< Psaumes 61 >

1 Au chef des chantres. Sur instruments à cordes. De David. O Dieu! Écoute mes cris, Sois attentif à ma prière!
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi. Oh Nzambe, yoka koganga na ngai, yoka na bokebi losambo na ngai.
2 Du bout de la terre je crie à toi, le cœur abattu; Conduis-moi sur le rocher que je ne puis atteindre!
Wuta na suka ya mokili, nazali kobelela Yo, motema na ngai ebukani! Mema ngai na libanga oyo eleki likolo epai wapi nakokoka te kokoma ngai moko.
3 Car tu es pour moi un refuge, Une tour forte, en face de l’ennemi.
Pamba te, ozali ebombamelo na ngai, ndako molayi batonga makasi, liboso ya banguna na ngai.
4 Je voudrais séjourner éternellement dans ta tente, Me réfugier à l’abri de tes ailes. (Pause)
Posa ya motema na ngai ezali: kovanda tango nyonso kati na Ndako na Yo mpe kozwa ebombamelo na se ya mapapu na Yo.
5 Car toi, ô Dieu! Tu exauces mes vœux, Tu me donnes l’héritage de ceux qui craignent ton nom.
Pamba te Yo Nzambe, oyokaki bandayi na ngai, opesaki ngai libula ya bato oyo batosaka Kombo na Yo.
6 Ajoute des jours aux jours du roi; Que ses années se prolongent à jamais!
Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi; tika ete awumela na bomoi.
7 Qu’il reste sur le trône éternellement devant Dieu! Fais que ta bonté et ta fidélité veillent sur lui!
Tika ete awumela na bokonzi libela na libela liboso ya Nzambe! Bolingo mpe boyengebene na Yo ekobatela ye.
8 Alors je chanterai sans cesse ton nom, En accomplissant chaque jour mes vœux.
Boye, nakoyemba mikolo nyonso mpo na lokumu ya Kombo na Yo, mpe nakokokisa bandayi na ngai mokolo na mokolo.

< Psaumes 61 >