< 1 Kings 3 >

1 Solomon made a marriage alliance with Pharaoh king of Egypt. He took Pharaoh’s daughter and brought her into David’s city until he had finished building his own house, the LORD’s house, and the wall around Jerusalem.
Salomo asalaki boyokani elongo na Faraon, mokonzi ya Ejipito; abalaki mwana mwasi ya Faraon mpe amemaki ye na engumba ya Davidi, kino tango asilisaki kotonga ndako na ye ya bokonzi, Tempelo ya Yawe mpe bamir, zingazinga ya Yelusalemi.
2 However, the people sacrificed in the high places, because there was not yet a house built for the LORD’s name.
Na tango wana, bato bazalaki kotumba mbeka na bisambelo ya likolo ya bangomba, pamba te ezalaki nanu na tempelo moko te oyo etongamaki mpo na Kombo na Yawe.
3 Solomon loved the LORD, walking in the statutes of David his father, except that he sacrificed and burnt incense in the high places.
Salomo alakisaki bolingo na ye mpo na Yawe na kotambola kolanda malako ya Davidi, tata na ye, longola kaka kotumba mbeka mpe ansa na bisambelo ya likolo ya bangomba.
4 The king went to Gibeon to sacrifice there, for that was the great high place. Solomon offered a thousand burnt offerings on that altar.
Mokonzi akendeki na Gabaoni mpo na kobonza mbeka, pamba te ezalaki esambelo ya likolo ya ngomba oyo elekaki motuya, mpe kuna, Salomo abonzaki bambeka ya kotumba nkoto moko, na etumbelo wana.
5 In Gibeon, the LORD appeared to Solomon in a dream by night; and God said, “Ask for what I should give you.”
Na Gabaoni, Yawe amimonisaki epai ya Salomo kati na ndoto ya butu. Nzambe alobaki na ye: — Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo.
6 Solomon said, “You have shown to your servant David my father great loving kindness, because he walked before you in truth, in righteousness, and in uprightness of heart with you. You have kept for him this great loving kindness, that you have given him a son to sit on his throne, as it is today.
Salomo azongisaki: — Otalisi bolamu monene epai ya tata na ngai, Davidi, mosali na Yo, pamba te atambolaki na boyengebene mpe na bosembo na miso na Yo; okobaki kotalisa ye bolamu monene na Yo mpe opesi ye mwana mobali oyo avandi lelo na kiti na ye ya bokonzi.
7 Now, LORD my God, you have made your servant king instead of David my father. I am just a little child. I don’t know how to go out or come in.
Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na ngai, okomisi mowumbu na Yo mokonzi na esika ya Davidi, tata na ngai. Kasi nazali nanu elenge mpe nayebi te ndenge nini nakoki komema mokumba oyo.
8 Your servant is amongst your people which you have chosen, a great people, that can’t be numbered or counted for multitude.
Mowumbu na Yo azali awa kati na bato oyo oponi: bato ebele oyo bakoki kotanga motango na bango te mpo ete bazali ebele penza.
9 Give your servant therefore an understanding heart to judge your people, that I may discern between good and evil; for who is able to judge this great people of yours?”
Boye, pesa na mowumbu na Yo motema ya mayele mpo na kokamba bato na Yo mpe kososola malamu mpe mabe. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo?
10 This request pleased the Lord, that Solomon had asked this thing.
Nkolo asepelaki na likambo oyo Salomo asengaki.
11 God said to him, “Because you have asked this thing, and have not asked for yourself long life, nor have you asked for riches for yourself, nor have you asked for the life of your enemies, but have asked for yourself understanding to discern justice,
Nzambe alobaki na ye: — Lokola osengi bwanya, kasi osengi bomoi molayi te to bomengo mpo na yo moko te; lokola osengi kufa ya banguna na yo te, kasi osengi bwanya mpo na kokata makambo na bosembo,
12 behold, I have done according to your word. Behold, I have given you a wise and understanding heart, so that there has been no one like you before you, and after you none will arise like you.
nakosala nyonso oyo osili kosenga. Nakopesa yo motema ya bwanya mpe ya mayele, na lolenge oyo natikala nanu te kopesa na moto moko liboso na yo; mpe sima na yo, moto moko te akotikala kozala lokola yo.
13 I have also given you that which you have not asked, both riches and honour, so that there will not be any amongst the kings like you for all your days.
Nakopesa yo lisusu oyo osengi te: bomengo mpe lokumu. Na bongo, na bomoi na yo mobimba, mokonzi moko te akokokana na yo.
14 If you will walk in my ways, to keep my statutes and my commandments, as your father David walked, then I will lengthen your days.”
Mpe soki otamboli na banzela na Ngai, otosi malako mpe mitindo na Ngai ndenge tata na yo, Davidi, asalaki, nakopesa yo bomoi molayi.
15 Solomon awoke; and behold, it was a dream. Then he came to Jerusalem and stood before the ark of the LORD’s covenant, and offered up burnt offerings, offered peace offerings, and made a feast for all his servants.
