< 2 Chroniques 12 >

1 Or, quand Roboam eut organisé son royaume et s'y fut affermi, il abandonna les commandements du Seigneur, et tout le peuple suivit son exemple.
Tango bokonzi ya Roboami elendisamaki mpe ye moko akomaki makasi, ye mpe Isalaele mobimba basundolaki Mobeko ya Yawe.
2 Et la cinquième année de son règne, parce qu'il avait péché contre le Seigneur, Susacim (Sésac), roi d'Égypte, marcha contre Jérusalem,
Boye, lokola bazalaki lisusu kotosa Yawe te, Shishaki, mokonzi ya Ejipito, abundisaki Yelusalemi na mobu ya mitano ya bokonzi ya Roboami.
3 Avec douze cents chars, soixante mille chevaux et une multitude innombrable des Libyens, de Troglodytes et d'Ethiopiens.
Ayaki wuta na Ejipito elongo na bashar nkoto moko na nkama mibale, basoda nkoto tuku motoba oyo babundaka likolo ya bampunda elongo na mampinga ya basoda ebele oyo motango na bango ekokaki kotangama te: basoda ya mokili ya Libi, ya Suki mpe ya Kushi.
4 Et ils s'emparèrent de toutes les forteresses de Juda, et ils arrivèrent devant Jérusalem,
Abotolaki bingumba batonga makasi ya Yuda mpe akendeki kino na Yelusalemi.
5 Et Samaïas le prophète alla trouver Roboam et les princes de Juda, qui s'étaient réunis à Jérusalem par crainte de Susacim, et il leur dit: Voici que dit le Seigneur: Vous m'avez abandonné, et moi je vous abandonnerai pour vous livrer à Susacim.
Bongo, mosakoli Shemaya akendeki epai ya Roboami mpe bakambi ya Yuda oyo basanganaki na Yelusalemi tango bamonaki Shishaki kopusana. Alobaki na bango: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Bosundolaki Ngai, yango wana Ngai mpe nasundoli bino na maboko ya Shishaki. »
6 Et le roi et les chefs de Juda eurent honte, et ils dirent: Le Seigneur est juste.
Mokonzi elongo na bakambi ya Isalaele bamikitisaki, bandimaki mabe na bango mpe balobaki: — Yawe azali sembo!
7 Quand le Seigneur vit qu'ils s'étaient repentis, la parole du Seigneur vint à Samaïas, disant: Ils se sont repentis, je ne les détruirai pas; je leur accorderai comme une ombre de salut, et ma colère ne tombera pas sur Jérusalem.
Tango Yawe amonaki ete basili komikitisa, Yawe alobaki lisusu epai ya Shemaya: — Lokola basili komikitisa na kondima mabe na bango, nakobebisa bango te; kasi kala mingi te, nakokangola bango, mpe kanda na Ngai ekokitela Yelusalemi te na nzela ya Shishaki.
8 Ils seront asservis, et ils connaîtront la différence de ma servitude avec la servitude des rois de la terre.
Nzokande bakokoma bawumbu na ye mpe, na bongo, bakoyeba bokeseni nini ezali kati na kosalela Ngai mpe kosalela bakonzi ya bamboka mosusu.
9 Et Susacim, roi d'Égypte, marcha contre Jérusalem; il prit tous les trésors du temple du Seigneur, et tous les trésors du palais du roi, il prit tout; il prit aussi les boucliers d'or qu'avait faits Salomon.
Shishaki, mokonzi ya Ejipito, abundisaki Yelusalemi, azwaki bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi. Azwaki penza biloko nyonso, ezala banguba ya wolo oyo Salomo asalisaki.
10 (Le roi Roboam les remplaça par des boucliers d'airain). Et le roi Susacim mit au-dessus de lui des capitaines de ses gardes surveillant la porte du palais.
Na esika ya banguba ya wolo, mokonzi Roboami asalisaki banguba ya bronze mpe apesaki yango epai ya bakonzi ya bakengeli ekotelo ya ndako ya mokonzi.
11 Et lorsque le roi entrait dans le temple du Seigneur, les gardes y entraient aussi, et avec les coureurs ceux qui allaient à la rencontre des coureurs.
Tango nyonso mokonzi abandaki kokende na Tempelo ya Yawe, bakengeli bazalaki kokende elongo na ye, bazalaki komema banguba mpe kozongisa yango kati na ndako ya bakengeli.
12 Mais parce qu'il s'était repenti, le Seigneur détourna de lui sa colère, et il ne fut pas entièrement détruit; car il y avait encore en Juda de bonnes pensées.
Lokola mokonzi Roboami amikitisaki na kondima mabe na ye, Yawe akitiselaki ye te kanda na Ye mpe abebisaki ye penza te. Kutu, emonanaki lisusu makambo malamu kati na Yuda.
13 Et le roi Roboam se raffermit en Jérusalem et il régna; il avait quarante et un ans quand il monta sur le trône, et il régna dix-sept ans à Jérusalem dans la ville que, parmi toutes les tribus d'Israël, le Seigneur s'était choisie pour que son nom y fût invoqué; sa mère, nommée Noomma, était Ammonite.
Mokonzi Roboami alendisaki bokonzi na ye, na Yelusalemi mpe akonzaki. Azalaki na mibu tuku minei na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na sambo na Yelusalemi, engumba oyo Yawe aponaki kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo na kotia kuna Kombo na Ye. Kombo ya mama na ye ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni.
14 Et il fit le mal parce qu'il ne dirigea pas son cœur à la recherche de Dieu.
Roboami asalaki mabe, pamba te amipesaki te, na motema na ye mobimba, mpo na koluka Yawe.
15 Quant aux discours de Roboam, les premiers et les derniers, et à ses actions, ne sont-ils pas écrits dans les Récits de Samaïas le prophète, et d'Addo le voyant? Roboam fut toujours en guerre avec Jéroboam.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Roboami, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Shemaya mpe ya momoni makambo Ido, buku epai wapi emonani milongo ya mbotama. Ezalaki tango nyonso na bitumba kati na Roboami mpe Jeroboami.
16 Et Roboam alla rejoindre ses pères, et il fut enseveli dans la ville de David; et Abias, son fils, régna à sa place.
Roboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Abiya, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

< 2 Chroniques 12 >