< Genèse 18 >

1 Et Dieu lui apparut près du chêne de Membré, tandis qu'il était assis sur la porte de sa tente à midi.
Yawe abimelaki Abrayami pene ya banzete minene ya Mamire, wana avandaki na ekotelo ya ndako na ye ya kapo, na moyi makasi ya midi.
2 Comme il levait les yeux, il aperçut trois hommes placés au-dessus de lui; et les ayant vus, il courut de la porte de sa tente à leur rencontre, et il se prosterna jusqu'à terre,
Tango Abrayami atombolaki miso, amonaki mibali misato pene na ye. Mpe tango kaka amonaki bango, atelemaki wuta na ndako na ye ya kapo mpe akendeki mbangu mpo na kokutana na bango; bongo agumbamaki kino na mabele.
3 En disant: Seigneur, si j'ai trouvé grâce devant vous, ne passez point outre devant votre serviteur.
Alobaki: — Nabondeli bino, bankolo na ngai, soki nazwi ngolu na miso bino, boleka mosali na bino te.
4 Que l'on prépare l'eau, que mes serviteurs vous lavent les pieds et rafraîchissez-vous sous le chêne.
Tika ete namemela bino mwa mayi mpo ete bokoka kosukola makolo mpe bopema na se ya nzete oyo.
5 Pour moi, j'apporterai du pain, et vous mangerez; puis, vous poursuivrez votre voyage: c'est pour cela que vous êtes venus vers votre serviteur. Le Seigneur dit: Qu'il soit fait comme tu le demandes.
Tika ete namemela bino mwa eloko ya kolia mpo ete bozwa lisusu makasi na nzoto; bongo bokokoba mobembo na bino, pamba te ezali mpo na yango nde boleki epai na ngai mosali na bino. Bazongisaki: — Ezali malamu, sala ndenge olobi.
6 Abraham se hâta donc d'entrer sous sa tente vers Sarra, et il lui dit: Dépêche-toi, pétris trois mesures de fleur de farine, et fais-nous cuire des pains sous la cendre.
Abrayami akotaki na lombangu na ndako na ye ya kapo mpe alobaki na Sara: « Kamata katini misato ya farine mpe sala bagato na lombangu. »
7 Puis, Abraham courut aux bœufs, et prit un beau petit veau bien tendre, qu'il donna au serviteur, en le pressant de l'apprêter.
Mpe Abrayami apotaki mbangu na lopango ya bibwele, azwaki mwana ngombe ya mafuta mpe apesaki yango na mosali na ye mpo ete alamba yango noki-noki.
8 De son côté, il prit du beurre et du lait, ainsi que le veau qu'il avait fait préparer, et il plaça le tout devant ses hôtes qui mangèrent. Lui-même cependant se tenait devant eux sous le chêne.
Azwaki mafuta ya ngombe, miliki mpe mosuni oyo alambaki, mpe atiaki yango liboso na bango. Abrayami atelemaki pembeni na bango, na se ya nzete, wana bazalaki kolia.
9 Le Seigneur lui dit: Où est Sarra ta femme? Il répondit: La voici sous la tente.
Sima, batunaki ye: — Wapi Sara, mwasi na yo? Abrayami azongisaki: — Azali na ndako.
10 Je reviendrai, dit le Seigneur, vers toi à pareille époque, et Sarra ta femme aura un fils. Or, Sarra entendit derrière la porte de la tente où elle était.
Bongo moko kati na bango alobaki: — Solo, na mobu oyo ezali koya, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara, mwasi na yo, akozala na mwana mobali. Nzokande, Sara ayokaki maloba wana na ekotelo ya ndako ya kapo, na sima ya Abrayami.
11 Or, Abraham et Sarra étaient vieux, ayant vécu bien des jours; Sarra avait même cessé d'avoir ce qui arrive aux femmes.
Abrayami mpe Sara bazalaki mibange, mpo ete bakomaki na mibu ebele penza mpe Sara azalaki lisusu na makoki te ya kobota.
12 Sarra rit donc en elle-même, disant: Cela ne m'est point encore arrivé jusqu'ici, et mon seigneur est un vieillard.
Sara asekaki mpe amilobelaki: « Awa nasili konuna boye, nakoki lisusu koyoka posa ya mobali? Kutu nkolo na ngai akomi mpe mobange! »
13 Mais le Seigneur dit à Abraham: Pourquoi Sarra a-t-elle ri en elle-même, disant: Enfanterai-je véritablement, moi qui suis devenue vieille?
Yawe alobaki na Abrayami: — Mpo na nini Sara aseki mpe alobi: « Nakoki solo kobota mwana awa nasili kokoma mobange? »
14 Est-ce que rien est impossible à Dieu? Je reviendrai près de toi à pareille époque, et Sarra aura un fils.
Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.
15 Alors Sarra nia, disant: Je n'ai point ri, car elle eut peur; et le Seigneur lui dit: Non, mais tu as ri.
Sara abangaki; boye awanganaki: — Naseki te. Kasi Yawe alobaki: — Ezali ya solo, oseki.
16 Et, s'étant levés de ce lieu, les trois hommes regardèrent du côté de Sodome et de Gomorrhe, et Abraham partit avec eux pour les reconduire.
Tango mibali yango batelemaki mpo na kokoba mobembo na bango na Sodome, Abrayami akendeki kotika bango na nzela.
17 Bientôt le Seigneur dit: Ne dévoilerai-je point les choses que je fais à Abraham, mon serviteur,
Yawe amilobelaki: « Boni, nakoki solo kobombela Abrayami likambo oyo nalingi kosala?
