< Daniel 3 >

1 Nebuchadnezzar the king made an image of gold, whose height was sixty cubits and its width six cubits. He set it up in the plain of Dura, in the province of Babylon.
Mokonzi Nabukodonozori asalisaki ekeko moko ya wolo, oyo ezalaki na bametele pene tuku misato na bosanda mpe bametele pene misato na mokuse. Atelemisaki yango kati na etando ya Dura, na etuka ya Babiloni.
2 Then Nebuchadnezzar the king sent to gather together the local governors, the deputies, and the governors, the judges, the treasurers, the counselors, the sheriffs, and all the rulers of the provinces, to come to the dedication of the image which Nebuchadnezzar the king had set up.
Abengisaki bayangeli oyo atiaki na bituka, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli, bapesi toli, babateli bomengo ya mokonzi, bato ya mibeko, basambisi mpe bakalaka nyonso ya bituka, mpo ete baya na feti ya kobandisa losambo ya ekeko oyo mokonzi Nabukodonozori asalisaki.
3 Then the local governors, the deputies, and the governors, the judges, the treasurers, the counselors, the sheriffs, and all the rulers of the provinces were gathered together to the dedication of the image that Nebuchadnezzar the king had set up; and they stood before the image that Nebuchadnezzar had set up.
Boye, bayangeli oyo atiaki na bituka, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli, bapesi toli, babateli ya bomengo ya mokonzi, bato ya mibeko, basambisi mpe bakalaka nyonso ya bituka basanganaki mpo na feti ya kobandisa losambo ya ekeko oyo mokonzi Nabukodonozori asalisaki, mpe batelemaki liboso na yango.
4 Then the herald cried aloud, “To you it is commanded, peoples, nations, and languages,
Molobeli ya mokonzi atatolaki na mongongo makasi: — Bino bato ya bikolo nyonso mpe ya nkota nyonso, tala makambo oyo bosengeli kosala:
5 that whenever you hear the sound of the horn, flute, zither, lyre, harp, pipe, and all kinds of music, you fall down and worship the golden image that Nebuchadnezzar the king has set up.
« Tango kaka bokoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya lolenge nyonso ya bibetelo mindule, bosengeli kofukama mpo na kogumbamela ekeko ya wolo oyo mokonzi Nabukodonozori asalisi.
6 Whoever doesn’t fall down and worship shall be cast into the middle of a burning fiery furnace the same hour.”
Moto nyonso oyo akoboya kofukama mpo na kogumbamela ekeko yango, bakobwaka ye mbala moko kati na libulu ya moto. »
7 Therefore at that time, when all the peoples heard the sound of the horn, flute, zither, lyre, harp, pipe, and all kinds of music, all the peoples, the nations, and the languages fell down and worshiped the golden image that Nebuchadnezzar the king had set up.
Yango wana, tango kaka bayokaki lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya bibetelo mindule lolenge nyonso, bato ya bikolo nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso bafukamaki mpo na kogumbamela ekeko ya wolo oyo mokonzi Nabukodonozori asalisaki.
8 Therefore at that time certain Chaldeans came near and brought accusation against the Jews.
Kaka na tango yango, ndambo ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto bayaki kofunda Bayuda.
9 They answered Nebuchadnezzar the king, “O king, live for ever!
Balobaki na mokonzi Nabukodonozori: — Oh mokonzi, tika ete owumela na bomoi seko na seko!
10 You, O king, have made a decree that every man who hears the sound of the horn, flute, zither, lyre, harp, pipe, and all kinds of music shall fall down and worship the golden image;
Oh mokonzi, opesaki mitindo ete moto nyonso oyo akoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya lolenge nyonso ya bibetelo mindule afukama mpo na kogumbamela ekeko ya wolo;
11 and whoever doesn’t fall down and worship shall be cast into the middle of a burning fiery furnace.
mpe ete moto nyonso oyo akoboya kofukama mpo na kogumbamela ekeko yango, babwaka ye kati na libulu ya moto!
