< 2 Chroniques 2 >

1 Et Salomon ordonna que l'on bâtit un temple au nom du Seigneur; puis, pour lui-même, une demeure royale.
Salomo apesaki mitindo mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako ya mokonzi mpo na ye moko.
2 Il réunit soixante-dix mille manœuvres, quatre-vingt mille tailleurs de pierres qu'il envoya dans la montagne, et trois mille six cents conducteurs de leurs travaux.
Salomo asangisaki bato nkoto tuku sambo mpo na komema biloko ya kotongela, bato nkoto tuku mwambe mpo na kobuka mabanga na bangomba, mpe bato nkoto misato na nkama motoba mpo na kokengela bango.
3 Il dépêcha des messagers à Hiram, roi de Tyr, disant: Tu en as bien usé avec David, mon père, tu lui as envoyé des cèdres pour bâtir le palais qu'il devait habiter.
Salomo atindaki maloba oyo epai ya Irami, mokonzi ya Tiri: — Sala na ngai ndenge osalaki mpo na Davidi, tata na ngai, tango otindelaki ye mabaya ya nzete ya sedele mpo na kotonga ndako na ye ya kovanda.
4 Or, voici que moi son fils, je bâtis un temple au nom du Seigneur mon Dieu, pour le lui consacrer, pour y brûler devant lui de l'encens, pour y exposer toujours les pains de proposition, pour y offrir les holocaustes du matin et du soir, ceux des sabbats, des nouvelles lunes, et des fêtes du Seigneur notre Dieu à perpétuité en Israël.
Nzokande, ngai nalingi sik’oyo kotonga Tempelo mpo na Kombo na Yawe, Nzambe na ngai, mpo na kobulisa yango mpo na lokumu na Ye, mpo na kobonzela Ye malasi ya solo kitoko lokola mbeka, mpo na kobongisaka kuna mapa tango nyonso, mpo na kobonzaka kuna bambeka ya kotumba, tongo mpe pokwa, mpe mpo na kosepelaka kuna mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, ya Yawe, Nzambe na biso, ndenge ezali malako ya tango nyonso mpo na Isalaele.
5 Le temple que je bâtis sera grand, parce que le Seigneur notre Dieu est grand plus que tous les dieux.
Tempelo oyo nakotonga ekozala monene, pamba te Nzambe na biso azali monene koleka banzambe nyonso.
6 Mais, qui donc peut lui élever un temple? Car le ciel et le ciel des cieux ne contiennent pas sa gloire. Et moi, qui suis-je pour lui bâtir un temple, si ce n'est seulement pour sacrifier devant lui?
Kasi nani akoki kotongela Ye Tempelo, pamba te Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Ye te? Mpe ngai nde nani mpo ete natongela Ye Tempelo, soki kaka etumbelo te mpo na kotumba mbeka ya malasi liboso na Ye?
7 Envoie-moi donc un homme adroit et instruit à façonner l'or, l'argent, l'airain, le fer, le porphyre, l'hyacinthe et l'écarlate; et quelqu'un sachant sculpter et ciseler, avec les gens habiles que j'ai auprès de moi à Jérusalem, et qu'a formés David mon père.
Boye, tindela ngai moto oyo ayebi kosalela wolo, palata, bronze, ebende, langi ya motane ya pete, langi ya motane ya makasi mpe langi ya ble, mpe ayebi kotobola bililingi, mpo ete asala mosala, kati na Yuda mpe Yelusalemi, elongo na basali na ngai, oyo bayebi penza mosala, ba-oyo Davidi, tata na ngai, abongisaki.
8 Envoie-moi aussi des bois de cèdre, de genièvre et de pin du Liban, car je n'ignore pas comment tes serviteurs savent équarrir les arbres du Liban. Et tes serviteurs, avec les miens,
Tindela ngai mpe, wuta na Libani, mabaya ya nzete ya sedele, ya sipele mpe ya santale, pamba te nayebi ete bato na yo bayebi malamu kokata banzete ya Libani. Bato na ngai bakosala elongo na basali na yo,
9 Iront me préparer de la charpente en quantité, parce que la maison que je bâtis sera grande et magnifique.
bakobongisela ngai mabaya ebele, pamba te Tempelo oyo nazali kotonga esengeli kozala monene mpe kitoko.
