< Apocalypse 2 >

1 À l’ange de l’assemblée qui est à Éphèse, écris: Voici ce que dit celui qui tient les sept étoiles dans sa droite, qui marche au milieu des sept lampes d’or:
Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Efeso: « Tala maloba ya Ye oyo asimbi minzoto sambo na loboko na Ye ya mobali mpe atambolaka kati na bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo:
2 Je connais tes œuvres, et ton travail, et ta patience, et que tu ne peux supporter les méchants; et tu as éprouvé ceux qui se disent apôtres et ne le sont pas, et tu les as trouvés menteurs;
Nayebi misala, pasi mpe molende na yo. Nayebi ete okoki te koyikela bato mabe mpiko; nayebi lisusu ete omekaki bato oyo balobaka ete bazali bantoma, nzokande bazali na bango bantoma te, mpe omonaki penza ete bazali bakosi.
3 et tu as patience, et tu as supporté [des afflictions] pour mon nom, et tu ne t’es pas lassé;
Nayebi malamu ete ozali na molende mpe oyokaki pasi makasi mpo na Kombo na Ngai, kasi olembaki te.
4 mais j’ai contre toi que tu as abandonné ton premier amour.
Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango: obwaki bolingo na yo ya liboso.
5 Souviens-toi donc d’où tu es déchu, et repens-toi, et fais les premières œuvres; autrement, je viens à toi et j’ôterai ta lampe de son lieu, à moins que tu ne te repentes.
Kanisa malamu esika oyo ozalaki, liboso ete okweya! Bongola motema na yo mpe zongela misala na yo ya liboso; noki te, nakoya epai na yo mpe nakolongola etelemiselo na yo ya mwinda na esika na yango.
6 Mais tu as ceci, que tu hais les œuvres des Nicolaïtes, lesquelles moi aussi je hais.
Kasi ezali na likambo moko oyo nasepelaka na yango epai na yo: olingaka te misala ya bato ya lingomba ya Nikola, oyo Ngai mpe nalingaka te.
7 Que celui qui a des oreilles écoute ce que l’Esprit dit aux assemblées. À celui qui vaincra, je lui donnerai de manger de l’arbre de vie qui est dans le paradis de Dieu.
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba! Moto oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, oyo ezali kati na Paradizo ya Nzambe. »
8 Et à l’ange de l’assemblée qui est à Smyrne, écris: Voici ce que dit le premier et le dernier, qui a été mort et qui a repris vie:
Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Simirne: « Tala maloba ya Ye oyo azali Ya liboso mpe Ya suka, Ye oyo akufaki mpe azali lisusu na bomoi:
9 Je connais ta tribulation, et ta pauvreté (mais tu es riche), et l’outrage de ceux qui se disent être Juifs; et ils ne le sont pas, mais ils sont la synagogue de Satan.
Nayebi minyoko mpe bobola na yo, nzokande ozali mozwi; nayebi ndenge nini bato oyo balobaka ete bazali Bayuda, kasi bazali na bango Bayuda te, batiolaka yo; bazali nde ndako ya mayangani ya Satana.
10 Ne crains en aucune manière les choses que tu vas souffrir. Voici, le diable va jeter [quelques-uns] d’entre vous en prison, afin que vous soyez éprouvés: et vous aurez une tribulation de dix jours. Sois fidèle jusqu’à la mort et je te donnerai la couronne de vie.
Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.
11 Que celui qui a des oreilles écoute ce que l’Esprit dit aux assemblées. Celui qui vaincra n’aura point à souffrir de la seconde mort.
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba! Moto oyo akolonga, kufa ya mibale ekosala ye pasi ata moke te. »
12 Et à l’ange de l’assemblée qui est à Pergame, écris: Voici ce que dit celui qui a l’épée aiguë à deux tranchants:
Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Pergame: « Tala maloba ya Ye oyo asimbi mopanga bapelisa na bangambo nyonso mibale:
13 Je sais où tu habites, là où est le trône de Satan; et tu tiens ferme mon nom, et tu n’as pas renié ma foi, même dans les jours dans lesquels Antipas était mon fidèle témoin, qui a été mis à mort parmi vous, là où Satan habite.
Nayebi malamu esika oyo ovandaka. Ezali mpe kaka na esika yango nde Satana atie kiti na ye ya bokonzi. Okweyisaki te kondima na yo epai na Ngai, ezala na mikolo oyo babomaki Antipasi, motatoli na Ngai ya sembo, kati na engumba na bino epai wapi Satana avandaka.
