< Luc 8 >

1 Ensuite, il alla de ville en ville et de village en village prêchant, et annonçant l'Évangile du Royaume de Dieu.
Sima na yango, Yesu atambolaki na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bayekoli nyonso zomi na mibale bazalaki elongo na Ye,
2 Avec lui étaient les douze et quelques femmes qui avaient été délivrées de mauvais Esprits, ou guéries de maladies: Marie, celle qu'on appelle Magdelaine, de laquelle étaient sortis sept démons;
bakisa ndambo ya basi oyo bakangolamaki na milimo mabe mpe babikisamaki na bokono: Mari, moto ya Magidala, oyo kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo;
3 Jeanne, femme de Chouza, intendant d'Hérode; Suzanne, et beaucoup d'autres qui l'assistaient de leurs biens.
Jane, mwasi ya Shuza oyo azalaki kobatela biloko ya Erode; Suzana; mpe basi mosusu ebele. Basi yango bazalaki kosalisa mpe kosunga Yesu mpe bayekoli na Ye, na nzela ya biloko na bango moko.
4 Comme il s'assemblait une foule énorme et que de toutes les villes on venait à lui, il dit cette parabole:
Wana ebele ya bato bazalaki kosangana, mpe bato oyo bazalaki kowuta na bingumba bazalaki koya epai ya Ye, alobaki na bango lisese oyo:
5 «Le semeur est sorti pour semer sa semence; il jette sa semence, et des grains sont tombés le long du chemin; on les a foulés aux pieds; et les oiseaux du ciel les ont mangés.»
— Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye. Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela; baleki nzela banyataki-nyataki yango, mpe bandeke ya likolo eliaki yango.
6 «D'autres sont tombés sur des pierres; ils ont levé, puis séché; ils n'avaient pas d'humidité.»
Ndambo mosusu ekweyaki na mabele etonda na mabanga; tango kaka ebandaki kobimisa mito, mito ekawukaki, pamba te ezalaki na mayi te.
7 «D'autres grains sont tombés au milieu des épines, et en même temps ont crû les épines; et elles les ont étouffés.»
Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube; banzube ekolaki nzela moko na yango mpe efinaki-finaki mito na yango.
8 «D'autres sont tombés dans la bonne terre; ils ont levé; ils ont porté du fruit au centuple.» Cela disant, il s'écriait: «Que celui qui a des oreilles pour entendre, entende!»
Kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, ebimisaki mito oyo ekolaki mpe ekomaki banzete: nkona moko na moko ebotaki bambuma nkama moko. Tango Yesu asilisaki koloba bongo, agangaki: — Tika ete moto nyonso oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!
9 Ses disciples lui demandèrent ce que signifiait cette parabole.
Bayekoli ya Yesu batunaki Ye ndimbola ya lisese yango.
10 Il répondit: «A vous il est donné de pénétrer les mystères du Royaume de Dieu, mais les autres ne les connaissent que par des paraboles, afin qu'ils voient sans voir et entendent sans comprendre.»
Azongiselaki bango: — Boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Nzambe epesameli nde na bino; kasi epai ya bato mosusu, nazali koloba na masese, mpo ete, atako bakoki kotala, bamona te; mpe atako bakoki koyoka, basosola te.
11 «Voici le sens de cette parabole: «La semence, c'est la parole de Dieu.
Tala ndimbola ya lisese yango: Nkona ezali Liloba na Nzambe.
12 Le long du chemin sont ceux qui ont écouté; mais ensuite vient le diable, qui enlève de leurs coeurs la parole, de peur qu'ils ne croient et ne soient sauvés.
Nkona oyo ekweyaki pembeni ya nzela ezali bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe, kasi Satana ayaka kolongola yango kati na mitema na bango mpo ete bandima te mpe babikisama te.
13 Sur des pierres sont ceux qui, après avoir écouté la parole, l'ont accueillie avec joie; mais ils n'ont pas de racine; ils ont la foi momentanément et, au moment de l'épreuve, ils se retirent.»
Nkona oyo ekweyaki na mabele etonda na mabanga ezali bato oyo bayokaka Liloba mpe bayambaka yango na esengo, kasi batikaka yango te kozwa misisa: bandimaka kaka mpo na mwa tango moke; soki komekama eyei, basundolaka mbala moko kondima.
14 «La semence tombée parmi les épines représente ceux qui ont écouté la parole, et puis ils sont partis, et chez eux elle demeure stérile, étouffée par les soucis, par les richesses et par les plaisirs de la vie.»