12 There are certain Jews whom you have appointed over the affairs of the province of Babylon: Shadrach, Meshach, and Abednego. These men, O king, have not respected you. They don’t serve your gods, and don’t worship the golden image which you have set up.”
Kasi, mokonzi, ezali na ndambo ya Bayuda oyo okomisaki bayangeli na etuka ya Babiloni: Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, oyo bazali kotosa yo ata moke te: bazali kosalela banzambe na yo te mpe kogumbamela te ekeko ya wolo oyo osali.
13 Then Nebuchadnezzar in rage and fury commanded that Shadrach, Meshach, and Abednego be brought. Then these men were brought before the king.
Mokonzi Nabukodonozori atombokaki makasi mpe abengisaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego. Boye, bamemaki bango liboso ya mokonzi.
14 Nebuchadnezzar answered them, “Is it true, Shadrach, Meshach, and Abednego, that you don’t serve my gods and you don’t worship the golden image which I have set up?
Nabukodonozori atunaki bango: — Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, ezali penza ya solo ete bozali kosalela banzambe na ngai te mpe bozali kogumbamela te ekeko ya wolo oyo nasali?
15 Now if you are ready whenever you hear the sound of the horn, flute, zither, lyre, harp, pipe, and all kinds of music to fall down and worship the image which I have made, good; but if you don’t worship, you shall be cast the same hour into the middle of a burning fiery furnace. Who is that god who will deliver you out of my hands?”
Sik’oyo, bomibongisa! Tango kaka bokoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya nyonso ya bibetelo mindule, bokofukama mpo na kogumbamela ekeko oyo nasali. Soki boboyi kogumbamela yango, bokobwakama mbala moko kati na libulu ya moto. Boye, tokotala soki nzambe nini akokoka kokangola bino na maboko na ngai.
16 Shadrach, Meshach, and Abednego answered the king, “Nebuchadnezzar, we have no need to answer you in this matter.
Shadraki, Meshaki mpe Abedinego bazongiselaki mokonzi Nabukodonozori: — Tozali na tina na komibundela te na likambo oyo liboso na yo.
17 If it happens, our God whom we serve is able to deliver us from the burning fiery furnace; and he will deliver us out of your hand, O king.
Soki babwaki biso kati na libulu ya moto, Nzambe oyo tosalelaka azali na makoki ya kobikisa biso wuta na libulu yango mpe ya kokangola biso na maboko na yo.
18 But if not, let it be known to you, O king, that we will not serve your gods or worship the golden image which you have set up.”
Kasi ata soki abikisi na Ye biso te, tolingi mokonzi oyeba ete, biso, tokosalela banzambe na yo te mpe tokogumbamela te ekeko ya wolo oyo osalaki.
19 Then Nebuchadnezzar was full of fury, and the form of his appearance was changed against Shadrach, Meshach, and Abednego. He spoke, and commanded that they should heat the furnace seven times more than it was usually heated.
Nabukodonozori atombokelaki makasi Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, mpe akangelaki bango elongi; apesaki mitindo ete bapelisa moto makasi penza mbala sambo koleka ndenge bapelisaka yango tango nyonso.
20 He commanded certain mighty men who were in his army to bind Shadrach, Meshach, and Abednego, and to cast them into the burning fiery furnace.
Bongo apesaki mitindo na ndambo ya basoda ya mpiko kati na mampinga na ye ete bakanga Shadraki, Meshaki mpe Abedinego basinga mpe babwaka bango kati na libulu ya moto.
21 Then these men were bound in their pants, their tunics, and their mantles, and their other clothes, and were cast into the middle of the burning fiery furnace.
Boye, bakangaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego basinga, wana balataki bilamba na bango, banzambala na bango, bakazaka na bango, bitendi na bango oyo bakangaka na moto mpe bilamba mosusu, mpe babwakaki bango kati na libulu ya moto.
