< Exodus 30 >

1 “You shall make an altar to burn incense on. You shall make it of acacia wood.
Okosala lisusu etumbelo ya malasi na nzete ya akasia.
2 Its length shall be a cubit, and its width a cubit. It shall be square, and its height shall be two cubits. Its horns shall be of one piece with it.
Molayi mpe mokuse na yango ekozala ndenge moko, basantimetele pene tuku mitano; mpe bosanda na yango ekozala na metele moko. Maseke na yango ekokangana na etumbelo.
3 You shall overlay it with pure gold, its top, its sides around it, and its horns; and you shall make a gold moulding around it.
Okobamba wolo ya peto na likolo ya etumbelo, na mipanzi na yango mpe na maseke; mpe okozingela pembeni na yango na libende ya wolo.
4 You shall make two golden rings for it under its moulding; on its two ribs, on its two sides you shall make them; and they shall be for places for poles with which to bear it.
Okosala mpo na etumbelo bapete ya wolo na se ya ebende ya wolo oyo ezingeli yango: mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu; mpo na kokotisa mabaya ya komemela etumbelo.
5 You shall make the poles of acacia wood, and overlay them with gold.
Okosala mabaya yango na nzete ya akasia mpe okobamba yango wolo.
6 You shall put it before the veil that is by the ark of the covenant, before the mercy seat that is over the covenant, where I will meet with you.
Okotia etumbelo liboso ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, liboso ya esika ya bolimbisi masumu oyo ezali na likolo ya Sanduku ya Litatoli. Ezali na esika yango nde nakobanda kokutana na yo.
7 Aaron shall burn incense of sweet spices on it every morning. When he tends the lamps, he shall burn it.
Tongo nyonso, Aron akotumba ansa na etumbelo yango tango akobongisa minda; mpe pokwa nyonso, tango akopelisa yango.
8 When Aaron lights the lamps at evening, he shall burn it, a perpetual incense before the LORD throughout your generations.
Aron asengeli kotumba lisusu ansa tango akopelisa minda na pokwa mpo ete ansa epelaka tango nyonso liboso ya Yawe mpo na libela.
9 You shall offer no strange incense on it, nor burnt offering, nor meal offering; and you shall pour no drink offering on it.
Kobonza te na etumbelo: ansa oyo elongobani te, mbeka ya kotumba to makabo ya bambuma. Mpe kosopa te likolo na yango makabo ya masanga ya vino.
10 Aaron shall make atonement on its horns once in the year; with the blood of the sin offering of atonement once in the year he shall make atonement for it throughout your generations. It is most holy to the LORD.”
Mbala moko na mobu, Aron asengeli kosala mosala ya bolimbisi masumu, na maseke ya etumbelo; akosala yango na makila ya mbeka ya masumu mpo na milongo oyo ekoya. Etumbelo ekozala bule koleka mpo na Yawe.
11 The LORD spoke to Moses, saying,
Yawe alobaki na Moyize:
12 “When you take a census of the children of Israel, according to those who are counted amongst them, then each man shall give a ransom for his soul to the LORD when you count them, that there be no plague amongst them when you count them.
— Tango okotanga bana ya Isalaele, moko na moko kati na bango akofuta mpo na Yawe, mpako mpo na kosikola bomoi na ye tango bakotanga ye. Boye etumbu moko te ekokweyela bango tango bakotangama.
13 They shall give this, everyone who passes over to those who are counted, half a shekel according to the shekel of the sanctuary (the shekel is twenty gerahs); half a shekel for an offering to the LORD.
Moto nyonso oyo batangi asengeli kofuta motuya oyo mpo na Yawe lokola mpako, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo: bagrame motoba ya palata.
14 Everyone who passes over to those who are counted, from twenty years old and upward, shall give the offering to the LORD.
Moto nyonso oyo batangi, kobanda mibu tuku mibale to koleka, akofuta mpako mpo na Yawe.
15 The rich shall not give more, and the poor shall not give less, than the half shekel, when they give the offering of the LORD, to make atonement for your souls.
Na tango ya kofuta mpako mpo na Yawe, mpo na kosikola bomoi na bino, mozwi akofuta te motuya koleka bagrame motoba ya palata, mpe mobola akofuta te motuya oyo ezali na se ya bagrame motoba.
16 You shall take the atonement money from the children of Israel, and shall appoint it for the service of the Tent of Meeting; that it may be a memorial for the children of Israel before the LORD, to make atonement for your souls.”
Okozwa epai ya bana ya Isalaele mpako mpo na kosikola bomoi na bango mpe okosalela yango mpo na mosala ya kobongisa Ndako ya kapo ya Bokutani. Ekozala mpo na bana ya Isalaele ekaniseli liboso ya Yawe mpo na lisiko ya bomoi na bango.
17 The LORD spoke to Moses, saying,
Yawe alobaki na Moyize:
18 “You shall also make a basin of bronze, and its base of bronze, in which to wash. You shall put it between the Tent of Meeting and the altar, and you shall put water in it.