Nkona oyo ekweyaki kati na banzube ezali bato oyo, sima na koyoka Liloba, bamitikaka ete, na etamboli na bango, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo, bomengo mpe bisengo ya mokili efinafina bango, mpe ete babota te bambuma.
15 «La semence tombée dans la bonne terre représente ceux qui retiennent dans un coeur excellent et bon la parole par eux entendue, et portent du fruit avec persévérance.»
Nkona oyo ekweyaki na mabele ya malamu ezali bato oyo, na mitema ya sembo mpe ya malamu, bayokaka Liloba, babatelaka yango, bayikaka mpiko mpe babotaka bambuma.
16 «Personne, quand il allume une lampe, ne la recouvre d'un vase ou ne la pose sous un lit; on la place au contraire sur un pied-de-lampe, afin que ceux qui entrent voient la lumière.
Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto; atiaka yango nde na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole na yango.
17 Car rien n'est caché qui ne doive être découvert, rien n'est secret qui ne doive être connu et mis au jour.
Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga kobima na pole, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana to kobima na pole.
18 Prenez donc garde comment vous écoutez. Car à celui qui aura, il sera donné, et à celui qui n'aura pas, même ce qu'il croit avoir lui sera ôté.»
Boye, bosala keba na lolenge na bino ya koyoka! Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu; kasi na ye oyo azangi, bakobotola ata oyo azali kokanisa ete azali na yango.
19 Sa mère et ses frères, étant venus le trouver, ne pouvaient, à cause de la foule, pénétrer jusqu'à lui.
Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki kotala Yesu, kasi bakokaki te kokoma pene na Ye mpo na ebele ya ebele.
20 On l'en prévint: «Ta mère et tes frères sont là dehors, qui voudraient te voir.»
Moto moko ayebisaki Ye: — Mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali batelemi libanda, bazali na posa ya komona yo.
21 Il répondit, par ces paroles: «Ma mère et mes frères, ce sont ceux-là, qui écoutent la parole de Dieu et qui la mettent en pratique.»
Kasi Yesu azongisaki: — Mama na Ngai mpe bandeko na Ngai, ezali bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batiaka yango na misala.
22 Il monta, un jour, dans une barque avec ses disciples. «Faisons la traversée du lac», leur dit-il. Ils partirent.
Mokolo moko, Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale. Bongo bamataki na bwato mpe bakendeki.
23 Tandis qu'ils naviguaient, Jésus s'endormit; et un tourbillon de vent s'abattit sur le lac; la barque s'emplissait d'eau; ils étaient en danger.
Wana bayekoli bazalaki koluka nkayi, Yesu alalaki pongi. Mopepe moko ya makasi epepaki kati na ebale; bwato ekomaki kotonda na mayi, mpe bakomaki na likama monene.
24 Les disciples allèrent à lui, le réveillèrent, lui disant: «Maître, maître, nous périssons!» Il se leva, se mit à menacer le vent et les flots soulevés. Ils s'arrêtèrent; il se fit un calme.
Bayekoli bapusanaki mpe balamusaki Ye na koganga: — Moteyi, Moteyi, tozali kokufa! Yesu alamukaki mpe apesaki mitindo na mopepe mpe mbonge; bongo ekitaki, mpe kimia ezongaki.
25 Il leur dit alors: «Où est votre foi?» Terrifiés, ils l'admiraient et se disaient l'un à l'autre: «Qui donc est cet homme qui commande aux vents et aux flots, et à qui ils obéissent?»
Yesu atunaki bayekoli na Ye: — Wapi kondima na bino? Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango: « Moto oyo azali penza nani? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye! »
26 Ils abordèrent au pays des Géraséniens, situé en face de la Galilée.
Bakomaki na etuka ya Geraza oyo ezali na ngambo mosusu ya ebale, etalana na Galile.
27 Comme Jésus descendait à terre, vint à sa rencontre un homme de la ville, possédé par des démons. Il était depuis fort longtemps sans vêtements; il vivait en dehors de tout domicile; et demeurait dans les sépulcres.
Tango Yesu anyataki mabele, mobali moko abimaki na engumba mpe ayaki kokutana na Ye; azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Wuta kala, azalaki lisusu te kolata bilamba mpe kovanda na ndako, kasi akomaki kovanda kati na bakunda.
28 Apercevant Jésus, il tomba à ses pieds en jetant des cris, et dit de toutes ses forces: «Qu'y a-t-il entre moi et toi, Jésus, Fils du Dieu Très-Haut? Je t'en conjure, ne me torture point.»
