< 1 Rois 14 >

1 En ce temps-là Abija fils de Jéroboam devint malade.
Na tango wana kaka, Abiya, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki kobela.
2 Et Jéroboam dit à sa femme: Lève-toi maintenant, et te déguise, en sorte qu'on ne connaisse point que tu es la femme de Jéroboam, et va-t'en à Silo; là est Ahija le Prophète, qui m'a dit que je serais Roi sur ce peuple.
Jeroboami alobaki na mwasi na ye: — Mibongola mpo ete bato bayeba te ete ozali mwasi ya mokonzi Jeroboami; bongo, kende na Silo. Mosakoli Ayiya azali kuna; ye nde alobaki na ngai ete nakozala mokonzi ya bato oyo.
3 Et prends en ta main dix pains, et des gâteaux, et un vase plein de miel, et entre chez lui; il te déclarera ce qui doit arriver à ce jeune garçon.
Kamata mapa zomi, ndambo ya bagato, na ekolo ya mafuta ya nzoyi, mpe kende kokutana na ye; akoyebisa yo makambo oyo ekokomela mwana na biso ya mobali.
4 La femme de Jéroboam fit donc ainsi; car elle se leva, et s'en alla à Silo, et entra dans la maison d'Ahija. Or Ahija ne pouvait voir, parce que ses yeux étaient obscurcis, à cause de sa vieillesse.
Mwasi ya Jeroboami asalaki makambo oyo mobali na ye atindaki ye: akendeki na Silo mpe akotaki na ndako ya Ayiya. Nzokande, Ayiya azalaki komona lisusu te, pamba te miso na ye ekufaki mpo ete akomaki mobange.
5 Et l'Eternel dit à Ahija: Voilà la femme de Jéroboam, qui vient pour s'enquérir de toi touchant son fils, parce qu'il est malade; tu lui diras telles et telles chose; quand elle entrera elle fera semblant d'être quelque autre.
Yawe alobaki na Ayiya: — Mwasi ya Jeroboami azali koya kotuna yo toli mpo na mwana na ye ya mobali, pamba te azali kobela. Osengeli kopesa ye eyano songolo to pakala. Tango akoya, akosala lokola nde azali moto mosusu.
6 Aussitôt donc qu'Ahija eut entendu le bruit de ses pieds, comme elle entrait à la porte, il dit: Entre, femme de Jéroboam. Pourquoi fais-tu semblant d'être quelque autre? Je suis envoyé vers toi [pour t'annoncer] des choses dures.
Tango Ayiya ayokaki makelele ya makolo ya mwasi ya Jeroboami na ekuke, alobaki: — Kota, mwasi ya Jeroboami! Mpo na nini ozali komibongola? Natindami epai na yo mpo na koyebisa yo sango mabe.
7 Va, [et] dis à Jéroboam: Ainsi a dit l'Eternel le Dieu d'Israël; parce que je t'ai élevé du milieu du peuple, et que je t'ai établi pour Conducteur de mon peuple d'Israël;
Kende koloba na Jeroboami: « Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Natombolaki yo kati na bato mpe nakomisaki yo mokambi ya bato na Ngai, Isalaele.
8 Et que j'ai déchiré le Royaume de la maison de David, et que je te l'ai donné; mais parce que tu n'as point été comme David mon serviteur, qui a gardé mes commandements, et qui a marché après moi de tout son cœur, faisant seulement ce qui est droit devant moi;
Nalongolaki bokonzi na maboko ya ndako ya Davidi mpe napesaki yo yango, kasi otambolaki te lokola Davidi, mowumbu na Ngai, oyo atosaki mibeko na Ngai mpe azalaki kolanda Ngai na motema na ye mobimba, mpo na kosala oyo kaka ezali malamu na miso na Ngai.
9 Et qu'en faisant ce que tu as fait, tu as fait pis que tous ceux qui ont été devant toi; vu que tu t'en es allé, et t'es fait d'autres dieux, et des images de fonte, pour m'irriter, et que tu m'as rejeté derrière ton dos;
Kasi yo, osali mabe koleka bato nyonso oyo bazalaki liboso na yo: omisaleli banzambe mosusu, bikeko ya bibende banyangwisa na moto; boye, olamusi kanda na Ngai mpe opesi Ngai mokongo.
