< Ézéchiel 14 >

1 Quelques hommes d’entre les anciens d’Israël vinrent me trouver et s’assirent devant moi.
Kati na bakambi ya Isalaele, ndambo bayaki epai na ngai mpe bavandaki liboso na ngai.
2 Alors la parole de l’Eternel me fut adressée en ces termes:
Bongo Yawe alobaki na ngai:
3 "Fils de l’homme, ces gens ont fait à leurs idoles une place dans leur coeur et mis cette cause de leur péché droit sous leurs regards; est-il possible que je me laisse interroger par eux?
« Mwana na moto, bato oyo bazali kotia mitema epai ya banzambe ya bikeko. Bongo lokola bazali kotia banzambe ya bikeko liboso na bango, ekobetisa bango mabaku oyo ekokweyisa bango na masumu. Boni, natikela bango lisusu nzela ya kotuna Ngai toli?
4 Aussi adresse-toi à eux et dis-leur: Ainsi parle le Seigneur Dieu Quiconque de la maison d’Israël fera à ses idoles une place dans son coeur et mettra sous ses regards cette cause de son péché, puis viendra vers le prophète, c’est moi l’Eternel qui lui répondrai en personne, à cause du grand nombre de ses idoles,
Mpo na yango, loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Soki moto ya Isalaele atie motema epai ya banzambe ya bikeko oyo ekobetisa ye mabaku mpe ekokweyisa ye na masumu, bongo atie yango liboso na ye mpe akei epai ya mosakoli, Ngai moko Yawe nde nakoyanola ye kolanda motango ya banzambe na ye ya bikeko.
5 afin de saisir au coeur la maison d’Israël, parce qu’ils se sont détournés de moi par toutes leurs idoles.
Nakosala bongo mpo na kozongisa lisusu epai na Ngai, mitema ya bana ya Isalaele oyo batikaki Ngai mpo na kolanda banzambe ya bikeko. ›
6 C’Est pourquoi, dis à la maison d’Israël: Ainsi parle le Seigneur Dieu: Revenez, arrachez-vous à vos idoles, et de toutes vos abominations détournez votre face.
Yango wana, loba na libota ya Isalaele: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Bobongola mitema! Bopesa banzambe na bino ya bikeko mikongo mpe botika misala na bino ya mbindo!
7 Car quiconque de la maison d’Israël et parmi l’étranger qui réside en Israël s’écartera de moi, fera à ses idoles une place en son coeur et mettra sous ses regards cette cause de son péché, puis viendra trouver le prophète pour me consulter par son intermédiaire, c’est moi l’Eternel qui lui répondrai moi-même.
Soki moto moko ya Isalaele to mopaya nyonso oyo avandi kati na Isalaele akabwani na Ngai, atie motema na ye na banzambe ya bikeko mpe atie liboso na ye banzambe yango ya bikeko oyo ekobetisa ye mabaku mpe ekokweyisa ye na masumu, bongo akei epai ya mosakoli mpo na kotuna Ngai toli na nzela na ye, Ngai moko Yawe nde nakoyanola ye.
8 Et je dirigerai ma face contre cet homme-là, je ferai de lui un symbole et un texte à proverbes, je le retrancherai du sein de mon peuple, et vous saurez que je suis l’Eternel.
Nakotombokela moto wana, nakokomisa ye elembo mpe lisese epai na bato mpe nakolongola ye na molongo ya bato na Ngai. Na bongo, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe.
9 Quant au prophète, s’il se laisse entraîner et s’il parle, c’est moi, l’Eternel, qui aurai entraîné ce prophète: j’étendrai ma main sur lui et je le retrancherai du sein de mon peuple Israël.
Soki mosakoli moko akosami mpe asakoli makambo, ezali Ngai moko Yawe nde napengwisi ye. Boye, nakosembola loboko na Ngai mpo na kopesa ye etumbu, mpe nakobeta ye kati na bato na Ngai, Isalaele.
10 Et ils porteront chacun leur faute, consultant et prophète étant également coupables.
Bango mibale, mosakoli yango mpe moto oyo akei kotuna ye toli, bakomema mikumba ya masumu na bango.
11 De la sorte la maison d’Israël ne s’égarera plus loin de moi; ils ne se souilleront plus par tous leurs péchés: ils seront mon peuple et je serai leur Dieu, dit le Seigneur Dieu.
Na bongo, bato ya Isalaele bakokabwana na Ngai lisusu te mpe bakomikomisa lisusu mbindo te na nzela ya masumu na bango; kasi bakozala bato na Ngai, mpe Ngai, nakozala Nzambe na bango, elobi Nkolo Yawe. › »
12 La parole de l’Eternel me fut adressée en ces termes:
Yawe alobaki na ngai:
13 "Fils de l’homme, qu’un pays pèche envers moi en devenant infidèle, j’étendrai ma main sur lui, je briserai pour lui le bâton du pain, j’enverrai contre lui la famine et j’en retrancherai hommes et bêtes.
