sichem im Lande Kanaan auf seiner Fahrt aus Paddan Aram und lagerte östlich von der Stadt.
Longwa na mokili ya Padani-Arami, Jakobi akomaki na kimia na engumba Sishemi oyo ezali na mokili ya Kanana; mpe atelemisaki ndako na ye ya kapo liboso ya engumba.
19 Er kaufte das Stück Feld, wo er sein Zelt gespannt, von den Söhnen Chamors, des Herrn von Sichem, um 100 Beutel.
Na motuya ya bibende ya palata nkama moko, asombaki na maboko ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi, eteni ya mabele epai wapi atongaki ndako na ye ya kapo.
20 Und er stellte dort einen Altar auf und pries bei ihm den Gott Israels.
Atongaki kuna etumbelo moko oyo abengaki: « El, Nzambe ya Isalaele. »

< 1 Mose 33 >