10 A cause de cela, voici, je m'en vais amener du mal sur la maison de Jéroboam, et je retrancherai ce qui appartient à Jéroboam, depuis l'homme jusqu'à un chien, tant ce qui est serré, que ce qui est délaissé en Israël, et je raclerai la maison de Jéroboam, comme on racle la fiente, jusqu'à ce qu'il n'en reste plus.
Yango wana, nakoyeisa pasi na ndako ya Jeroboami, nakosilisa koboma mibali nyonso kati na ndako ya Jeroboami, ezala mowumbu to monsomi kati na Isalaele; nakokomba ndako ya Jeroboami ndenge bakombaka matiti ya mbindo, kino nyonso penza ekosila.
11 Celui [de la famille] de Jéroboam qui mourra dans la ville, les chiens le mangeront; et celui qui mourra aux champs, les oiseaux des cieux le mangeront; car l'Eternel a parlé.
Bambwa ekolia bato nyonso ya Jeroboami, oyo bakokufa kati na engumba; mpe bandeke ya likolo ekolia bato nyonso oyo bakokufa na zamba, elobi Yawe. › »
12 Toi donc lève-toi, et t'en va en ta maison, [et] aussitôt que tes pieds entreront dans la ville, l'enfant mourra.
Mpo na yo, telema mpe zonga na ndako na yo. Tango kaka okotia makolo na yo kati na engumba na yo, mwana na yo ya mobali akokufa.
13 Et tout Israël mènera deuil sur lui, et l'ensevelira; car lui seul [de la famille] de Jéroboam entrera au sépulcre, parce que l'Eternel le Dieu d'Israël a trouvé quelque chose de bon en lui [seul] de [toute] la maison de Jéroboam.
Bato nyonso ya Isalaele bakosalela ye matanga mpe bakokunda ye. Ye moko kaka, kati na ndako ya Jeroboami, nde bakokunda; pamba te kati na ndako mobimba ya Jeroboami, ye kaka nde Nzambe amoni na eloko ya malamu oyo esepelisi Yawe, Nzambe ya Isalaele.
14 Et l'Eternel s'établira un Roi sur Israël, qui en ce jour-là retranchera la maison de Jéroboam; et quoi? même dans peu.
Yawe akobimisa mpo na Ye moko, mokonzi mosusu ya Isalaele oyo akosilisa koboma ndako nyonso ya Jeroboami. Solo, ezali nde mpo na lelo, kaka sik’oyo!
15 Et l'Eternel frappera Israël, [l'agitant] comme le roseau est agité dans l'eau; et il arrachera Israël de dessus cette bonne terre qu'il a donnée à leurs pères, et les dispersera au delà du fleuve; parce qu'ils ont fait leurs bocages, irritant l'Eternel.
Yawe akobeta Isalaele, mpe Isalaele akoningana lokola nzete oyo ebotaka na mayi, oyo mayi ezali koningisa; akopikola Isalaele wuta na mabele ya malamu oyo apesaki na bakoko na ye mpe akopanza bango mosika ya ebale Efrate, pamba te balamusi kanda ya Yawe na kosalaka makonzi ya bule mpo na Ashera.
16 Et l'Eternel abandonnera Israël à cause des péchés de Jéroboam, par lesquels il a péché, et fait pécher Israël.
Akokaba Isalaele mpo na masumu oyo Jeroboami asali mpe asalisi Isalaele.
17 Alors la femme de Jéroboam se leva, et s'en alla, et vint à Tirtsa: et comme elle mettait le pied sur le seuil de la maison, le jeune garçon mourut.
Mwasi ya Jeroboami atelemaki, akendeki mpe akomaki na Tiritsa. Tango akomaki na ekuke ya ndako na ye, mwana na ye ya mobali akufaki.
18 Et on l'ensevelit, et tout Israël mena deuil sur lui, selon la parole de l'Eternel, laquelle il avait proférée par son serviteur Ahija le Prophète.
Bakundaki ye, mpe Isalaele mobimba basalaki matanga ndenge kaka Yawe alobaki na nzela ya mowumbu na Ye, mosakoli Ayiya.