10 A tes serviteurs les charpentiers, je donne gratuitement pour leur nourriture: vingt mille mesures de froment, vingt mille mesures d'orge, vingt mille mesures de vin, et vingt mille mesures d'huile.
Nakopesa na basali na yo, oyo bakokata banzete batone nkoto motoba ya ble, batone nkoto minei ya orje, balitele ya vino nkoto nkama libwa, balitele ya mafuta nkoto nkama libwa.
11 Hiram, roi de Tyr, répondit par écrit, et il fit passer sa lettre à Salomon, disant: Le Seigneur aime ton peuple, c'est pourquoi il t'a fait régner sur eux.
Irami, mokonzi ya Tiri, azongiselaki Salomo na mokanda: — Ezali mpo ete Yawe alingi bato na Ye nde akomisi yo mokonzi na bango.
12 Et Hiram ajouta: Béni soit le Seigneur Dieu d'Israël, qui a créé le ciel et la terre, qui a donné à David un fils sage, plein de savoir et d'intelligence; c'est ce fils qui bâtira le temple du Seigneur et son propre palais.
Irami alobaki na ye lisusu: — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, Mokeli ya likolo mpe se, apambolama, mpo ete apesi na mokonzi Davidi mwana mobali ya mayele mpe ya bososoli, oyo akotonga Tempelo mpo na Yawe mpe ndako ya mokonzi mpo na ye moko.
13 Et moi je t'envoie un homme intelligent et habile, Hiram, mon serviteur.
Nazali kotindela yo sik’oyo Urami-Abi; azali penza moto moko ya mayele oyo ayebi mosala malamu.
14 Sa mère est des filles de Dan, et son père un Tyrien; il sait façonner l'or, l'argent, l'airain, le fer, les pierres et le bois; il sait tisser avec le porphyre, l'hyacinthe, le lin et l'écarlate; il sait sculpter et ciseler; il n'est rien qu'il ne sache inventer; il exécutera tout ce que tu lui commanderas, aidé de tes hommes habiles, et des hommes habiles de mon seigneur David, ton père.
Mama na ye azalaki moto ya libota ya Dani, mpe tata na ye, moto ya Tiri. Abongisama mpo na misala ya wolo, ya palata, ya bronze, ya ebende, ya mabanga, ya mabaya, ya kotia langi ya motane makasi, ya ble, ya motane ya pete mpe ya kobongisa lino ya pete. Ayebi malamu mosala ya kotobola bililingi, mpe akoki kosala mosala nyonso oyo bakosenga ye. Akosala elongo na basali na yo mpe na basali ya nkolo na ngai, Davidi, tata na yo.
15 Quant aux vivres, à l'orge, à l'huile, au vin dont a parlé mon seigneur, qu'il les envoie à ses serviteurs.
Sik’oyo, tika ete nkolo na ngai atinda epai ya basali na ye ble, orje, mafuta mpe masanga ya vino oyo alakaki.
16 Et nous, nous équarrirons des arbres du Liban, autant qu'il en faudra; nous en ferons des radeaux que nous conduirons par mer à Joppé, et tu les transporteras à Jérusalem.
Biso, tokokata banzete nyonso ya Libani, oyo ozali na yango posa; tokokangisa mpe tokotinda yango na nzela ya mayi ya ebale monene kino na Jafa. Wuta kuna, yo okokomisa yango na Yelusalemi.
17 Alors, Salomon réunit tous les étrangers qui habitaient la terre d'Israël, après le dénombrement qu'avait fait son père David; or, il s'en trouvait cent cinquante-trois mille six cents.
Salomo atangaki motango ya bapaya nyonso oyo bazalaki kati na Isalaele kolanda ndenge Davidi, tata na ye, atangaki motango ya bato. Bazalaki bato nkoto nkama moko na tuku mitano na misato na nkama motoba.
18 Parmi eux, il prit soixante-dix mille manœuvres, quatre-vingt mille tailleurs de pierres, et trois mille six cents conducteurs des travaux, pour diriger cette multitude.
Aponaki bato nkoto tuku sambo mpo na komema biloko, bato nkoto tuku mwambe mpo na kobuka mabanga na bangomba, mpe bakengeli nkoto misato na nkama motoba mpo na kosalisa bato misala.

< 2 Chroniques 2 >