< Exodus 32 >

1 When the people saw that Moses delayed coming down from the mountain, the people gathered themselves together to Aaron, and said to him, “Come, make us gods, which shall go before us; for as for this Moses, the man who brought us up out of the land of Egypt, we don’t know what has become of him.”
Tango bato bamonaki ete Moyize azali kowumela mpo na kokita na ngomba, basanganaki zingazinga ya Aron mpe balobaki: — Yaka mpe salela biso nzambe oyo akotambola liboso na biso. Pamba te Moyize, moto oyo abimisaki biso na Ejipito, toyebi te makambo nini ekomeli ye.
2 Aaron said to them, “Take off the golden rings, which are in the ears of your wives, of your sons, and of your daughters, and bring them to me.”
Aron azongiselaki bango: — Bolongola biloko ya matoyi oyo ezali na matoyi ya basi na bino, ya bana na bino ya basi mpe ya mibali, mpe bomemela ngai yango.
3 All the people took off the golden rings which were in their ears, and brought them to Aaron.
Bato nyonso balongolaki biloko ya matoyi mpe bamemaki yango epai ya Aron.
4 He received what they handed him, fashioned it with an engraving tool, and made it a molded calf. Then they said, “These are your gods, Israel, which brought you up out of the land of Egypt.”
Aron azwaki biloko oyo bapesaki ye, anyangwisaki yango na moto, mpe sima, asalaki ekeko ya mwana ngombe. Bongo balobaki: — Tala nzambe na yo, oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito.
5 When Aaron saw this, he built an altar before it; and Aaron made a proclamation, and said, “Tomorrow shall be a feast to Yahweh.”
Tango Aron amonaki yango, atongaki etumbelo liboso ya mwana ngombe mpe alobaki: — Feti ekozala lobi mpo na Yawe.
6 They rose up early on the next day, and offered burnt offerings, and brought peace offerings; and the people sat down to eat and to drink, and rose up to play.
Mokolo oyo elandaki, bato balamukaki na tongo makasi, babonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Sima na yango, bavandaki mpo na kolia mpe mpo na komela; mpe batelemaki mpo na kosakana.
7 Yahweh spoke to Moses, “Go, get down; for your people, whom you brought up out of the land of Egypt, have corrupted themselves!
Yawe alobaki na Moyize: — Kita, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito babungi nzela,
8 They have turned away quickly out of the way which I commanded them. They have made themselves a molded calf, and have worshiped it, and have sacrificed to it, and said, ‘These are your gods, Israel, which brought you up out of the land of Egypt.’”
bapesi mokongo noki na makambo oyo natindaki bango mpe bamisaleli ekeko ya mwana ngombe. Bagumbameli yango, babonzeli yango makabo mpe balobi: « Tala nzambe na yo, Oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito. »
9 Yahweh said to Moses, “I have seen these people, and behold, they are a stiff-necked people.
Yawe alobaki lisusu na Moyize: — Namoni ete bato oyo bazali batomboki.
10 Now therefore leave me alone, that my wrath may burn hot against them, and that I may consume them; and I will make of you a great nation.”
Sik’oyo, tika Ngai moko nasala mpo ete kanda na Ngai ekweyela bango mpe naboma bango. Kasi nakokomisa yo libota monene.
11 Moses begged Yahweh his God, and said, “Yahweh, why does your wrath burn hot against your people, that you have brought out of the land of Egypt with great power and with a mighty hand?
Moyize abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe alobaki: — Eh Yawe! Mpo na nini kanda na Yo ekweyela bato na Yo, oyo obimisaki na Ejipito, na nguya monene mpe na loboko ya makasi?
12 Why should the Egyptians talk, saying, ‘He brought them out for evil, to kill them in the mountains, and to consume them from the surface of the earth’? Turn from your fierce wrath, and turn away from this evil against your people.