14 Mais j’ai quelques choses contre toi: c’est que tu as là des gens qui tiennent la doctrine de Balaam, lequel enseignait à Balac à jeter une pierre d’achoppement devant les fils d’Israël, pour qu’ils mangent des choses sacrifiées aux idoles et qu’ils commettent la fornication.
Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango: kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba.
15 Ainsi tu en as, toi aussi, qui tiennent la doctrine des Nicolaïtes pareillement.
Kati na Lingomba na yo, ozali mpe na bato oyo bakangama na mateya ya bato ya lingomba ya Nikola.
16 Repens-toi donc; autrement je viens à toi promptement, et je combattrai contre eux par l’épée de ma bouche.
Boye, bongola motema na yo! Soki te, nakoya kala mingi te epai na yo mpe nakobundisa bango na mopanga ya monoko na Ngai.
17 Que celui qui a des oreilles écoute ce que l’Esprit dit aux assemblées. À celui qui vaincra, je lui donnerai de la manne cachée, et je lui donnerai un caillou blanc, et, sur le caillou, un nouveau nom écrit, que nul ne connaît, sinon celui qui le reçoit.
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba! Moto oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama; nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango. »
18 Et à l’ange de l’assemblée qui est à Thyatire, écris: Voici ce que dit le Fils de Dieu, qui a ses yeux comme une flamme de feu, et dont les pieds sont semblables à de l’airain brillant:
Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Tiyatire: « Tala maloba ya Mwana na Nzambe, Ye oyo miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela makasi, mpe makolo na Ye, lokola bronze ya motuya:
19 Je connais tes œuvres, et ton amour, et ta foi, et ton service, et ta patience, et tes dernières œuvres qui dépassent les premières.
Nayebi misala, bolingo, kondima, etamboli mpe molende na yo; nayebi mpe ete misala oyo ozali kosala sik’oyo ezali ebele koleka oyo osalaki liboso.
20 Mais j’ai contre toi, que tu laisses faire la femme Jésabel qui se dit prophétesse; et elle enseigne et égare mes esclaves [en les entraînant] à commettre la fornication et à manger des choses sacrifiées aux idoles.
Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango: opesaka na Jezabeli, mwasi oyo amibengaka mosakoli, nzela ya kopengwisa basali na Ngai na mateya na ye ya mabe, mpo na kotindika bango na kindumba mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.
21 Et je lui ai donné du temps afin qu’elle se repente; et elle ne veut pas se repentir de sa fornication.
Napesaki ye tango mpo ete abongola motema, kasi aboyi kaka kotika kindumba na ye.
22 Voici, je la jette sur un lit, et ceux qui commettent adultère avec elle, dans une grande tribulation, à moins qu’ils ne se repentent de ses œuvres;
Boye, nakobwaka ye na mbeto ya pasi makasi elongo na bato oyo basalaka kindumba elongo na ye. Kasi soki babongoli mitema mpe batiki kotambola kolanda mateya ya Jezabeli, nakobwaka bango te na mbeto ya pasi makasi.
23 et je ferai mourir de mort ses enfants; et toutes les assemblées connaîtront que c’est moi qui sonde les reins et les cœurs; et je vous donnerai à chacun selon vos œuvres.
Nakoboma bana ya Jezabeli; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.
24 Mais à vous je dis, aux autres qui sont à Thyatire, autant qu’il y en a qui n’ont pas cette doctrine, qui n’ont pas connu les profondeurs de Satan, comme ils disent: je ne vous impose pas d’autre charge;
Kasi epai na bino oyo, kati na Tiyatire, bokangami te na mateya wana ya lokuta mpe boboyi koyekola mabombami ya mozindo ya Satana, kolanda ndenge babengaka yango, nazali koloba: ‹ Nakomemisa bino te mokumba mosusu na makasi;
25 mais seulement, ce que vous avez, tenez-le ferme jusqu’à ce que je vienne.
kasi, oyo bozali na yango, bosimba yango makasi kino nakoya. ›
26 Et celui qui vaincra, et celui qui gardera mes œuvres jusqu’à la fin, – je lui donnerai autorité sur les nations;
Moto oyo akolonga, oyo akosala mokano na Ngai kino na suka, nakopesa ye bokonzi ya kokonza bikolo:
27 et il les paîtra avec une verge de fer, comme sont brisés les vases de poterie, selon que moi aussi j’ai reçu de mon Père;
akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akopanza yango na biteni lokola mbeki,
28 et je lui donnerai l’étoile du matin.
ndenge Ngai mpe nazwaki bokonzi kowuta na Tata na Ngai. Nakopesa ye lisusu monzoto ya tongo.
29 Que celui qui a des oreilles écoute ce que l’Esprit dit aux assemblées.
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba! »

< Apocalypse 2 >