« Mwana na moto, soki bato ya ekolo moko basali masumu liboso na Ngai mpe batamboli na boyengebene te, bongo Ngai nasemboli loboko na Ngai mpo na kopimela bango bilei mpe kotindela bango nzala makasi mpo ete ezala bato to banyama bakufa,
14 Et s’il s’y trouve ces trois hommes: Noé, Daniel et Job, eux par leur vertu sauveront leur vie, dit le Seigneur Dieu.
ata soki bato misato oyo, ‹ Noa, Daniele mpe Yobo, › bazalaki kati na bavandi ya ekolo yango, bango misato kaka nde balingaki kobika mpo na bosembo na bango, elobi Nkolo Yawe.
15 Que j’envoie des bêtes fauves à travers le pays, pour le décimer et en faire une solitude délaissée de tout passant à cause des bêtes fauves,
To soki natindi banyama mabe kati na ekolo yango mpo ete eboma bavandi na yango, mpe mpo ete ekolo yango etikala lisusu na bato te mpe bato balekela lisusu wana te mpo na banyama mabe yango;
16 ces trois hommes qui s’y trouvent, aussi vrai que je suis vivant, dit le Seigneur Dieu, ils ne sauveront ni fils, ni filles; eux seuls se sauveront, et le pays deviendra une solitude.
na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki bato oyo misato bazalaki kuna, balingaki kokoka te kobikisa bana na bango ya mibali mpe ya basi; bango misato kaka nde balingaki kobika, kasi ekolo elingaki kotikala lisusu na bato te.
17 Ou bien que j’envoie le glaive contre ce pays et que je décrète que le glaive sévira dans le pays et que j’en retrancherai hommes et bêtes,
To soki natindi mopanga ete eboma bato ya ekolo wana mpe nalobi: ‹ Tika ete mopanga eleka na mokili mobimba! › Soki nabomi bato mpe bibwele na yango;
18 ces trois hommes qui s’y trouvent, par ma vie, dit le Seigneur Dieu, ils ne sauveront ni fils, ni filles; eux seuls se sauveront.
na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki bato oyo misato bazalaki kuna, balingaki kokoka te kobikisa bana na bango ya mibali mpe ya basi; bango misato kaka nde balingaki kobika.
19 Ou bien que j’envoie la peste en ce pays et que je déverse ma colère sur lui en faisant couler le sang, pour en retrancher hommes et bêtes,
To soki natindi kati na mokili yango bokono oyo ebomaka mpe nasopeli yango kanda na Ngai mpo na kosopa makila, koboma bato mpe bibwele ya mokili yango;
20 si Noé, Daniel et Job s’y trouvent, par ma vie, dit le Seigneur Dieu, ils ne sauveront ni fils, ni fille; eux seuls par leur vertu sauveront leur vie."
na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki Noa, Daniele mpe Yobo bazalaki kati na bavandi na yango, balingaki kokoka te kobikisa ata mwana moko ya mobali to ya mwasi; bango misato kaka nde balingaki kobika mpo na bosembo na bango.
21 Oui, ainsi a dit le Seigneur Dieu: "Encore que j’aie envoyé mes quatre châtiments cruels, glaive, famine, bêtes fauves et peste, contre Jérusalem pour en retrancher hommes et bêtes,
Kasi tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Atako natindeli Yelusalemi bitumbu na Ngai oyo minei ya somo: mopanga, nzala makasi, banyama mabe mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kosilisa koboma bato mpe bibwele na yango,
22 voici cependant qu’il y est demeuré un reste qu’on en fera sortir, fils et filles, voici qu’ils sortent vers vous, vous verrez leur conduite et leurs actions et vous vous consolerez du mal que j’ai amené sur Jérusalem, de tout ce que j’ai amené sur elle.
ekozala na ndambo ya bato oyo bakobika: bana mibali mpe ya basi. Bakoya epai na bino; mpe tango bokomona bizaleli mpe misala na bango, bokobondisama mpo na pasi oyo natindelaki Yelusalemi, mpo na bitumbu nyonso oyo natindelaki yango.
23 Ils vous consoleront quand vous verrez leur conduite et leurs actes, et vous saurez que ce n’est pas pour rien que j’ai fait tout ce que j’y ai fait," dit le Seigneur Dieu.
Solo, bokobondisama tango bokomona bizaleli mpe misala na bango; pamba te bokososola ete ezali na pamba te nde nasalaki makambo oyo nyonso kati na Yelusalemi, elobi Nkolo Yawe. »

< Ézéchiel 14 >