Mpo na nini bato ya Ejipito baloba: « Nzambe na bango azalaki na makanisi mabe tango abimisaki bango na Ejipito. Ezali nde mpo na koboma bango na mokili ya bangomba mpe kosilisa bango na mokili. » Lembisa kanda na Yo ya makasi mpe kosala lisusu mabe te na bato na Yo.
13 Remember Abraham, Isaac, and Israel, your servants, to whom you swore by your own self, and said to them, ‘I will multiply your offspring as the stars of the sky, and all this land that I have spoken of I will give to your offspring, and they shall inherit it forever.’”
Kanisa Abrayami, Izaki mpe Isalaele, basali na Yo, oyo Yo moko olapelaki ndayi mpe olobaki: « Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto na likolo, nakopesa bango mokili oyo nyonso ndenge kaka nalobaki na bango; mpe yango ekozala libula na bango mpo na libela. »
14 So Yahweh turned away from the evil which he said he would do to his people.
Mpe Yawe asalaki lisusu te mabe oyo akanaki kosala bato na Ye.
15 Moses turned, and went down from the mountain, with the two tablets of the covenant in his hand; tablets that were written on both their sides. They were written on one side and on the other.
Moyize abalukaki mpe akitaki wuta na ngomba, elongo na bitando mibale ya mabanga ya boyokani na maboko na ye; mabanga yango ekomama na bangambo mibale, na liboso mpe na sima.
16 The tablets were the work of God, and the writing was the writing of God, engraved on the tablets.
Bitando yango ya mabanga ezalaki mosala ya Nzambe, mpe makomi oyo ezalaki ya kokomama na bitando yango ya mabanga ezalaki ya Nzambe.
17 When Joshua heard the noise of the people as they shouted, he said to Moses, “There is the noise of war in the camp.”
Tango Jozue ayokaki makelele ya bato oyo bazalaki koganga, alobaki na Moyize: — Ezali na makelele ya bitumba kati na molako!
18 He said, “It isn’t the voice of those who shout for victory. It is not the voice of those who cry for being overcome; but the noise of those who sing that I hear.”
Moyize azongisaki: — Te, ezali makelele ya elonga te, makelele ya kokweyisama mpe te! Oyo ngai nazali koyoka, ezali nde makelele ya banzembo.
19 As soon as he came near to the camp, he saw the calf and the dancing. Then Moses’ anger grew hot, and he threw the tablets out of his hands, and broke them beneath the mountain.
Tango Moyize apusanaki pembeni ya molako, amonaki ekeko ya mwana ngombe mpe bato bazali kobina; asilikaki makasi, abwakaki bitando ya mabanga wuta na maboko na ye mpe apanzaki yango na biteni, na ebandeli ya ngomba.
20 He took the calf which they had made, and burned it with fire, ground it to powder, and scattered it on the water, and made the children of Israel drink it.
Moyize azwaki ekeko ya mwana ngombe oyo basalaki, atumbaki yango na moto mpe anikaki yango malamu kino ekomaki putulu. Bongo apanzaki yango likolo ya mayi mpe amelisaki bana ya Isalaele mayi yango.
21 Moses said to Aaron, “What did these people do to you, that you have brought a great sin on them?”
Moyize atunaki Aron: — Likambo nini bato oyo basali yo mpo ete okamba bango kino kosala lisumu ya monene boye?
22 Aaron said, “Don’t let the anger of my lord grow hot. You know the people, that they are set on evil.
Aron azongisaki: — Tika ete nkolo na ngai asilika te! Oyebi bato, balingaka kaka kosala mabe.
23 For they said to me, ‘Make us gods, which shall go before us. As for this Moses, the man who brought us up out of the land of Egypt, we don’t know what has become of him.’
Balobaki na ngai: « Salela biso Nzambe oyo akotambola liboso na biso, pamba te toyebi te likambo nini ekweyeli Moyize oyo abimisaki biso na Ejipito. »
24 I said to them, ‘Whoever has any gold, let them take it off.’ So they gave it to me; and I threw it into the fire, and out came this calf.”