22 Therefore because the king’s commandment was urgent and the furnace exceedingly hot, the flame of the fire killed those men who took up Shadrach, Meshach, and Abednego.
Lokola mokonzi apesaki mitindo ete bapelisa moto ya libulu ya moto makasi penza, moto yango ebomaki basoda oyo babwakaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego kati na libulu ya moto.
23 These three men, Shadrach, Meshach, and Abednego, fell down bound into the middle of the burning fiery furnace.
Kasi Shadraki, Meshaki mpe Abedinego bakweyaki kati na libulu yango ya moto, bakanga bango basinga makasi.
24 Then Nebuchadnezzar the king was astonished and rose up in haste. He spoke and said to his counselors, “Didn’t we cast three men bound into the middle of the fire?” They answered the king, “True, O king.”
Mokonzi Nabukodonozori akamwaki mpe atelemaki na lombangu; atunaki bapesi toli na ye: — Boni, tobwakaki te bato misato kati na moto, bakanga bango basinga? Bazongiselaki mokonzi: — Mokonzi, tosalaki bongo!
25 He answered, “Look, I see four men loose, walking in the middle of the fire, and they are unharmed. The appearance of the fourth is like a son of the gods.”
Alobaki na bapesi toli na ye: — Botala! Nazali komona bato minei bazali kotambola kati na moto, bakangama basinga te mpe moto ezali kozikisa bango te; mpe moto ya minei azali lokola mwana ya banzambe.
26 Then Nebuchadnezzar came near to the mouth of the burning fiery furnace. He spoke and said, “Shadrach, Meshach, and Abednego, you servants of the Most High God, come out, and come here!” Then Shadrach, Meshach, and Abednego came out of the middle of the fire.
Nabukodonozori apusanaki pene ya monoko ya libulu ya moto mpe agangaki na mongongo makasi: — Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, basali ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, bobima kuna mpe boya awa! Shadraki, Meshaki mpe Abedinego babimaki wuta na libulu ya moto.
27 The local governors, the deputies, and the governors, and the king’s counselors, being gathered together, saw these men, that the fire had no power on their bodies. The hair of their head wasn’t singed. Their pants weren’t changed. The smell of fire wasn’t even on them.
Bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli mpe bapesi toli ya mokonzi bazingelaki bango; mpe bamonaki ete moto ezikisaki te ezala banzoto na bango, suki ya mito na bango to bilamba na bango, mpe batikalaki koyoka bango ata solo ya moto te.
28 Nebuchadnezzar spoke and said, “Blessed be the God of Shadrach, Meshach, and Abednego, who has sent his angel and delivered his servants who trusted in him, and have changed the king’s word, and have yielded their bodies, that they might not serve nor worship any god except their own God.
Nabukodonozori alobaki: — Tika ete Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego akumisama; Ye nde atindaki anjelu na Ye mpo ete abikisa basali na Ye, pamba te batielaka Ye motema! Batosaki mitindo ya mokonzi te mpe bandimaki kobungisa bomoi na bango na esika ya kosalela mpe kogumbamela nzambe mosusu, soki Nzambe na bango te.
29 Therefore I make a decree that every people, nation, and language which speak anything evil against the God of Shadrach, Meshach, and Abednego shall be cut in pieces, and their houses shall be made a dunghill, because there is no other god who is able to deliver like this.”
Yango wana, nazwi mokano ete moto nyonso, azala ya mokili, ekolo to lokota nini, oyo akoloba mabe mpo na Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, bakokata-kata ye na biteni, bakobuka ndako na ye mpe bakokomisa yango mopiku ya mbindo, pamba te Nzambe mosusu azali te, oyo akoki kobikisa bato na Ye na lolenge oyo!
30 Then the king promoted Shadrach, Meshach, and Abednego in the province of Babylon.
Sima na yango, mokonzi atombolaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego kati na etuka ya Babiloni.

< Daniel 3 >