< Leviticus 16 >

1 The LORD spoke to Moses after the death of the two sons of Aaron, when they came near before the LORD, and died;
Yawe alobaki na Moyize, sima na kufa ya bana mibali mibale ya Aron, oyo bakufaki tango bapusanaki liboso ya Yawe.
2 and the LORD said to Moses, “Tell Aaron your brother not to come at just any time into the Most Holy Place within the veil, before the mercy seat which is on the ark; lest he die; for I will appear in the cloud on the mercy seat.
Yawe alobaki na Moyize: « Loba na Aron, ndeko na yo ya mobali, ete akotaka tango nyonso te na Esika ya bule, na sima ya rido, liboso ya esika ya bolimbisi masumu, likolo ya Sanduku mpo ete akufa te; pamba te namimonisaka na nzela ya lipata likolo ya esika ya bolimbisi masumu.
3 “Aaron shall come into the sanctuary with a young bull for a sin offering, and a ram for a burnt offering.
Tala ndenge Aron akobanda kokota na Esika ya bule: akomema ngombe moko ya mobali lokola mbeka ya masumu mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya kotumba.
4 He shall put on the holy linen tunic. He shall have the linen trousers on his body, and shall put on the linen sash, and he shall be clothed with the linen turban. They are the holy garments. He shall bathe his body in water, and put them on.
Akolata na nzoto na ye: nzambala ya bule basala na lino mpe bakaputula ya lino; akomikanga mokaba ya lino mpe kitendi ya lino na moto na ye. Lokola bilamba oyo ezali ya bule, asengeli komisukola nzoto na ye na mayi liboso ya kolata yango.
5 He shall take from the congregation of the children of Israel two male goats for a sin offering, and one ram for a burnt offering.
Aron akozwa kati na lisanga ya bana ya Isalaele: bantaba mibale ya mibali lokola mbeka ya masumu mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya kotumba.
6 “Aaron shall offer the bull of the sin offering, which is for himself, and make atonement for himself and for his house.
Aron akobonza mpo na ye moko, ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko mpe mpo na ndako na ye.
7 He shall take the two goats, and set them before the LORD at the door of the Tent of Meeting.
Akozwa bantaba ya mibali nyonso mibale mpe akotia yango liboso ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
8 Aaron shall cast lots for the two goats: one lot for the LORD, and the other lot for the scapegoat.
Aron akobeta zeke mpo na bantaba ya mibali nyonso mibale: moko mpo na Yawe, mpe mosusu, mpo na Azazeli.
9 Aaron shall present the goat on which the lot fell for the LORD, and offer him for a sin offering.
Bongo Aron akomema ntaba oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Yawe, mpe akobonza yango lokola mbeka mpo na masumu.
10 But the goat on which the lot fell for the scapegoat shall be presented alive before the LORD, to make atonement for him, to send him away as the scapegoat into the wilderness.
Kasi ntaba ya mobali oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Azazeli, akomema yango ya bomoi liboso ya Yawe mpo ete basala na yango mosala ya bolimbisi masumu, bongo bakotinda yango na esobe mpo na Azazeli.
11 “Aaron shall present the bull of the sin offering, which is for himself, and shall make atonement for himself and for his house, and shall kill the bull of the sin offering which is for himself.
Aron akobonza, mpo na ye moko, ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu na ye moko mpe ya ndako na ye. Sima na ye kokata kingo ya ngombe ya mobali oyo abonzi mpo na ye moko lokola mbeka ya masumu,
12 He shall take a censer full of coals of fire from off the altar before the LORD, and two handfuls of sweet incense beaten small, and bring it within the veil.
akotondisa mbabola ya kotumba malasi na makala ya moto oyo ewuti na etumbelo liboso ya Yawe mpe akotondisa maboko na ye mibale na malasi ya putulu, bongo akomema yango na sima ya rido.
13 He shall put the incense on the fire before the LORD, that the cloud of the incense may cover the mercy seat that is on the covenant, so that he will not die.
Akotia malasi na moto liboso ya Yawe mpo ete milinga na yango ezipa esika ya bolimbisi oyo ezali likolo ya Sanduku ya Boyokani mpo ete akufa te.
14 He shall take some of the blood of the bull, and sprinkle it with his finger on the mercy seat on the east; and before the mercy seat he shall sprinkle some of the blood with his finger seven times.
Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka yango liboso ya esika ya bolimbisi masumu, na ngambo ya este. Boye, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo liboso ya esika ya bolimbisi masumu.
15 “Then he shall kill the goat of the sin offering that is for the people, and bring his blood within the veil, and do with his blood as he did with the blood of the bull, and sprinkle it on the mercy seat and before the mercy seat.
Akokata kingo ya ntaba ya mobali ya mbeka mpo na masumu ya bato mpe akomema makila na yango na sima ya rido. Bongo akosala na makila yango ndenge asalaki na makila ya ngombe ya mobali: akobwaka liboso mpe likolo ya esika ya bolimbisi masumu.
16 He shall make atonement for the Holy Place, because of the uncleanness of the children of Israel, and because of their transgressions, even all their sins; and so he shall do for the Tent of Meeting that dwells with them in the middle of their uncleanness.
Na nzela wana, akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule likolo ya mbindo, botomboki mpe masumu ya bana ya Isalaele. Akosala mpe ndenge moko mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani oyo ezali elongo na bango kati na mbindo na bango.
17 No one shall be in the Tent of Meeting when he enters to make atonement in the Holy Place, until he comes out, and has made atonement for himself and for his household, and for all the assembly of Israel.