— Okosala na bronze sani moko monene mpo na komipetola mpe evandelo na yango; okotia yango na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo, mpe okotia mayi kati na yango.
19 Aaron and his sons shall wash their hands and their feet in it.
Aron mpe bana na ye ya mibali bakobanda kosukola maboko mpe makolo na bango na mayi ya sani yango.
20 When they go into the Tent of Meeting, they shall wash with water, that they not die; or when they come near to the altar to minister, to burn an offering made by fire to the LORD.
Basengeli kosukola na mayi yango mpo ete bakufa te tango bakokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to tango bakopusana pembeni ya etumbelo mpo na kotumba makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
21 So they shall wash their hands and their feet, that they not die. This shall be a statute forever to them, even to him and to his descendants throughout their generations.”
Basengeli kosukola makolo mpe maboko na bango mpo ete bakufa te. Oyo ezali mobeko oyo ekobongwana te mpo na Aron mpe bakitani na ye mpo na libela.
22 Moreover the LORD spoke to Moses, saying,
Yawe alobaki na Moyize:
23 “Also take fine spices: of liquid myrrh, five hundred shekels; and of fragrant cinnamon half as much, even two hundred and fifty; and of fragrant cane, two hundred and fifty;
— Zwa mafuta ya solo kitoko: bakilo motoba ya mire, kati-kati na yango to bakilo misato ya sinamoni, bakilo misato ya kaneli,
24 and of cassia five hundred, according to the shekel of the sanctuary; and a hin of olive oil.
bakilo misato ya kasia, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, mpe balitele motoba ya mafuta ya olive.
25 You shall make it into a holy anointing oil, a perfume compounded after the art of the perfumer: it shall be a holy anointing oil.
Na biloko oyo nyonso, okosala mafuta ya epakolami ya bule, ya solo kitoko, oyo esalemi na mosali malasi; ekozala mafuta ya bule mpo na epakolami.
26 You shall use it to anoint the Tent of Meeting, the ark of the covenant,
Okosalela mafuta yango mpo na kopakola Ndako ya kapo ya Bokutani, Sanduku ya Litatoli,
27 the table and all its articles, the lamp stand and its accessories, the altar of incense,
mesa mpe bisalelo na yango nyonso, etelemiselo ya minda mpe biloko na yango nyonso, etumbelo ya malasi,
28 the altar of burnt offering with all its utensils, and the basin with its base.
etumbelo ya bambeka ya kotumba mpe bisalelo na yango nyonso elongo na sani mpo na komipetola mpe evandelo na yango.
29 You shall sanctify them, that they may be most holy. Whatever touches them shall be holy.
Okobulisa yango mpo ete ezala bule koleka. Nyonso oyo ekotutana na yango ekozala bule.
30 You shall anoint Aaron and his sons, and sanctify them, that they may minister to me in the priest’s office.
Okopakola Aron mpe bana na ye ya mibali mafuta mpe okobulisa bango mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe.
31 You shall speak to the children of Israel, saying, ‘This shall be a holy anointing oil to me throughout your generations.
Sima, okoloba na bana ya Isalaele: « Mafuta oyo ya epakolami ebulisami libela na libela mpo na Yawe.
32 It shall not be poured on man’s flesh, and do not make any like it, according to its composition. It is holy. It shall be holy to you.
Bokopakola yango te na banzoto ya bato mpe bomekola te ndenge basalela yango, pamba te ezali bule mpe bosengeli komona yango bule.
33 Whoever compounds any like it, or whoever puts any of it on a stranger, he shall be cut off from his people.’”
Moto nyonso oyo akomekola mafuta yango mpe akosopa yango na nzoto ya moto oyo abulisami te, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. »
34 The LORD said to Moses, “Take to yourself sweet spices, gum resin, onycha, and galbanum: sweet spices with pure frankincense. There shall be an equal weight of each.
Yawe alobaki na Moyize: — Zwa biloko ya mike-mike ya solo kitoko: sitakite, onikisi, galibanumi mpe ansa oyo basangisa na eloko mosusu te; biloko nyonso ezala kilo moko.
35 You shall make incense of it, a perfume after the art of the perfumer, seasoned with salt, pure and holy.
Okosala na yango ansa ya solo kitoko oyo esalemi na moto oyo asalaka malasi. Ekozala malasi oyo ezali na mungwa, ya peto mpe ya bule.
36 You shall beat some of it very small, and put some of it before the covenant in the Tent of Meeting, where I will meet with you. It shall be to you most holy.
Okosala na ndambo na yango mosusu putulu oyo okotia liboso ya Sanduku ya Litatoli kati na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakokutana na yo. Ekozala bule koleka mpo na bino.
37 You shall not make this incense, according to its composition, for yourselves: it shall be to you holy for the LORD.
Bokomisalela te ansa mosusu ya lolenge wana. Okomona yango bule mpe ekozala kaka mpo na Yawe.
38 Whoever shall make any like that, to smell of it, he shall be cut off from his people.”
Moto nyonso oyo akomekola yango mpo na kosepela na solo na yango ya kitoko, basengeli kolongola ye kati na bato na ye.

< Exodus 30 >