< Joshua 10 >

1 Now when Adoni-Zedek king of Jerusalem heard how Joshua had taken Ai, and had utterly destroyed it; as he had done to Jericho and her king, so he had done to Ai and her king; and how the inhabitants of Gibeon had made peace with Israel, and were among them,
Nzokande, Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, ayokaki ete Jozue abotolaki Ayi mpe abebisaki yango nyonso; asalaki Ayi mpe mokonzi na yango ndenge kaka asalaki Jeriko mpe mokonzi na yango. Ayokaki lisusu ete bavandi ya Gabaoni basalaki boyokani ya kimia elongo na Isalaele mpe bakomaki kovanda kati na bango.
2 they were very afraid, because Gibeon was a great city, as one of the royal cities, and because it was greater than Ai, and all its men were mighty.
Boye, sango oyo epesaki somo na mokonzi ya Yelusalemi elongo na bato na ye, pamba te Gabaoni ezalaki engumba moko ya monene lokola bingumba ya bakonzi; ezalaki monene koleka ata Ayi, mpe mibali na yango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba.
3 Therefore Adoni-Zedek king of Jerusalem sent to Hoham king of Hebron, Piram king of Jarmuth, Japhia king of Lachish, and Debir king of Eglon, saying,
Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, atindaki maloba epai ya Oami, mokonzi ya Ebron; epai ya Pireami, mokonzi ya Yarimuti; epai ya Yafia, mokonzi ya Lakishi; mpe epai ya Debiri, mokonzi ya Egiloni.
4 “Come up to me and help me. Let’s strike Gibeon; for they have made peace with Joshua and with the children of Israel.”
Alobaki: « Boya epai na ngai mpe bosunga ngai mpo ete tobundisa Gabaoni, pamba te asali boyokani ya kimia elongo na Jozue mpe bana ya Isalaele. »
5 Therefore the five kings of the Amorites, the king of Jerusalem, the king of Hebron, the king of Jarmuth, the king of Lachish, and the king of Eglon, gathered themselves together and went up, they and all their armies, and encamped against Gibeon, and made war against it.
Boye bakonzi mitano ya bato ya Amori: mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni, bakendeki elongo na mampinga na bango nyonso mpo na kozingela Gabaoni mpe kobundisa yango.
6 The men of Gibeon sent to Joshua at the camp at Gilgal, saying, “Don’t abandon your servants! Come up to us quickly and save us! Help us; for all the kings of the Amorites that dwell in the hill country have gathered together against us.”
Bato ya Gabaoni batindaki maloba epai ya Jozue kati na molako ya Giligali: « Koboya te kosunga basali na yo, yaka noki epai na biso mpe bikisa biso, pamba te bakonzi nyonso ya bato ya Amori, oyo bavandaka na ngomba, basaleli biso likita. »
7 So Joshua went up from Gilgal, he and the whole army with him, including all the mighty men of valor.
Jozue amataki wuta na Giligali elongo na mampinga na ye nyonso mpe bilombe nyonso ya bitumba.
8 Yahweh said to Joshua, “Don’t fear them, for I have delivered them into your hands. Not a man of them will stand before you.”
Yawe alobaki na Jozue: « Kobanga bango te, pamba te nakabi bango na maboko na yo; moko te akokoka kotelema liboso na yo. »
9 Joshua therefore came to them suddenly. He marched from Gilgal all night.
Sima na kotambola butu mobimba wuta na Giligali, Jozue abimelaki bango na pwasa.
10 Yahweh confused them before Israel. He killed them with a great slaughter at Gibeon, and chased them by the way of the ascent of Beth Horon, and struck them to Azekah and to Makkedah.
Yawe akimisaki bango liboso ya Isalaele, mpe Isalaele akweyisaki bango pene ya Gabaoni. Bana ya Isalaele balandaki bango na nzela oyo ekenda kino na Beti-Oroni mpe babomaki bango kino na Azeka mpe Makeda.
11 As they fled from before Israel, while they were at the descent of Beth Horon, Yahweh hurled down great stones from the sky on them to Azekah, and they died. There were more who died from the hailstones than those whom the children of Israel killed with the sword.
Wana bazalaki kokima liboso ya Isalaele mpe kokita na Beti-Oroni, Yawe akitiselaki bango mabanga minene wuta na likolo kino na Azeka, mpe bakufaki. Bato oyo bakufaki na mabanga ya moto bazalaki motango ebele koleka ata bato oyo bana ya Isalaele babomaki na mopanga.
12 Then Joshua spoke to Yahweh in the day when Yahweh delivered up the Amorites before the children of Israel. He said in the sight of Israel, “Sun, stand still on Gibeon! You, moon, stop in the valley of Aijalon!”
Na mokolo oyo Yawe akabaki bato ya Amori na maboko ya bana ya Isalaele, Jozue alobaki na Yawe na miso ya Isalaele: « Moyi, telema na Gabaoni! Sanza, telema na lubwaku ya Ayaloni! »
13 The sun stood still, and the moon stayed, until the nation had avenged themselves of their enemies. Isn’t this written in the book of Jashar? The sun stayed in the middle of the sky, and didn’t hurry to go down about a whole day.