Salomo alamukaki mpe asosolaki ete ezalaki ndoto. Azongaki na Yelusalemi, atelemaki liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani; mpe asalisaki feti monene elongo na basali na ye nyonso.
16 Then two women who were prostitutes came to the king, and stood before him.
Basi ya ndumba mibale bayaki epai ya mokonzi mpe batelemaki liboso na ye.
17 The one woman said, “Oh, my lord, I and this woman dwell in one house. I delivered a child with her in the house.
Moko na bango alobaki: — Nabondeli yo, nkolo na ngai, yoka ngai! Ngai mpe mwasi oyo, tovandaka ndako moko. Tozalaki na ye na ndako tango nabotaki mwana.
18 The third day after I delivered, this woman delivered also. We were together. There was no stranger with us in the house, just us two in the house.
Na mokolo ya misato sima na mbotama ya mwana na ngai, mwasi oyo mpe abotaki. Tozalaki kaka biso moko kati na ndako, moto mosusu azalaki te, kaka biso mibale.
19 This woman’s child died in the night, because she lay on it.
Nzokande, na butu, alalelaki mwana na ye, mpe mwana yango akufaki.
20 She arose at midnight, and took my son from beside me while your servant slept, and laid it in her bosom, and laid her dead child in my bosom.
Bongo, na kati-kati ya butu, alamukaki, alongolaki mwana na ngai pembeni na ngai, wana ngai, mwasi mowumbu na yo, nazalaki ya kolala, mpe atiaki ye na tolo na ye; mpe atiaki mwana na ye, oyo akufaki, na tolo na ngai.
21 When I rose in the morning to nurse my child, behold, he was dead; but when I had looked at him in the morning, behold, it was not my son whom I bore.”
Na tongo, tango nalamuki mpo na komelisa mwana na ngai mabele, namoni ete mwana azali ya kokufa. Kasi tango natali ye penza malamu, kaka na tongo yango, namoni ete ezali mwana na ngai te, oyo ngai nabotaki!
22 The other woman said, “No! But the living one is my son, and the dead one is your son.” The first one said, “No! But the dead one is your son, and the living one is my son.” They argued like this before the king.
Mwasi mosusu alobaki: — Te, ezali lokuta! Mwana oyo azali na bomoi azali mwana na ngai, kasi oyo akufi azali mwana na yo! Kasi mwasi oyo azwaki maloba liboso alobaki lisusu: — Te! Mwana oyo akufi azali mwana na yo, kasi oyo ya bomoi azali nde mwana na ngai! Na bongo, bakomaki koswana liboso ya mokonzi.
23 Then the king said, “One says, ‘This is my son who lives, and your son is the dead one;’ and the other says, ‘No! But your son is the dead one, and my son is the living one.’”
Mokonzi alobaki: — Moko azali koloba: « Mwana oyo azali na bomoi azali mwana na ngai, kasi mwana ya kokufa azali nde mwana na yo! » Wana mosusu azali mpe koloba: « Te! Mwana oyo akufi azali mwana na yo, kasi mwana ya bomoi azali nde mwana na ngai! »
24 The king said, “Get me a sword.” So they brought a sword before the king.
Boye, mokonzi alobaki lisusu: — Bomemela ngai mopanga! Bamemelaki mokonzi mopanga.
25 The king said, “Divide the living child in two, and give half to the one, and half to the other.”
Mokonzi apesaki mitindo: — Bokata mwana oyo azali na bomoi na biteni mibale, bopesa eteni moko na mwasi moko; mpe eteni mosusu, na mwasi mosusu.
26 Then the woman whose the living child was spoke to the king, for her heart yearned over her son, and she said, “Oh, my lord, give her the living child, and in no way kill him!” But the other said, “He shall be neither mine nor yours. Divide him.”
Mwasi oyo mwana na ye azalaki na bomoi, ayokaki pasi na motema mpo na mwana na ye mpe alobaki na mokonzi: — Nabondeli yo, nkolo na ngai! Pesa ye mwana oyo azali na bomoi, koboma mwana te! Kasi mwasi mosusu alobaki: — Kata ye! Na bongo, akozala ya ngai te, mpe akozala ya ye te!
27 Then the king answered, “Give the first woman the living child, and definitely do not kill him. She is his mother.”
Boye, mokonzi akataki likambo, alobaki: — Boboma mwana te! Bopesa mwana oyo azali na bomoi epai ya mwasi ya liboso, pamba te ye nde azali mama na ye.
28 All Israel heard of the judgement which the king had judged; and they feared the king, for they saw that the wisdom of God was in him to do justice.
Tango Isalaele mobimba bayokaki ndenge mokonzi akataki likambo oyo, babangaki mokonzi mpo ete bamonaki ete azali solo na bwanya ya Nzambe mpo na kokata makambo na bosembo.

< 1 Kings 3 >