19 Et quant au reste des faits de Jéroboam, comment il a fait la guerre, et comment il a régné, voilà ils sont écrits au Livre des Chroniques des Rois d'Israël.
Misala mosusu ya Jeroboami, bitumba mpe bokonzi na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
20 Or le temps que Jéroboam régna, fut vingt et deux ans; puis il s'endormit avec ses pères, et Nadab son fils régna en sa place.
Jeroboami asalaki mibu tuku mibale na mibale na bokonzi, akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye. Nadabi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
21 Et Roboam fils de Salomon régnait en Juda; il avait quarante et un ans quand il commença à régner, et il régna dix-sept ans à Jérusalem, la ville que l'Eternel avait choisie d'entre toutes les Tribus d'Israël, pour y mettre son Nom. Sa mère avait nom Nahama, et était Hammonite.
Roboami, mwana mobali ya Salomo, akomaki mokonzi ya Yuda; azalaki na mibu tuku minei na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na sambo na Yelusalemi, engumba oyo Yawe aponaki kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo na kotia Kombo na Ye. Kombo ya mama na Roboami ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni.
22 Et Juda aussi fit ce qui déplaît à l'Eternel, et par leurs péchés qu'ils commirent ils l'émurent à jalousie plus que leurs pères n'avaient fait dans tout ce qu'ils avaient fait.
Bato ya Yuda basalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Na nzela ya masumu oyo basalaki, balamusaki zuwa ya Nzambe koleka oyo batata na bango basalaki.
23 Car eux aussi se bâtirent des hauts lieux; et firent des images, et des bocages, sur toute haute colline, et sous tout arbre verdoyant.
Batongaki lisusu mpo na bango moko bisambelo ya likolo ya bangomba, mabanga ya bule, makonzi ya bule mpo na Ashera na likolo ya bangomba nyonso mpe na se ya banzete nyonso ya mobesu.
24 Même il y avait au pays des gens prostitués à la paillardise, et ils firent selon toutes les abominations des nations que l'Eternel avait chassées de devant les enfants d'Israël.
Ezalaki lisusu na mibali oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule kati na mokili ya Yuda: bamipesaki na kosala makambo ya nkele kolanda bikolo ya bapaya oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele.
25 r il arriva qu'en la cinquième année du Roi Roboam, Sisak, Roi d'Egypte, monta contre Jérusalem;
Tango Roboami akokisaki mibu mitano na bokonzi, Shishaki, mokonzi ya Ejipito, ayaki kobundisa Yelusalemi.
26 Et prit les trésors de la maison de l'Eternel, et les trésors de la maison Royale, et il emporta tout. Il prit aussi tous les boucliers d'or que Salomon avait faits.
Azwaki bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe bomengo ya ndako ya mokonzi. Azwaki penza biloko nyonso, ezala banguba nyonso ya wolo oyo Salomo asalisaki.
27 Et le Roi Roboam fit des boucliers d'airain au lieu de ceux-là, et les mit entre les mains des capitaines des archers qui gardaient la porte de la maison du Roi.
Boye, na esika ya banguba ya wolo, mokonzi Roboami asalisaki banguba ya bronze mpe apesaki yango epai ya bakonzi ya bakengeli na ye, oyo bazalaki kobatela ekotelo ya ndako ya mokonzi.
28 Et quand le Roi entrait dans la maison de l'Eternel, les archers les portaient, et ensuite ils les rapportaient dans la chambre des archers.
Tango nyonso mokonzi abandaki kokende na Tempelo ya Yawe, bakengeli bazalaki komema banguba mpe kozongisa yango kati na ndako ya bakengeli.
29 Le reste des faits de Roboam, et tout ce qu'il a fait, n'est-il pas écrit au Livre des Chroniques des Rois de Juda?
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Roboami mpe misala na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
30 Or il y eut toujours guerre entre Roboam et Jéroboam.
Ezalaki tango nyonso na bitumba kati na Roboami mpe Jeroboami.
31 Et Roboam s'endormit avec ses pères, et fut enseveli avec eux dans la Cité de David; sa mère avait nom Nahama, [et était] Hammonite; et Abijam son fils régna en sa place.
Roboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni. Abiyami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

< 1 Rois 14 >