Tango amonaki Yesu, agangaki mpe amibwakaki na makolo na Ye, na koganga na mongongo makasi koleka: — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, olingi nini epai na ngai? Nabondeli Yo, kotungisa ngai te!
29 En effet, Jésus commandait à l'Esprit impur de sortir de cet homme dont depuis très longtemps il s'était emparé. On l'attachait avec des chaînes, on lui mettait des fers aux pieds pour le retenir; il rompait tous les liens et le démon le poussait vers les lieux déserts. Jésus l'interrogea.
Pamba te Yesu apesaki mitindo na molimo ya mbindo ete ebima kati na mobali oyo ekangaki wuta kala. Mpe atako bakangaki ye minyololo na maboko mpe makolo mpe bazalaki kokengela ye, kasi abukaki minyololo yango, mpe molimo mabe ekumbaki ye na bisika oyo azalaki kaka ye moko.
30 «Quel est ton nom?» lui dit-il. — Il répondit: «Légion.» Une quantité de démons étaient, en effet, entrés dans cet homme.
Yesu atunaki ye: — Kombo na yo nani? Azongisaki: — Ngulupa. Pamba te milimo mabe ebele ekotaki kati na ye.
31 Ceux-ci supplièrent Jésus de ne pas ordonner qu'ils allassent à l'abîme, (Abyssos g12)
Bongo milimo mabe yango ezalaki kosenga na Yesu ete atinda yango te kati na libulu ya mozindo. (Abyssos g12)
32 mais de leur permettre d'entrer dans un nombreux troupeau de pourceaux qui étaient là, paissant sur la montagne. Il le leur permit.
Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia kuna na ngomba. Milimo mabe esengaki na Yesu ete atika yango kokota kati na bangulu; mpe Yesu apesaki yango nzela.
33 Les démons sortirent alors de l'homme et entrèrent dans les pourceaux et, d'une course impétueuse, le troupeau se précipita dans le lac et s'y noya.
Milimo mabe ebimaki kati na mobali yango, mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga ya bangulu ekitaki mbangu longwa na ngomba kino kati na ebale mpe ezindaki.
34 Voyant ce qui était arrivé, les gardeurs prirent la fuite et allèrent répandre la nouvelle dans la ville et dans les campagnes.
Tango bakengeli ya bangulu bamonaki likambo oyo ewuti kosalema, bakimaki mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bilanga.
35 Les habitants sortirent pour voir ce qui s'était passé. Ils s'approchèrent de Jésus; ils trouvèrent assis à ses pieds, avec ses vêtements, et plein de bon sens, l'homme de qui les démons étaient sortis. Cela leur fit peur.
Bato babimaki mpo na koya kotala likambo oyo esalemi. Tango bakomaki epai ya Yesu, bamonaki mobali, oyo milimo mabe ebimaki kati na ye, alata bilamba, avandi na makolo ya Yesu na mayele na ye ya kokoka; boye somo ekangaki bango.
36 Les témoins oculaires leur racontèrent comment le démoniaque avait été guéri.
Ba-oyo bamonaki likambo oyo ewuti kosalema bayebisaki bato ndenge nini moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe akangolamaki.
37 Tout ce peuple du pays des Géraséniens pria alors Jésus de s'éloigner d'eux. En effet, ils étaient frappés de terreur. Il remonta donc dans la barque et s'en retourna.
Bongo bato nyonso ya etuka ya bato ya Geraza basengaki na Yesu ete alongwa na etuka na bango, pamba te somo ekangaki bango. Boye Yesu amataki na bwato mpe akendeki.
38 L'homme qui avait été délivré des démons lui demandait la permission de rester avec lui. Mais Jésus le congédia et lui dit:
Mobali oyo akangolamaki na milimo mabe asengaki kokende elongo na Ye, kasi Yesu azongisaki ye na koloba:
39 «Retourne en ta maison, et raconte tout ce que Dieu t'a fait.» Cet homme partit, publiant par toute la ville ce que lui avait fait Jésus.
— Zonga na libota na yo mpe tatola makambo nyonso oyo Nzambe asali mpo na yo. Boye mobali yango akendeki mpe atatolaki na engumba mobimba, makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpo na ye.
40 A son retour, Jésus fut reçu par la foule; tous étaient à l’attendre.
Tango Yesu azongaki, ebele ya bato bayambaki Ye, pamba te bango nyonso bazalaki kozela Ye.
