< Jeremiah 45 >

1 The word that Jeremiah the prophet spoke to Baruch the son of Neriah, when he had written these words in a book from the mouth of Jeremiah, in the fourth year of Jehoiakim the son of Josiah king of Judah, saying,
Tango Baruki asilisaki kokoma kati na mokanda makambo oyo Jeremi atindaki ye, na mobu ya minei ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, mosakoli Jeremi alobaki na Baruki, mwana mobali ya Neriya, maloba oyo:
2 Thus saith the LORD, the God of Israel, to thee, O Baruch;
« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, azali koloba na yo Baruki:
3 Thou didst say, Woe is me now! for the LORD hath added grief to my sorrow; I fainted in my sighing, and I find no rest.
Olobaki: ‹ Mawa na ngai! Yawe abakisi pasi mpe minyoko na ngai; nalembi likolo ya kolela mpe nazali lisusu na kimia te! ›
4 Thus shalt thou say to him, The LORD saith thus; Behold, that which I have built I will break down, and that which I have planted I will pluck up, even this whole land.
Kasi Yawe alobaki na ngai: Loba na ye: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Nakokweyisa biloko nyonso oyo natongaki mpe nakopikola biloko nyonso oyo nalonaki kati na mokili oyo.
5 And seekest thou great things for thyself? seek them not: for, behold, I will bring evil upon all flesh, saith the LORD: but thy life will I give to thee for a prize in all places where thou goest.
Boni, olingi koluka makambo minene mpo na yo moko? Te! Koluka yango te! Pamba te nakomemela bato nyonso pasi, elobi Yawe, kasi nakobikisa yo na bisika nyonso oyo okokende. › »

< Jeremiah 45 >