< 2 Mose 16 >

1 Von Elim brachen sie auf und kamen, die ganze Gemeinschaft Israels, in die Wüste Sin zwischen Elim und Sinai am fünfzehnten Tage des zweiten Monats nach ihrem Auszuge aus Ägypterland.
Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele balongwaki na Elimi mpe bakomaki na esobe ya Tsini, oyo ezali kati ya Elimi mpe ngomba Sinai, na mokolo ya zomi na mitano, na sanza ya mibale sima na kobima na bango na Ejipito.
2 Da murrten sie, die ganze israelitische Gemeinschaft, gegen Moses und Aaron wegen der Wüste.
Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe Aron kati na esobe.
3 Und die Israeliten sprachen zu ihm: "Wären wir doch im Ägypterland durch des Herrn Hand gestorben! Da saßen wir beim Fleischtopf und aßen uns satt an Brot. Ihr habt uns in diese Wüste geführt, diese ganze Gemeinde durch Hunger zu töten."
Bana ya Isalaele balobaki na bango: — Ah! Ebongaki kutu loboko na Yawe epamela biso kati na Ejipito, pamba te, kuna, tozalaki kovanda pembeni ya banzungu etonda na misuni; tozalaki kolia mpe kotonda biloko. Kasi bino bomemi biso kati na esobe oyo mpo na koboma lisanga oyo nyonso na nzala!
4 Da sprach der Herr zu Moses: "Ich lasse euch nun Brot vom Himmel regnen. Das Volk gehe hinaus! Doch lese es jeden Tag nur den Tagesbedarf! Damit prüfe ich es, ob es meiner Weisung folgt oder nicht.
Yawe alobaki na Moyize: — Tala, nakokitisela bino mapa wuta na likolo. Mokolo na mokolo, bato bakobanda kobima mpe kolokota mapa oyo ekoki mpo na kolia mokolo wana. Na nzela wana, nakomeka bango mpo na kotala soki bakobatela to te malako na Ngai.
5 Messen sie dann am sechsten Tage, was sie einbringen, so wird es das Doppelte sein von dem, was sie tagtäglich lesen."
Na mokolo ya motoba, bakolokota mbala mibale ndambo oyo bazalaki kolokota mpo na mokolo moko mpe bakolamba yango.
6 Da sprachen Moses und Aaron zu allen Israeliten: "Am Abend erkennt ihr, daß der Herr euch aus Ägypterland geführt hat.
Moyize mpe Aron balobaki na bana nyonso ya Isalaele: — Na pokwa ya lelo, bokoyeba solo ete ezali Yawe nde abimisaki bino na Ejipito.
7 Und am Morgen schaut ihr des Herrn Majestät, hat er doch euer Gemurr gegen den Herrn vernommen. Was sind wir, daß ihr gegen uns murrt?"
Boye lobi na tongo, bokomona nkembo na Yawe; pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Mpo na yango, biso tozali banani mpo ete boyimayima epai na biso?
8 Und Moses sprach: "Der Herr gibt euch am Abend Fleisch zu essen und zur Genüge Brot am Morgen, hat doch der Herr euer Gemurr wider ihn vernommen. Was sind wir? Nicht gegen uns geht euer Gemurr, sondern gegen den Herrn!"
Moyize alobaki lisusu: — Bokoyeba ete ezali solo Yawe tango akopesa bino misuni ya kolia na pokwa mpe mapa ebele na tongo. Pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Biso tozali banani? Boyimaki-yimaki na tina na biso te, kasi na tina na Yawe.
9 Und Moses sprach zu Aaron: "Sag der ganzen Gemeinschaft der Söhne Israels: 'Tritt vor den Herrn! Er hat euer Gemurr vernommen.'"
Boye Moyize alobaki na Aron: — Yebisa lisanga nyonso ya bana ya Isalaele ete bapusana pene ya Yawe mpo ete ayoki koyimayima na bango.
10 Als Aaron dies der ganzen Gemeinschaft der Israeliten verkündigte und sie sich der Wüste zuwandten, da erschien des Herrn Majestät in der Wolke.
Wana Aron azalaki koloba na lisanga nyonso ya bana ya Isalaele, babalolaki miso na bango na ngambo ya esobe, mpe bamonaki nkembo na Yawe kobima na mapata.