41 A ce moment un homme nommé Jaïrus, qui était chef de la synagogue, vint se jeter à ses pieds, le suppliant d'entrer dans sa maison,
Mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, ayaki, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe abondelaki Ye ete akende na ndako na ye,
42 parce que sa fille unique, âgée de douze ans environ, se mourait.
pamba te mwana na ye kaka moko ya mwasi, ya mibu pene zomi na mibale ya mbotama, akomaki pene ya kokufa. Wana Yesu azalaki kokende, ebele ya bato bazalaki kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso.
43 Il y allait pressé par la foule, lorsqu'une femme, malade d'une perte de sang depuis douze années, qui avait dépensé en médecins tout son avoir, sans qu'aucun d'eux eût pu la guérir,
Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale; mpe asilisaki bozwi na ye nyonso epai ya minganga, kasi moko te alongaki kobikisa ye na bokono yango.
44 s'approcha par derrière et toucha la frange de son vêtement. Sa perte de sang s'arrêta immédiatement.
Adusolaki kino ayaki kotelema na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye; mpe mbala moko, makila na ye etikaki kotanga.
45 Jésus demanda: «Qui est-ce qui m'a touché?» Tous s'en défendirent. «C'est la foule, maître, qui te presse, qui t'accable», lui dirent Pierre et ceux qui étaient avec luit.
Yesu atunaki: — Nani asimbi Ngai? Lokola moto ata moko te andimaki, Petelo alobaki na Yesu: — Moteyi, ebele ya bato bazali kofinana-finana mpe kotutana-tutana na Yo.
46 Jésus reprit: «Quelqu'un m'a touché, car j'ai senti qu'une vertu sortait de moi.»
Kasi Yesu alobaki: — Moto moko asimbi Ngai; nayebi ete nguya ebimi kati na Ngai.
47 Se voyant découverte, la femme, toute tremblante, vint se jeter à ses pieds et déclara devant tout le monde pourquoi elle l'avait touché, et comment elle avait été immédiatement guérie.
Awa mwasi yango amonaki ete azali ya kobombama te, akendeki na kolenga, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe alobaki na miso ya bato nyonso mpo na nini asimbaki Yesu mpe ndenge nini abiki mbala moko na bokono na ye.
48 Et lui, il lui dit: «Ma fille, ta foi t'a guérie; va en paix.»
Kasi Yesu alobaki na ye: — Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo; kende na kimia.
49 Comme il parlait encore, arriva quelqu'un de chez le chef de la synagogue disant: «Ta fille est morte, ne fatigue pas davantage le maître.»
Wana Yesu azalaki nanu koloba, moto moko ayaki wuta na ndako ya Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, mpe alobaki: — Mwana na yo ya mwasi akufi. Kotungisa lisusu Moteyi te.
50 Jésus, entendant ces paroles, dit à Jaïrus: «Ne crains point, crois seulement, et elle sera sauvée.»
Lokola Yesu ayokaki ye koloba bongo, alobaki na Jairisi: — Kobanga te! Ndima kaka, mpe akobika na bokono na ye.
51 Arrivé à la maison, il ne permit à personne d'entrer avec lui, sinon à Pierre, à Jean et à Jacques, ainsi qu'au père et à la mère de l'enfant.
Tango Yesu akomaki na ndako ya Jairisi, atikaki moto moko te kokota elongo na Ye, longola kaka Petelo, Yoane, Jake, tata mpe mama ya mwana.
52 Tous ceux qui étaient là pleuraient à haute voix et se lamentaient sur elle. Il leur dit: «Ne pleurez pas, elle n'est pas morte, mais elle dort.»
Bato nyonso bazalaki kolela mpe koyoka mawa mpo na mwana yango. Kasi Yesu alobaki: — Bokata kolela; akufi te, azali nde ya kolala!
53 Et on se moquait de lui; on savait bien qu'elle était morte.
Bato basekaki Yesu, wana bayebaki ete asilaki kokufa.
54 Jésus, alors, lui saisit la main et prononça ces paroles: «Mon enfant, réveille-toi!» Et son esprit revint.
Kasi Yesu asimbaki ye na loboko mpe alobaki: — Mwana na Ngai, lamuka!
55 Elle se leva aussitôt, et Jésus commanda de lui donner à manger.
Pema ya bomoi ezongaki kati na mwana; mpe mbala moko, atelemaki. Bongo Yesu atindaki bango kopesa ye eloko ya kolia.
56 Ses parents étaient transportés; mais il leur ordonna de ne dire à personne ce qui était arrivé.
Baboti na ye bakamwaki, kasi Yesu apekisaki bango koloba na moto ata moko te likambo oyo ewuti kosalema.

< Luc 8 >