< 1 Samuel 18 >

1 When he had finished speaking to Saul, the soul of Jonathan was knit with the soul of David, and Jonathan loved him as his own soul.
Tango kaka Davidi asilisaki kosolola na Saulo, Jonatan akangamaki na Davidi mpe alingaki ye lokola ye moko.
2 Saul took him that day, and wouldn’t let him go home to his father’s house any more.
Kobanda mokolo wana, Saulo avandisaki Davidi kati na ndako na ye mpe atikaki ye te kozonga na ndako ya tata na ye.
3 Then Jonathan and David made a covenant, because he loved him as his own soul.
Jonatan asalaki boyokani elongo na Davidi, pamba te alingaki ye lokola ye moko.
4 Jonathan stripped himself of the robe that was on him and gave it to David with his clothing, even including his sword, his bow, and his sash.
Jonatan alongolaki kazaka oyo azalaki kolata mpe apesaki yango na Davidi. Apesaki ye mpe bilamba na ye, mopanga na ye, mokaba na ye mpe eloko na ye oyo abetelaka tolotolo.
5 David went out wherever Saul sent him, and behaved himself wisely; and Saul set him over the men of war. It was good in the sight of all the people, and also in the sight of Saul’s servants.
Lokola Davidi azalaki penza kosala malamu mosala nyonso oyo Saulo azalaki kotinda ye na bisika nyonso, Saulo akomisaki ye mokonzi monene ya basoda. Bato nyonso elongo na basali ya Saulo bazalaki kosepela na ye.
6 As they came, when David returned from the slaughter of the Philistine, the women came out of all the cities of Israel, singing and dancing, to meet King Saul with tambourines, with joy, and with instruments of music.
Sima na Davidi koboma moto ya Filisitia, tango basoda bazalaki kozonga wuta na bitumba, basi babimaki wuta na bingumba nyonso ya Isalaele mpo na kokende koyamba mokonzi Saulo, na banzembo ya esengo mpe na mabina, na milolo ya esengo, na bambunda mike mpe na bangonga.
7 The women sang to one another as they played, and said, “Saul has slain his thousands, and David his ten thousands.”
Basi bazalaki kobina mpe koyemba boye: « Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi. »
8 Saul was very angry, and this saying displeased him. He said, “They have credited David with ten thousands, and they have only credited me with thousands. What can he have more but the kingdom?”
Maloba ya banzembo yango epesaki Saulo kanda makasi. Amilobelaki: « Soki batangi motango ya nkoto zomi mpo na Davidi, mpe motango ya nkoto moko mpo na ngai, elingi koloba ete etikali na ye kaka kozwa bokonzi! »
9 Saul watched David from that day and forward.
Kobanda mokolo wana, Saulo akomaki kotala Davidi miso mabe.
10 On the next day, an evil spirit from God came mightily on Saul, and he prophesied in the middle of the house. David played with his hand, as he did day by day. Saul had his spear in his hand;
Mokolo oyo elandaki, molimo moko ya mabe kowuta na Nzambe ekitelaki Saulo, mpe akomaki kotuntuka kati na ndako na ye, wana Davidi azalaki kobeta lindanda na ye ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Saulo asimbaki likonga na ye na loboko.
11 and Saul threw the spear, for he said, “I will pin David to the wall!” David escaped from his presence twice.
Mbala moko, Saulo abwakaki likonga na ye na koloba: « Nakobamba Davidi na mir. » Kasi Davidi akimaki ye mbala mibale.
12 Saul was afraid of David, because Yahweh was with him, and had departed from Saul.
Saulo abangaki Davidi, pamba te Yawe azalaki elongo na Davidi kasi atikaki Saulo.
13 Therefore Saul removed him from his presence, and made him his captain over a thousand; and he went out and came in before the people.
Mpo na yango, Saulo alongolaki Davidi pembeni na ye mpe akomisaki ye mokonzi ya basoda nkoto moko. Boye Davidi akomaki kotambolisa basoda na bitumba na bango.
14 David behaved himself wisely in all his ways; and Yahweh was with him.
Na nyonso oyo azalaki kosala, Davidi azalaki kolonga, pamba te Yawe azalaki elongo na ye.
15 When Saul saw that he behaved himself very wisely, he stood in awe of him.
Tango Saulo amonaki ete Davidi azali kolonga mingi, abangaki ye.
16 But all Israel and Judah loved David; for he went out and came in before them.
Kasi Isalaele mobimba mpe Yuda mobimba bazalaki kolinga Davidi mpo ete azalaki kotambolisa bango na bitumba na bango.
17 Saul said to David, “Behold, my elder daughter Merab. I will give her to you as wife. Only be valiant for me, and fight Yahweh’s battles.” For Saul said, “Don’t let my hand be on him, but let the hand of the Philistines be on him.”
