< Jérémie 9 >

1 Plût à Dieu que ma tête fût comme un réservoir d'eau, et que mes yeux fussent une vive fontaine de larmes, et je pleurerais jour et nuit les blessés à mort de la fille de mon peuple!
Ah! Soki moto na ngai ezalaki etima, mpe soki miso na ngai ezalaki liziba ya mpinzoli, nalingaki kolela butu mpe moyi mpo na bato na ngai, oyo basili koboma.
2 Plût à Dieu que j'eusse au désert une cabane de voyageurs, j'abandonnerais mon peuple, et me retirerais d'avec eux; car ils sont tous des adultères, et une troupe de perfides.
Ah! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi!
3 Ils ont tendu leur langue, [qui leur a été comme] leur arc pour décocher le mensonge, et ils se sont renforcés dans la terre contre la fidélité, parce qu'ils sont allés de malice en malice, et ne m'ont point reconnu, dit l'Eternel.
« Babongisaka lolemo na bango lokola tolotolo mpo na kokosa; balongaka kati na mokili na nzela ya solo te, pamba te basalaka se mabe likolo ya mabe mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe.
4 Gardez-vous chacun de son intime ami, et ne vous fiez à aucun frère; car tout frère fait métier de supplanter, et tout intime ami va médisant.
« Tika ete moto na moto asala keba na moninga na ye mpe atia motema te na ndeko na ye, pamba te ndeko nyonso azali moto ya lokuta, mpe moninga nyonso azali moto ya matongi.
5 Et chacun se moque de son intime ami, et on ne parle point en vérité; ils ont instruit leur langue à dire le mensonge, ils se tourmentent extrêmement pour mal faire.
Moninga azali kokosa moninga na ye, mpe moto moko te azali koloba solo. Bamibongisaka mpo na koloba lokuta, babimisaka motoki na bango mpo na kosala masumu.
6 Ta demeure est au milieu de la tromperie; ils refusent à cause de la tromperie de me reconnaître, dit l'Eternel.
Mosala na bango se kokosa na kokosa; mpe na lokuta na bango, baboyaka kotosa Ngai, » elobi Yawe.
7 C'est pourquoi ainsi a dit l'Eternel des armées: voici, je m'en vais les fondre, et je les éprouverai; car comment en agirais-je autrement à l'égard de la fille de mon peuple?
Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Tala, nakopetola mpe nakomeka bango na moto, pamba te nasala lisusu nini mpo na masumu ya bato na Ngai?
8 Leur langue est un trait décoché, elle profère des fraudes; chacun a la paix dans sa bouche avec son intime ami, mais dans son intérieur il lui dresse des embûches.
Lolemo na bango ezali lokola likonga oyo ebomaka, ebimisaka kaka maloba ya lokuta. Moto na moto alobaka na moninga na ye na esengo na monoko; kasi na se ya motema, atielaka ye motambo.
9 Ne punirais-je point en eux ces choses-là? dit l'Eternel. Mon âme ne se vengerait-elle pas d'une nation qui est telle?
Bongo na makambo ya boye, napesa bango etumbu te, » elobi Yawe? « Nazongisa mabe na mabe te na ekolo ya boye? »
10 J'élèverai ma voix avec larmes, et je prononcerai à haute voix une lamentation à cause des montagnes, et une complainte à cause des cabanes du désert, parce qu'elles ont été brûlées, de sorte qu'il n'y a personne qui y passe, et qu'on n'y entend plus le cri des troupeaux; les oiseaux des cieux et le bétail s'en sont fuis, ils s'en sont allés.
Nakosala matanga mpe nakolela mpo na bangomba mpe matiti ya esobe. Nyonso esili kokawuka mpe moto moko te azali lisusu kolekela wana; ezala makelele ya bibwele to ya bandeke ezali lisusu koyokana te; bandeke ya likolo ekimi mpe banyama ya zamba esili kokende.
11 Et je réduirai Jérusalem en monceaux de ruines, elle sera une retraite de dragons, et je détruirai les villes de Juda, tellement qu'il n'y aura personne qui y habite.
« Nakokomisa Yelusalemi liboke ya mabanga oyo ebukana-bukana, ndako ya mbwa ya zamba; nakobebisa bingumba ya Yuda, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna.
12 Qui est l'homme sage qui entende ceci, et qui est celui à qui la bouche de l'Eternel ait parlé, qui en fasse le rapport, [et qui dise] pourquoi le pays est-il désolé, et brûlé comme un désert, sans que personne y passe?
Nani azali penza na bwanya mpo na kososola makambo ya boye? Nani Yawe ateyaki mpo ete alimbola yango? Mpo na nini mokili ebebisami, etikali pamba lokola esobe epai wapi moto alekaka te? »
13 L'Eternel donc a dit: parce qu'ils ont abandonné ma Loi, laquelle je leur avais proposée, et qu'ils n'ont point écouté ma voix, et n'ont point marché selon elle;
Yawe alobi: « Makambo oyo nyonso ekomeli bango mpo ete basundoli Mobeko na Ngai oyo natiaki liboso na bango, batosi Ngai te mpe basaleli malako na Ngai te.