18 A lui qui doit devenir père d'une nation grande et nombreuse, et en qui seront bénies toutes les nations de la terre?
Solo, Abrayami akokoma ekolo monene mpe ya nguya, mpe bato ya bikolo nyonso ya mabele bakomipambola mpo na ye.
19 Car je sais qu'il donnera ses ordres à ses fils et à sa maison après lui; et ils garderont les voies du Seigneur en pratiquant l'équité et la justice, afin que le Seigneur accomplisse, en faveur d'Abraham, toutes les choses qu'il lui a dites.
Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »
20 Le Seigneur ajouta: Le cri de Sodome et de Gomorrhe s'est élevé jusqu'à moi, et leurs péchés sont énormes.
Bongo Yawe alobaki: « Nayoki sango ete mabe ya bato ya Sodome mpe ya Gomore eleki ndelo, mpe masumu na bango eleki mingi penza.
21 Étant donc descendu, je verrai si leurs actions répondent à ce cri qui m'est parvenu; et si non, je le saurai...
Nakokita mpo na kotala soki makambo oyo bazali kosala ekokani na oyo Ngai nayoki. Soki ezali bongo te, nakoyeba. »
22 S'étant alors éloignés, les hommes s'en allèrent à Sodome, et Abraham resta devant le Seigneur.
Mibali yango babalukaki mpe bakendeki na Sodome, kasi Abrayami atelemaki kaka liboso ya Yawe.
23 Abraham s'approcha et dit: Perdrez-vous le juste avec les impies, et le juste sera-t-il comme l'impie?
Bongo Abrayami apusanaki mpe alobaki: — Boni, Nkolo na ngai, okoboma penza elongo moto ya sembo mpe moto mabe?
24 S'il y a cinquante justes dans la ville, les perdrez-vous? Ne ferez-vous point grâce à toute la contrée, à cause des cinquante justes, s'ils sont dans la ville?
Soki bato ya sembo bazali tuku mitano kati na engumba, okoboma bango kaka? Okolimbisa engumba yango te mpo na bato ya sembo tuku mitano oyo bazali kati na yango?
25 Non, vous ne ferez point cette action de tuer le juste avec les impies, car le juste serait comme l'impie; il n'en sera point ainsi; vous qui jugez toute la terre, vous ne rendriez point justice!
Te, okoki kosala likambo ya boye te! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te?
26 Le Seigneur repartit: S'il y a cinquante justes en la ville de Sodome, j'épargnerai, à cause d'eux, toute la ville et la contrée entière.
Yawe azongisaki: — Soki nakuti na Sodome bato ya sembo tuku mitano, nakolimbisa engumba mobimba mpo na bango.
27 Et Abraham répondant: Maintenant, dit-il, j'ai commencé à parler à mon Seigneur, moi, terre et poussière!
Abrayami alobaki lisusu: — Solo, nazali na ngai moto pamba mpe putulu, kasi limbisa ete nameka kosolola na Nkolo na ngai.
28 Si les cinquante justes se réduisent à quarante-cinq, détruirez-vous toute la ville à cause des cinq? Le Seigneur dit: S'il s'y trouve quarante- cinq justes, je ne la détruirai pas.
Bongo soki motango na bato ya sembo ezali tuku minei na mitano? Boni, okobebisa engumba mobimba mpo na bato mitano oyo bazangi? Yawe azongisaki: — Soki nakuti bato ya sembo tuku minei na mitano, nakobebisa yango te.
29 Et Abraham, continuant de parler au Seigneur, dit: S'il s'en trouve quarante? Le Seigneur reprit: En faveur des quarante, je ne la détruirai pas.
Abrayami alobaki na Ye lisusu: — Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku minei? Azongisaki: — Soki bazali kaka tuku minei, nakobebisa yango te.
30 Abraham dit ensuite: Qu'en sera-t-il, Seigneur, si je parle encore? S'il s'en trouve trente? Le Seigneur dit: En faveur des trente, je ne la détruirai pas.
Bongo Abrayami alobaki: — Tika ete Nkolo na ngai asilika te soki nakobi koloba: Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku misato? Azongisaki: — Soki nakuti bato ya sembo tuku misato, nakobebisa yango te.
31 Abraham ajouta: Puisqu'il m'est donné de parler au Seigneur, s'il s'en trouve vingt? Et le Seigneur répondit: Si j'en trouve vingt, je ne la détruirai pas.
Abrayami alobaki: —Awa nameki kosolola na Nkolo, boni, okosala nini soki bato ya sembo bazali kaka tuku mibale? Azongisaki: — Mpo na bato ya sembo tuku mibale, nakobebisa engumba te.
32 Et Abraham dit: Seigneur, parlerai-je encore une seule fois? S'il s'en trouve dix? Et le Seigneur dit: En faveur des dix, je ne la détruirai pas.
Bongo Abrayami alobaki: — Tika ete Nkolo na ngai asilika te, pamba te nazali koloba mpo na mbala ya suka: Bongo soki bato ya sembo bazali kaka zomi? Azongisaki: — Mpo na bato ya sembo zomi, nakobebisa engumba te.
33 Lorsqu'il eut cessé de parler à Abraham, le Seigneur partit, et celui-ci retourna au lieu qu'il habitait.
Sima na Yawe kosolola na Abrayami, akendeki; mpe Abrayami azongaki na ndako na ye.

< Genèse 18 >