Boye moyi etelemaki, mpe sanza eninganaki te kino tango ekolo ya Isalaele alongaki banguna na ye kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Moto ya Sembo. Moyi etelemaki na kati-kati ya mapata mpe elalaki noki te, pene mokolo mobimba.
14 There was no day like that before it or after it, that Yahweh listened to the voice of a man; for Yahweh fought for Israel.
Mokolo ya boye etikala nanu kozala te, ezala na tango ya kala to na tango oyo ekoya, mokolo oyo Yawe atosi mongongo ya moto. Solo Yawe azalaki kobundela Isalaele.
15 Joshua returned, and all Israel with him, to the camp to Gilgal.
Jozue elongo na Isalaele mobimba bazongaki na molako na Giligali.
16 These five kings fled, and hid themselves in the cave at Makkedah.
Nzokande, bakonzi wana mitano bakimaki mpe bakendeki kobombama kati na lidusu ya mabanga, na Makeda.
17 Joshua was told, saying, “The five kings have been found, hidden in the cave at Makkedah.”
Tango bayebisaki Jozue ete bamoni bakonzi yango mitano babombami kati na lidusu ya mabanga, na Makeda,
18 Joshua said, “Roll large stones to cover the cave’s entrance, and set men by it to guard them;
Jozue alobaki: « Bopusa mabanga minene na ekotelo ya lidusu ya mabanga mpe botia bato pene na yango mpo na kobatela yango.
19 but don’t stay there. Pursue your enemies, and attack them from the rear. Don’t allow them to enter into their cities; for Yahweh your God has delivered them into your hand.”
Kasi bosuka wana te. Bolanda banguna na bino mpe bokanga bango nzela mpo ete bakota na bingumba na bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akabi bango na maboko na bino. »
20 When Joshua and the children of Israel had finished killing them with a very great slaughter until they were consumed, and the remnant which remained of them had entered into the fortified cities,
Tango Jozue mpe bana ya Isalaele balongaki bango mpe basilisaki koboma bango, ndambo ya bato oyo babikaki bakimaki mpe bakotaki na bingumba oyo etongama makasi.
21 all the people returned to the camp to Joshua at Makkedah in peace. None moved his tongue against any of the children of Israel.
Bato nyonso ya Isalaele bazongaki na kimia na molako pene ya Jozue, na Makeda. Moko te alobaki lisusu mabe mpo na bana ya Isalaele.
22 Then Joshua said, “Open the cave entrance, and bring those five kings out of the cave to me.”
Sima, Jozue alobaki: « Bofungola ekotelo ya lidusu ya mabanga mpe bobimisa bakonzi wana mitano. »
23 They did so, and brought those five kings out of the cave to him: the king of Jerusalem, the king of Hebron, the king of Jarmuth, the king of Lachish, and the king of Eglon.
Boye babimisaki bakonzi wana mitano na libanda ya lidusu ya mabanga: mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni.
24 When they brought those kings out to Joshua, Joshua called for all the men of Israel, and said to the chiefs of the men of war who went with him, “Come near. Put your feet on the necks of these kings.” They came near, and put their feet on their necks.
Tango bamemaki bakonzi yango epai ya Jozue, abengisaki mibali nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bakonzi ya basoda oyo bazalaki na ye elongo: « Bopusana mpe botia makolo na bino na bakingo ya bakonzi oyo. » Bakonzi ya basoda bapusanaki mpe batiaki makolo na bango na bakingo ya bakonzi yango.
25 Joshua said to them, “Don’t be afraid, nor be dismayed. Be strong and courageous, for Yahweh will do this to all your enemies against whom you fight.”
Jozue alobaki na bango: « Bobanga te mpe bolemba nzoto te. Bozala makasi mpe boyika mpiko, pamba te ezali boye nde Yawe akosala banguna nyonso oyo bokobundisa. »
26 Afterward Joshua struck them, put them to death, and hanged them on five trees. They were hanging on the trees until the evening.
Sima na yango, Jozue abomaki bakonzi yango mpe adiembikaki bango na banzete mitano. Bibembe na bango etikalaki kodiembela na banzete yango kino na pokwa.
27 At the time of the going down of the sun, Joshua commanded, and they took them down off the trees, and threw them into the cave in which they had hidden themselves, and laid great stones on the mouth of the cave, which remain to this very day.
Tango moyi elalaki, Jozue apesaki mitindo ete bakitisa bibembe yango wuta na banzete mpe babwaka yango kati na lidusu ya mabanga epai wapi babombamaki. Batiaki mabanga minene na ekotelo ya lidusu ya mabanga. Mabanga yango ezali wana kino na mokolo ya lelo.
28 Joshua took Makkedah on that day, and struck it with the edge of the sword, with its king. He utterly destroyed it and all the souls who were in it. He left no one remaining. He did to the king of Makkedah as he had done to the king of Jericho.