14 Mais parce qu'ils ont marché après la dureté de leur cœur, et après les Bahalins; ce que leurs pères leur ont enseigné;
Nzokande, batiaki kaka mito makasi mpe bakobaki kolanda banzambe ya Bala oyo batata na bango balakisaki bango. »
15 C'est pourquoi, ainsi a dit l'Eternel des armées, le Dieu d'Israël: voici, je m'en vais donner à manger à ce peuple-ci de l'absinthe, et je leur donnerai à boire de l'eau de fiel.
Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Tala, nakoleisa bato oyo matiti ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge.
16 Je les disperserai parmi les nations que ni eux ni leurs pères n'ont point connues; et j'enverrai après eux l'épée, jusqu’à ce que je les aie consumés.
Nakopanza bango kati na bikolo oyo, ezala bango to bakoko na bango, batikalaki koyeba te; nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango. »
17 Ainsi a dit l'Eternel des armées: recherchez, et appelez des pleureuses, afin qu'elles viennent, et mandez les femmes sages, et qu'elles viennent;
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Botala malamu makambo oyo! Bobengisa basi oyo balelaka bibembe, bobengisa penza ba-oyo bayebi kolela malamu!
18 Qu'elles se hâtent, et qu'elles prononcent à haute voix une lamentation sur nous, et que nos yeux se fondent en pleurs et que nos paupières fassent ruisseler des larmes.
Tika ete baya noki mpo ete bayembela biso banzembo ya mawa kino tango mpinzoli ekobima biso mpe ekotondisa miso na biso.
19 Car une voix de lamentation a été ouïe de Sion, [disant]: comment avons-nous été détruits? Nous sommes fort confus, parce que nous avons abandonné le pays, parce que nos tentes nous ont jetés dehors.
Kolela ya mawa ezali koyokana wuta na Siona: ‹ Ah! Tala ndenge nini tosili kobebisama! Tala ndenge nini tosambwe! Tika ete tokima mokili na biso, pamba te bandako na biso ebebisami. › »
20 C'est pourquoi, vous femmes, écoutez la parole de l'Eternel, et que votre oreille reçoive la parole de sa bouche; et enseignez vos filles à lamenter, et chacune sa compagne à faire des complaintes.
Eh basi, boyoka Liloba na Yawe! Bofungola matoyi mpo na koyoka maloba ya monoko na Ye. Bolakisa bana na bino ya basi banzembo ya mawa mpe tika ete moko na moko ayekolisa moninga na ye nzembo ya mawa.
21 Car la mort est montée par nos fenêtres, elle est entrée dans nos palais, pour exterminer les enfants, [tellement qu'il n'y en a plus] dans les rues; et les jeunes gens, [tellement qu'il n'y en a plus] par les places.
Kufa emati mpe ekoti na nzela ya maninisa na biso, ekoti kino na bandako na biso, oyo batonga makasi; eyei kosilisa koboma bana na babalabala, mpe bilenge mibali na bisika oyo bato ebele bokutanaka.
22 Dis: ainsi a dit l'Eternel: même les corps morts des hommes seront étendus comme du fumier sur le dessus des champs, et comme une poignée d'épis après les moissonneurs, lesquels personne ne recueille.
Loba: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Bibembe ya bato ekolala na mabele mpe ekotikala wana lokola fimie ya bilanga, lokola liboke ya bambuma oyo mobuki bambuma atiki na sima na ye mpe moto oyo akolokota yango azali te. › »
23 Ainsi a dit l'Eternel: que le sage ne se glorifie point en sa sagesse; que le fort ne se glorifie point en sa force, et que le riche ne se glorifie point en ses richesses;
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Tika ete moto ya bwanya amikumisa te mpo na bwanya na ye to moto ya makasi mpo na makasi na ye to moto ya bozwi mpo na bozwi na ye.
24 Mais que celui qui se glorifie, se glorifie en ce qu'il a de l'intelligence, et qu'il me connaît; car je suis l'Eternel, qui fais miséricorde, et jugement, et justice sur la terre; parce que je prends plaisir en ces choses-là, dit l'Eternel.
Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa mpo ete azali na bososoli mpe ayebi Ngai, mpo ete ayebi ete nazali Yawe oyo atalisaka bolamu, bosembo mpe boyengebene na mokili; pamba te nasepelaka nde na makambo wana, » elobi Yawe.
25 Voici, les jours viennent, dit l'Eternel, que je punirai tout circoncis ayant [encore] le prépuce.
« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bakatama ngenga kaka na nzoto, kasi na mitema te:
26 L'Egypte, et Juda, et Edom, et les enfants de Hammon, et Moab, et tous ceux qui sont aux bouts des coins, habitant dans le désert; car toutes les nations ont le prépuce, et toute la maison d'Israël a le prépuce du cœur.
bato ya Ejipito, ya Yuda, ya Edomi, ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi nyonso ya esobe oyo bamikataka mandefu; pamba te bato ya bikolo oyo nyonso bakatama ngenga te. Mpe ezala bana nyonso ya Isalaele oyo bakatama ngenga, bakatama yango kaka na bonzoto, kasi na mitema te. »

< Jérémie 9 >