Bongo nayebisaki bango: « Tika ete moto nyonso oyo azali na biloko ya matoyi ya wolo alongola yango. » Bapesaki ngai wolo, nanyangwisaki yango na moto mpe nasalaki na yango ekeko ya mwana ngombe oyo.
25 When Moses saw that the people were out of control, (for Aaron had let them lose control, causing derision among their enemies),
Moyize amonaki ete bato bazalaki kati na mobulu, pamba te Aron akambaki bango mabe; yango wana bakomaki eloko ya kotiola na miso ya banguna na bango.
26 then Moses stood in the gate of the camp, and said, “Whoever is on Yahweh’s side, come to me!” All the sons of Levi gathered themselves together to him.
Moyize atelemaki na ekotelo ya molako mpe alobaki: — Tika ete moto nyonso oyo azali mpo na Yawe aya epai na ngai. Mpe Balevi nyonso basanganaki pene na ye.
27 He said to them, “Yahweh, the God of Israel, says, ‘Every man put his sword on his thigh, and go back and forth from gate to gate throughout the camp, and every man kill his brother, and every man his companion, and every man his neighbor.’”
Alobaki na bango: — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Tika ete moto nyonso atia mopanga na mopende na ye. Botambola kati na molako wuta na ndako ya kapo moko kino na ndako ya kapo mosusu; mpe moko na moko na bino aboma ndeko na ye ya mobali, moninga na ye mpe mozalani na ye. »
28 The sons of Levi did according to the word of Moses. About three thousand men fell of the people that day.
Balevi basalaki ndenge Moyize atindaki; mpe na mokolo wana, bato pene nkoto misato bakufaki.
29 Moses said, “Consecrate yourselves today to Yahweh, for every man was against his son and against his brother, that he may give you a blessing today.”
Moyize alobaki: — Na mokolo ya lelo, Yawe atie bino pembeni mpo ete bobomi bana na bino moko ya mibali mpe bandeko na bino ya mibali. Bongo mpo na yango, apamboli bino.
30 On the next day, Moses said to the people, “You have sinned a great sin. Now I will go up to Yahweh. Perhaps I shall make atonement for your sin.”
Mokolo elandaki, Moyize alobaki na bato: — Bosalaki lisumu monene. Kasi sik’oyo, nakomata epai na Yawe; tango mosusu, nakozwa bolimbisi mpo na lisumu na bino.
31 Moses returned to Yahweh, and said, “Oh, this people have sinned a great sin, and have made themselves gods of gold.
Moyize azongaki epai na Yawe mpe alobaki: — Ah! Tala lisumu monene bato oyo basali. Bamisalelaki nzambe ya wolo.
32 Yet now, if you will, forgive their sin—and if not, please blot me out of your book which you have written.”
Kasi sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa lisumu na bango, soki te longola kombo na ngai na buku ya bomoi oyo okomaki.
33 Yahweh said to Moses, “Whoever has sinned against me, I will blot him out of my book.
Yawe azongiselaki Moyize: — Moto nyonso oyo asalaki lisumu liboso na Ngai, ye nde nakolongola na buku na Ngai.
34 Now go, lead the people to the place of which I have spoken to you. Behold, my angel shall go before you. Nevertheless, in the day when I punish, I will punish them for their sin.”
Sik’oyo, kende! Kamba bato na esika oyo nalobaki na yo. Tala, anjelu na Ngai akozala liboso na yo. Atako bongo, tango mokolo ekokoka mpo ete napesa etumbu, nakopesa bango etumbu mpo na lisumu na bango.
35 Yahweh struck the people, because of what they did with the calf, which Aaron made.
Yawe apesaki bato etumbu likolo ya ekeko ya mwana ngombe oyo balobaki na Aron ete asala.

< Exodus 32 >