Moto moko te akozala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani tango Aron akokota kuna mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu kati na Esika ya bule kino tango akobima na libanda. Mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko, mpo na ndako na ye mpe mpo na lisanga mobimba ya Isalaele.
18 “He shall go out to the altar that is before the LORD and make atonement for it, and shall take some of the bull’s blood, and some of the goat’s blood, and put it around on the horns of the altar.
Sima na yango, akobima mpo na kokende na etumbelo oyo ezali liboso ya Yawe mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na etumbelo yango. Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe ya ntaba ya mobali mpe akotia yango na maseke ya etumbelo.
19 He shall sprinkle some of the blood on it with his finger seven times, and cleanse it, and make it holy from the uncleanness of the children of Israel.
Mpe na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo na etumbelo. Ezali na nzela wana nde akopetola mpe akobulisa yango na mbindo ya bana ya Isalaele.
20 “When he has finished atoning for the Holy Place, the Tent of Meeting, and the altar, he shall present the live goat.
Tango Aron akosilisa kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule, mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe mpo na etumbelo, akomema ntaba ya mobali ya bomoi.
21 Aaron shall lay both his hands on the head of the live goat, and confess over him all the iniquities of the children of Israel, and all their transgressions, even all their sins; and he shall put them on the head of the goat, and shall send him away into the wilderness by the hand of a man who is ready.
Aron akotia maboko na ye mibale na moto ya ntaba yango, akotubela mabe, botomboki mpe masumu nyonso ya bana ya Isalaele na moto ya ntaba yango. Na nzela wana akotia masumu nyonso na moto ya ntaba yango; sima akopona moto moko mpo na kobengana ntaba yango na esobe.
22 The goat shall carry all their iniquities on himself to a solitary land, and he shall release the goat in the wilderness.
Boye ntaba ekomema masumu na bango nyonso na esika oyo ezanga bato, mpe moto yango akotika ntaba kokende na esobe.
23 “Aaron shall come into the Tent of Meeting, and shall take off the linen garments which he put on when he went into the Holy Place, and shall leave them there.
Bongo Aron akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, akolongola bilamba ya lino oyo alataki tango akotaki na Esika ya bule mpe akotika yango kuna.
24 Then he shall bathe himself in water in a holy place, put on his garments, and come out and offer his burnt offering and the burnt offering of the people, and make atonement for himself and for the people.
Akosukola nzoto na ye na mayi na esika moko ya bule; mpe akolata bilamba na ye. Sima, akobima libanda mpe akobonza mbeka ya kotumba mpo na ye moko mpe mpo na bato. Na nzela wana nde akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko mpe mpo na bato.
25 The fat of the sin offering he shall burn on the altar.
Akotumba mafuta ya mbeka ya masumu na likolo ya etumbelo.
26 “He who lets the goat go as the scapegoat shall wash his clothes, and bathe his flesh in water, and afterward he shall come into the camp.
Moto oyo akobengana ntaba ya mobali mpo na Azazeli, asengeli kosukola nzoto na ye na mayi; mpe sima na yango, akozonga na molako.
27 The bull for the sin offering, and the goat for the sin offering, whose blood was brought in to make atonement in the Holy Place, shall be carried outside the camp; and they shall burn their skins, their flesh, and their dung with fire.
Bakomema libanda ya molako ngombe ya mobali mpe ntaba ya mobali ya mbeka ya masumu oyo bamemaki makila na yango na Esika ya bule mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpe bakotumba na moto poso na yango, misuni na yango mpe banyei na yango.
28 He who burns them shall wash his clothes, and bathe his flesh in water, and afterward he shall come into the camp.
Moto oyo akotumba yango asengeli kosukola na mayi bilamba na ye mpe nzoto na ye, sima na yango nde akoki kozonga na molako.
29 “It shall be a statute to you forever: in the seventh month, on the tenth day of the month, you shall afflict your souls, and shall do no kind of work, whether native-born or a stranger who lives as a foreigner among you;
Tala malako oyo bosengeli kosalela mpo na libela: na mokolo ya zomi ya sanza ya sambo, ezala mwana mboka to mopaya oyo avandi kati na bino, bosengeli komikitisa mpe bokosala mosala ata moko te,
30 for on this day shall atonement be made for you, to cleanse you. You shall be clean from all your sins before the LORD.
pamba te na mokolo wana nde bokosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino mpe kopetolama bino. Boye bokopetolama na masumu na bino nyonso liboso ya Yawe.
31 It is a Sabbath of solemn rest to you, and you shall afflict your souls. It is a statute forever.
Ekozala mpo na bino mokolo ya Saba, mokolo ya bopemi, mpe bosengeli komikitisa. Ezali malako ya libela.
32 The priest, who is anointed and who is consecrated to be priest in his father’s place, shall make the atonement, and shall put on the linen garments, even the holy garments.
Nganga-Nzambe oyo bakopakola mafuta mpe akobulisama mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe na esika ya tata na ye, akosala mosala ya bolimbisi masumu. Akolata bilamba ya bule ya lino.
33 Then he shall make atonement for the Holy Sanctuary; and he shall make atonement for the Tent of Meeting and for the altar; and he shall make atonement for the priests and for all the people of the assembly.
Akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ndako ya bule, mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na etumbelo, mpo na Nganga-Nzambe mpe mpo na bato nyonso ya lisanga.
34 “This shall be an everlasting statute for you, to make atonement for the children of Israel once in the year because of all their sins.” It was done as the LORD commanded Moses.
Oyo nde ekozala mpo na bino malako ya libela: mbala moko na mobu, bokosala mosala ya bolimbisi masumu nyonso ya bana ya Isalaele. » Mpe basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.

< Leviticus 16 >