11 Und der Herr sprach zu Moses also:
Yawe alobaki na Moyize:
12 "Der Israeliten Gemurr habe ich vernommen. Sag ihnen dies: Ihr werdet Fleisch am Abend essen und morgen früh euch am Brote sättigen. Da möget ihr erkennen, daß ich der Herr, euer Gott, bin."
— Nayoki koyimayima ya bana ya Isalaele. Yebisa bango: « Na pokwa ya lelo, bokolia misuni; bongo na tongo, bokotonda mana. Boye, bokoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bino. »
13 Und Abend war's, da zog ein Wachtelschwarm heran und bedeckte das Lager. Und am Morgen lag eine Tauschicht rings um das Lager.
Kaka na pokwa wana, bakayi eyaki mpe etondisaki molako; mpe na tongo, mamwe ezalaki zingazinga ya molako.
14 Dann stieg die Tauschicht auf, und auf der Wüstenfläche lag etwas Dünnes, Schuppiges, fein wie der Reif auf der Erde.
Tango mamwe elimwaki, biloko ya mike-mike penza lokola bambuma ya mike-mike emonanaki na mabele ya esobe, pembe lokola mvula ya pembe.
15 Die Israeliten sahen es und sprachen zueinander: "Was ist das?", denn sie wußten nicht, was es war. Da sprach Moses zu ihnen: "Dies ist das Brot, das euch der Herr zu essen gibt.
Tango bana ya Isalaele bamonaki yango, batunanaki bango na bango: — Oyo nini? Pamba te bayebaki te soki ezali nini. Moyize alobaki na bango: — Ezali mapa oyo Yawe apesi bino mpo ete bolia.
16 Das ist es, was der Herr mir geboten: 'Leset davon auf, jeder nach Bedarf. Je ein Maß auf den Kopf nach eurer Seelenzahl hole jeglicher für die in seinem Zelt!'"
Tala mibeko oyo Yawe apesi na tina na likambo oyo: « Tika ete moto na moto alokota oyo ekoki mpo na ye kolia, omeri moko mpo na moto moko. Moto na moto akolokota kolanda motango ya bato oyo bazali kati na ndako na ye ya kapo. »
17 Und die Israeliten taten so. Sie lasen auf, der eine viel, der andere wenig.
Bato ya Isalaele basalaki bongo: bamoko balokotaki moke; mpe bamosusu, ebele.
18 Da maßen sie mit dem Maß. Wer viel geholt, hatte nicht mehr, wer wenig geholt, nicht weniger gehabt. Jeder hatte für seinen Bedarf gelesen.
Mpe bamekaki na omeri: moto oyo alokotaki ebele, alekelaki te; mpe oyo alokotaki moke, azangelaki te. Balokotaki moto na moto kolanda oyo ekokaki mpo na ye kolia.
19 Und Moses sprach zu ihnen: "Niemand hebe davon bis zum Morgen auf!"
Moyize ayebisaki bango: — Moko te abomba ata moke kino na tongo.
20 Aber sie hörten nicht auf Moses; sondern einige Männer hoben davon bis zum Morgen auf. Da ward es voller Würmer und roch übel. Moses aber ward auf sie zornig.
Kasi bamosusu kati na bango bayokelaki Moyize te mpe babombaki ndambo na yango kino na tongo. Boye bankusu etondaki na ndambo oyo babombaki, mpe ekomaki kolumba solo ya kopola. Mpo na yango, Moyize atombokelaki bango.
21 So lasen sie es Morgen für Morgen auf, jeder nach seinem Bedarf. Wenn aber die Sonne heiß brannte, schmolz es.
Tongo nyonso, moto na moto abandaki kolokota oyo ekokaki mpo na ye kolia.
22 Aber am sechsten Tage lasen sie doppelte Speise, zwei Maß für einen. Da kamen alle Fürsten der Gemeinschaft und meldeten es Moses.
Na mokolo ya motoba, bana ya Isalaele bazalaki kolokota mbala mibale ndambo oyo bazalaki kolokota mpo na mokolo moko: omeri mibale mpo na moto moko. Bakambi nyonso ya lisanga bayaki koyebisa yango Moyize.
23 Er sprach zu ihnen: "Dies ist es, was der Herr gemeint: Der heilige Ruhetag des Herrn ist morgen. Was ihr backen wollt, backet jetzt! Kochet jetzt, was ihr kochen wollt! Was übrigbleibt, verwahrt bis zum Morgen!"