Saulo alobaki na Davidi: — Tala Merabi, mwana na ngai ya liboso ya mwasi! Nakopesa yo ye na libala soki kaka osali epai na ngai lokola soda ya mpiko mpe obundi bitumba ya Yawe. Nzokande Saulo azalaki komilobela: « Tika ete loboko na ngai eboma ye te, kasi ezala nde loboko ya bato ya Filisitia. »
18 David said to Saul, “Who am I, and what is my life, or my father’s family in Israel, that I should be son-in-law to the king?”
Davidi azongiselaki Saulo: — Ngai nazali nani, libota na ngai nde nini, etuka ya tata na ngai nde nini kati na Isalaele mpo ete nakoma bokilo ya mokonzi?
19 But at the time when Merab, Saul’s daughter, should have been given to David, she was given to Adriel the Meholathite as wife.
Boye, tango ngonga ya kobalisa Merabi, mwana mwasi ya Saulo, epai ya Davidi ekokaki, Saulo abalisaki ye epai ya Adriyeli, moto ya Meola.
20 Michal, Saul’s daughter, loved David; and they told Saul, and the thing pleased him.
Nzokande Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kolinga Davidi. Mpe tango bayebisaki Saulo likambo yango, asepelaki makasi.
21 Saul said, I will give her to him, that she may be a snare to him and that the hand of the Philistines may be against him. Therefore Saul said to David a second time, “You shall today be my son-in-law.”
Boye Saulo amilobelaki: « Nakobalisa Mikali epai ya Davidi, mpo ete azala motambo mpo na ye, mpe ete loboko ya bato ya Filisitia ekanga ye Davidi. » Boye Saulo alobaki na Davidi: « Ozwi sik’oyo libaku ya mibale ya kokoma bokilo na ngai. »
22 Saul commanded his servants, “Talk with David secretly, and say, ‘Behold, the king has delight in you, and all his servants love you. Now therefore be the king’s son-in-law.’”
Bongo Saulo apesaki mitindo epai ya basali na ye: « Bosolola na Davidi na nkuku mpe boyebisa ye: ‹ Tala ndenge nini mokonzi azali kosepela na yo, mpe basali na ye nyonso balingi yo! Koma na yo sik’oyo bokilo na ye! › »
23 Saul’s servants spoke those words in the ears of David. David said, “Does it seem to you a light thing to be the king’s son-in-law, since I am a poor man and little known?”
Basali ya Saulo bazongelaki maloba oyo epai ya Davidi, kasi Davidi alobaki: « Bokanisi ete kokoma bokilo ya mokonzi ezali likambo ya pete? Kaka ngai oyo nazali mobola mpe moto pamba! »
24 The servants of Saul told him, saying, “David spoke like this.”
Basali ya Saulo bayebisaki ye maloba ya Davidi.
25 Saul said, “Tell David, ‘The king desires no dowry except one hundred foreskins of the Philistines, to be avenged of the king’s enemies.’” Now Saul thought he would make David fall by the hand of the Philistines.
Saulo alobaki: « Boloba na Davidi ete mokonzi asengi mbongo ya libala te, kasi bangenga nkama moko ya nzoto ya mibali kati na bato ya Filisitia mpo na kozongisa mabe na mabe epai ya banguna na ye. » Makanisi ya Saulo ezalaki ya komona Davidi kokweya na maboko ya bato ya Filisitia.
26 When his servants told David these words, it pleased David well to be the king’s son-in-law. Before the deadline,
Tango basali bayebisaki Davidi makambo yango, Davidi asepelaki kokoma bokilo ya mokonzi. Boye liboso ete tango oyo bakataki ekoka,
27 David arose and went, he and his men, and killed two hundred men of the Philistines. Then David brought their foreskins, and they gave them in full number to the king, that he might be the king’s son-in-law. Then Saul gave him Michal his daughter as wife.
Davidi elongo na mampinga na ye babimaki mpe babomaki mibali nkama mibale kati na bato ya Filisitia. Davidi amemaki bangenga na bango, mpe batangaki motango na yango liboso ya mokonzi mpo ete Davidi akoma bokilo ya mokonzi. Boye Saulo apesaki na libala Mikali, mwana na ye ya mwasi, epai ya Davidi.
28 Saul saw and knew that Yahweh was with David; and Michal, Saul’s daughter, loved him.
Tango Saulo amonaki mpe asosolaki ete Yawe azali elongo na Davidi, mpe ete mwana na ye ya mwasi, Mikali, alingaka Davidi,
29 Saul was even more afraid of David; and Saul was David’s enemy continually.
Saulo akomaki lisusu kobanga Davidi makasi, mpe akomaki monguna na ye na mikolo ya bomoi na ye, oyo etikalaki.
30 Then the princes of the Philistines went out; and as often as they went out, David behaved himself more wisely than all the servants of Saul, so that his name was highly esteemed.
Bakonzi ya basoda ya Filisitia bakobaki kobima mpo na kobunda; mpe tango nyonso bazalaki kosala yango, Davidi azalaki kolonga, koleka bakonzi mosusu ya basoda ya Saulo. Boye kombo na ye ekendeki sango.

< 1 Samuel 18 >