Kaka na mokolo yango, Jozue abotolaki engumba Makeda. Abomaki na mopanga mokonzi na yango mpe moto nyonso oyo akutaki kuna mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi ya Makeda ndenge kaka asalaki mokonzi ya Jeriko.
29 Joshua passed from Makkedah, and all Israel with him, to Libnah, and fought against Libnah.
Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele balongwaki na Makeda, bakendeki kino na engumba Libina mpe babundisaki yango.
30 Yahweh delivered it also, with its king, into the hand of Israel. He struck it with the edge of the sword, and all the souls who were in it. He left no one remaining in it. He did to its king as he had done to the king of Jericho.
Yawe akabaki lisusu engumba mpe mokonzi na yango na maboko ya Isalaele. Jozue abomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna; mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi na yango ndenge asalaki mokonzi ya Jeriko.
31 Joshua passed from Libnah, and all Israel with him, to Lachish, and encamped against it, and fought against it.
Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele balongwaki na Libina mpe bakendeki kino na Lakishi. Bazingelaki yango mpe babundisaki yango.
32 Yahweh delivered Lachish into the hand of Israel. He took it on the second day, and struck it with the edge of the sword, with all the souls who were in it, according to all that he had done to Libnah.
Yawe akabaki engumba Lakishi na maboko ya Isalaele, mpe Jozue abotolaki yango, mokolo oyo elandaki. Jozue abomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna ndenge kaka asalaki engumba Libina.
33 Then Horam king of Gezer came up to help Lachish; and Joshua struck him and his people, until he had left him no one remaining.
Boye, Orami, mokonzi ya Gezeri, amataki mpo na kosunga Lakishi; kasi Jozue abomaki ye na mopanga elongo na bato na ye, atikaki ata moto moko te na bomoi.
34 Joshua passed from Lachish, and all Israel with him, to Eglon; and they encamped against it and fought against it.
Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele balongwaki na Lakishi mpe bakendeki kino na engumba Egiloni; bazingelaki yango mpe babundisaki yango.
35 They took it on that day, and struck it with the edge of the sword. He utterly destroyed all the souls who were in it that day, according to all that he had done to Lachish.
Babotolaki yango kaka na mokolo wana mpe babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna; babebisaki bango mokolo wana, ndenge kaka basalaki na Lakishi.
36 Joshua went up from Eglon, and all Israel with him, to Hebron; and they fought against it.
Jozue mpe Isalaele mobimba balongwaki na Egiloni, bamataki kino na Ebron mpe babundisaki yango.
37 They took it, and struck it with the edge of the sword, with its king and all its cities, and all the souls who were in it. He left no one remaining, according to all that he had done to Eglon; but he utterly destroyed it, and all the souls who were in it.
Babotolaki engumba yango, babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna elongo na mokonzi na yango. Bazwaki mpe bamboka na yango ya mike-mike mpe babomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna. Batikaki ata moto moko te na bomoi, ndenge kaka basalaki na engumba Egiloni. Babebisaki yango nyonso penza mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna.
38 Joshua returned, and all Israel with him, to Debir, and fought against it.
Jozue elongo na Isalaele mobimba babalukaki na ngambo ya engumba Debiri mpe babundisaki yango.
39 He took it, with its king and all its cities. They struck them with the edge of the sword, and utterly destroyed all the souls who were in it. He left no one remaining. As he had done to Hebron, so he did to Debir, and to its king; as he had done also to Libnah, and to its king.
Babotolaki engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, bakangaki mokonzi na yango mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna na mopanga. Batikaki ata moto moko te na bomoi. Jozue asalaki engumba Debiri elongo na mokonzi na yango, ndenge kaka asalaki engumba Libina elongo na mokonzi na yango, mpe Ebron elongo na mokonzi na yango.
40 So Joshua struck all the land, the hill country, the South, the lowland, the slopes, and all their kings. He left no one remaining, but he utterly destroyed all that breathed, as Yahweh, the God of Israel, commanded.
Boye, Jozue alongaki etuka wana nyonso: mokili ya bangomba, Negevi, etando ya pembeni-pembeni ya Ebale monene mpe etando ya se ya bangomba elongo na bakonzi na yango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abebisaki bato nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bomoi, ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki ye mitindo.
41 Joshua struck them from Kadesh Barnea even to Gaza, and all the country of Goshen, even to Gibeon.
Jozue alongaki bango wuta na Kadeshi-Barinea kino na Gaza, mpe mokili mobimba ya Gosheni kino na Gabaoni.
42 Joshua took all these kings and their land at one time because Yahweh, the God of Israel, fought for Israel.
Jozue alongaki bakonzi wana nyonso na mbala moko mpe abotolaki bamboka na bango, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, azalaki kobundela Isalaele.
43 Joshua returned, and all Israel with him, to the camp to Gilgal.
Sima na yango, Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele bazongaki na molako na Giligali.

< Joshua 10 >