Moyize alobaki na bango: — Tala mibeko oyo Yawe apesi: « Lobi ezali mokolo ya kopema, mokolo ya Saba oyo ebulisami mpo na Yawe. Bokolamba oyo bolingi kolamba mpe bokotokisa oyo bolingi kotokisa; kasi oyo ekotikala, bobatela yango kino lobi. »
24 Und sie legten es bis zum anderen Morgen zurück, wie Moses befohlen. Nichts roch übel, und kein Wurm war darin.
Bato ya Isalaele babatelaki yango kino na tongo, ndenge kaka Moyize atindaki; mana elumbaki te solo ya kopola, mpe bankusu ezalaki te kati na yango.
25 Und Moses sprach: "Eßt es heute! Denn heute ist ein Ruhetag des Herrn. Ihr findet nichts auf dem Felde.
Moyize ayebisaki bango: — Mokolo ya lelo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya Yawe. Bolia mana oyo bobombaki; pamba te lelo, bokotikala te komona mana na libanda.
26 Sechs Tage könnt ihr es sammeln. Aber am siebten Tage ist Sabbat; an dem gibt es nichts."
Bokobanda kolokota yango mikolo motoba; kasi na mokolo ya sambo, mokolo ya Saba, mana ekobanda kozala te.
27 Doch am siebten Tage gingen vom Volke etliche zum Lesen hinaus; sie fanden aber nichts.
Atako bongo, na mokolo ya sambo, bato mosusu kati na bango babimaki mpo na kolokota yango, kasi bamonaki eloko te.
28 Da sprach der Herr zu Moses: "Wie lange wollt ihr meine Vorschriften und Gebote nicht halten?
Boye Yawe alobaki na Moyize: — Kino tango nini bokoboya kobatela mibeko mpe malako na Ngai?
29 Seht! Der Herr hat euch den Sabbat gegeben. Darum gibt er euch am sechsten Tag Speise für zwei Tage. So bleibe jeder daheim! Am siebten Tage aber gehe niemand von seinem Platz!"
Botia na mito na bino ete Ngai Yawe, napesaki bino mokolo ya Saba. Yango wana, na mokolo ya motoba, napesaka bino mapa mpo na mikolo mibale. Boye tika ete, na mokolo ya sambo, moto na moto avanda epai na ye; moko te abima na libanda.
30 So ruhte am siebten Tage das Volk.
Boye bato bapemaki na mokolo ya sambo.
31 Das Haus Israel aber nannte es Manna. Es war wie Koriandersamen, weißlich, und sein Geschmack wie Honigkuchen.
Bato ya Isalaele babengaki lipa yango mana. Ezalaki pembe lokola bambuma ya koriande mpe elengi lokola mikate balamba na mafuta ya nzoyi.
32 Und Moses sprach: "Das ist es, was der Herr geboten: 'Füllt ein Maß davon zum Verwahr für eure Geschlechter, damit sie sehen das Brot, mit dem ich in der Wüste euch gespeist, als ich euch aus Ägypterland geführt!'"
Moyize alobaki: — Tala mibeko oyo Yawe apesi: « Bozwa omeri moko ya mana mpe bobomba yango mpo na milongo ya bakitani na bino oyo ekoya, mpo ete bamona mapa oyo naleisaki bino na esobe tango nabimisaki bino na Ejipito. »
33 Und Moses sprach zu Aaron: "Nimm einen Krug und tu ein ganzes Maß Manna hinein und lege ihn nieder vor dem Herrn zum Verwahr für eure Geschlechter!"
Boye Moyize alobi na Aron: — Kamata ekolo moko mpe tia omeri moko ya mana kati na yango; bongo tia yango liboso ya Yawe mpo ete ebombama mpo na milongo oyo ekoya.
34 Und wie der Herr dem Moses befohlen, so legte ihn Aaron vor der Gesetzeslade nieder zum Verwahr.
Ndenge kaka Yawe atindaki Moyize, Aron atiaki mana yango liboso ya Sanduku ya Boyokani mpo ete ebombama malamu.
35 Die Israeliten aber aßen das Manna vierzig Jahre, bis sie in bewohntes Land kamen. Das Manna aßen sie, bis sie an die Grenze des Landes kamen.
Bana ya Isalaele baliaki mana mibu tuku minei kino tango bakomaki na mondelo ya mokili ya Kanana.
36 Ein Maß aber ist das Zehntteil eines Scheffels.
Omeri moko ekokani na eteni ya zomi ya efa.

< 2 Mose 16 >