< 2 Chronicles 10 >

1 And Rehoboam went to Shechem: for to Shechem had all Israel come to make him king.
Roboami akendeki na Sishemi epai wapi lisanga mobimba ya Isalaele esanganaki mpo na kokomisa ye mokonzi.
2 And it came to pass, when Jeroboam the son of Nebat, who was in Egypt, where he had fled from the presence of Solomon the king, heard it, that Jeroboam returned from Egypt.
Kasi sima na Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, koyoka sango yango wuta na Ejipito epai wapi akendeki kobombama mpo na kokima mokonzi Salomo, azongaki wuta na Ejipito.
3 And they sent and called him. So Jeroboam and all Israel came and spoke to Rehoboam, saying,
Boye, batindaki bato kobenga Jeroboami; bongo ye Jeroboami elongo na lisanga mobimba ya Isalaele bakendeki epai ya Roboami mpe balobaki na ye:
4 Thy father made our yoke grievous: now therefore ease thou somewhat the grievous servitude of thy father, and his heavy yoke that he put upon us, and we will serve thee.
— Tata na yo anyokolaki biso makasi. Kasi sik’oyo, yo, lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso; bongo biso, tokosalela yo.
5 And he said to them, Come again to me after three days. And the people departed.
Roboami azongisaki: — Bopesa ngai mikolo misato mpo na koyekola likambo yango, bongo bozongela ngai. Mpe bato bakendeki.
6 And king Rehoboam took counsel with the old men that had stood before Solomon his father while he yet lived, saying, What counsel give ye me to return answer to this people?
Mokonzi Roboami atunaki toli epai ya bampaka oyo basalaki elongo na Salomo, tata na ye, tango azalaki nanu na bomoi. Alobaki na bango: — Toli nini bozali kopesa ngai lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo?
7 And they spoke to him, saying, If thou wilt be kind to this people, and please them, and speak good words to them, they will be thy servants for ever.
Bazongiselaki ye: — Soki omitalisi lokola moto malamu epai ya bato oyo, soki olobeli bango na boboto mpe opesi bango eyano ya malamu, bakozala tango nyonso basali na yo.
8 But he forsook the counsel which the old men gave him, and took counsel with the young men that were brought up with him, that stood before him.
Kasi Roboami aboyaki toli oyo bampaka bapesaki ye; asengaki toli epai ya bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye mpe bazalaki kosalela ye.
9 And he said to them, What advice give ye that we may return answer to this people, who have spoken to me, saying, Ease somewhat the yoke that thy father put upon us?
Atunaki bango: — Toli nini bozali kopesa lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo balobi na ngai: « Lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso? »
10 And the young men that were brought up with him spoke to him, saying, Thus shalt thou answer the people that spoke to thee, saying, Thy father made our yoke heavy, but make thou it somewhat lighter for us; thus shalt thou say to them, My little finger shall be thicker than my father’s thighs.
Bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye bazongisaki: — Tala makambo oyo okoyebisa bato oyo balobi na yo: « Tata na yo anyokolaki biso na misala makasi; kasi yo, lembisela biso yango! » Yebisa bango: « Mosapi na ngai ya moke eleki loketo ya tata na ngai na monene.
11 For though my father put a heavy yoke upon you, I will put more to your yoke: my father chastised you with whips, but I will chastise you with scorpions.
Kobanda lelo, soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. »
12 So Jeroboam and all the people came to Rehoboam on the third day, as the king appointed, saying, Come again to me on the third day.
Sima na mikolo misato, Jeroboami elongo na bato nyonso bazongaki epai ya Roboami, ndenge mokonzi ayebisaki bango: « Bozongela ngai sima na mikolo misato. »
13 And the king answered them roughly; and king Rehoboam forsook the counsel of the old men,
Mokonzi Roboami aboyaki kosalela toli oyo bampaka bapesaki ye, ayanolaki bato na maloba mabe makasi;
14 And answered them after the advice of the young men, saying, My father made your yoke heavy, but I will add to it: my father chastised you with whips, but I will chastise you with scorpions.
alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango: — Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende.
15 So the king hearkened not to the people: for the cause was of God, that the LORD might perform his word, which he spoke by the hand of Ahijah the Shilonite to Jeroboam the son of Nebat.
Mokonzi aboyaki koyoka bato, pamba te ezalaki Nzambe nde asalaki bongo mpo na kokokisa Liloba oyo Yawe ayebisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, na nzela ya mosakoli Ayiya, moto ya Silo.
16 And when all Israel saw that the king would not hearken to them, the people answered the king, saying, What portion have we in David? and we have no inheritance in the son of Jesse: every man to your tents, O Israel: and now, David, see to thy own house. So all Israel went to their tents.
Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye: — Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo! Wana bana nyonso ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo,
17 But as for the children of Israel that dwelt in the cities of Judah, Rehoboam reigned over them.
Roboami akobaki kokonza bana ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na bingumba ya Yuda.
18 Then king Rehoboam sent Hadoram that was over the forced labour; and the children of Israel stoned him with stones, that he died. But king Rehoboam made speed to get into his chariot, to flee to Jerusalem.
Mokonzi Roboami atindaki Adorami oyo azalaki motambolisi ya misala makasi, kasi bana ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki. Nzokande, mokonzi Roboami alongaki komata na shar na ye mpo na kokima na Yelusalemi.
19 And Israel rebelled against the house of David to this day.
Ezali boye nde bana ya Isalaele batombokelaki ndako ya Davidi kino na mokolo ya lelo.

< 2 Chronicles 10 >