< Numbers 7 >

1 When Moses/I had finished setting up the Sacred Tent, he/I dedicated [MTY] it to Yahweh. He/I also dedicated the things that are inside the tent, and the altar [for burning sacrifices], and all the things that would be used at the altar.
Na mokolo oyo Moyize asilisaki kotonga Mongombo, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango elongo na bisalelo na yango. Asalaki mpe bongo mpo na etumbelo elongo na bisalelo na yango, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango.
2 Then the leaders of the [twelve] Israeli tribes, the same men who had [helped Aaron and Moses/me to] count the men [who could fight in battles],
Bongo bakambi ya Isalaele, bakonzi ya mabota, elingi koloba bakonzi ya bikolo oyo bakambaki mosala ya kotanga motango ya bato,
3 came to the tent, bringing gifts to Yahweh. They brought six sturdy/large carts and twelve oxen, one ox from each of the leaders and a cart from each of the two leaders.
bamemaki makabo na bango liboso ya Yawe: bashario motoba mpe bangombe zomi na mibale. Shario moko mpo na bakambi mibale, mpe ngombe moko mpo na mokonzi moko na moko; bamemaki yango liboso ya Mongombo.
4 Then Yahweh said to Moses/me,
Yawe alobaki na Moyize:
5 “Accept these gifts, in order that the descendants of Levi can use them for carrying the sacred items that are here at the Sacred Tent.”
« Ndima kozwa makabo oyo bayei na yango; okosala na yango mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Okopesa yango epai ya Balevi kolanda mokumba ya moko na moko. »
6 So Moses/I took the carts and oxen and gave them to the descendants of Levi.
Moyize andimaki kozwa bashar mpe bangombe mpe apesaki yango epai ya Balevi.
7 He/I gave two carts and four oxen to the descendants of Gershon for their work,
Apesaki bashar mibale mpe bangombe minei epai ya bana mibali ya Gerishoni kolanda bosenga ya mosala na bango.
8 and he/I gave four carts and eight oxen to the descendants of Merari for their work. Aaron’s son Ithamar was the supervisor of all their work.
Apesaki bashar minei mpe bangombe mwambe epai ya bana mibali ya Merari kolanda bosenga ya mosala na bango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron.
9 But he/I did not give any carts or oxen to the descendants of Kohath, because they took care of the sacred items that were to be carried on their shoulders, [not on carts].
Apesaki eloko te epai ya bana mibali ya Keati, pamba te bazalaki na mokumba ya komema na mapeka na bango biloko ya bule.
10 On the day that the altar was dedicated [MTY], the [twelve] leaders brought other gifts to be dedicated and put them in front of the altar.
Bakambi bamemaki makabo na bango mpo na libulisi ya etumbelo, na mokolo oyo basopelaki yango mafuta; bamemaki makabo yango liboso ya etumbelo.
11 Yahweh said to Moses/me, “Each of the next twelve days one leader should bring his gifts for the dedication of the altar.”
Bongo Yawe alobaki na Moyize: « Tika ete mokolo na mokolo, mokambi moko na moko amema likabo na ye mpo na libulisi ya etumbelo! »
12 These are the gifts that each of the leaders brought: —a silver dish that weighed (more than three pounds/1.5 kg.), and a silver bowl that weighed (almost two pounds/800 grams), both of which were full of good flour and mixed with [olive] oil to be offerings of grain; they both were weighed using the standard scales; —a small gold dish that weighed (four ounces/14 grams), filled with incense; —a young bull, a [full-grown] ram, and a one-year-old ram, to be sacrifices to be completely burned on the altar; —a goat to be sacrificed to [enable me to forgive the people] the sins they have committed; —and two bulls, five full-grown rams, five male goats, and five rams that were one-year-old, to be sacrifices to maintain the people’s fellowship with Yahweh. This was the order in which the leaders brought their gifts: on the first day, Nahshon, son of Amminadab from the tribe of Judah brought his gifts; on the next/second day, Nethanel, son of Zuar, from the tribe of Issachar; on the next/third day, Eliab, son of Helon, from the tribe of Zebulun; on the next/fourth day, Elizur, son of Shedeur, from the tribe of Reuben; on the next/fifth day, Shelumiel, son of Jurishhaddai, from the tribe of Simeon; on the next/sixth day, Eliasaph, son of Deuel, from the tribe of Gad; on the next/seventh day, Elishama, son of Ammihud, from the tribe of Ephraim; on the next/eighth day, Gamaliel, son of Pedahzur, from the tribe of Manasseh; on the next/ninth day, Abidan, son of Gideoni, from the tribe of Benjamin; on the next/tenth day, Ahiezer, son of Ammishaddai, from the tribe of Dan; on the next/eleventh day, Pagiel, son of Acran, from the tribe of Asher; on the next/twelfth day, Ahira, son of Enam, from the tribe of Naphtali.
Na mokolo ya liboso, Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi, moto ya libota ya Yuda, amemaki likabo na ye.
Likabo na ye ezalaki: etando ya palata ya kilo moko na ndambo, mbeki moko ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale ezalaki ya kotonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo;
mpe mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa,
ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi.
Na mokolo ya mibale, Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari, mokambi ya libota ya Isakari,
amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari.
Na mokolo ya misato, Eliabi, mwana mobali ya Eloni, mokambi ya libota ya Zabuloni,
amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Eliabi, mwana mobali ya Eloni.
Na mokolo ya minei, Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri, mokambi ya libota ya Ribeni,
amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri.
Na mokolo ya mitano, Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi, mokambi ya libota ya Simeoni,
amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani: bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Wana nde ezalaki makabo ya Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi.
Na mokolo ya motoba, Eliazafi, mwana mobali ya Deweli, mokambi ya libota ya Gadi,
amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Eliazafi, mwana mobali ya Deweli.
Na mokolo ya sambo, Elishama, mwana mobali ya Amiwudi, mokambi ya libota ya Efrayimi,
amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Elishama, mwana mobali ya Amiwudi.
Na mokolo ya mwambe, Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri, mokambi ya libota ya Manase,
amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri.
Na mokolo ya libwa, Abidani, mwana mobali ya Gideoni, mokambi ya libota ya Benjame,
amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Abidani, mwana mobali ya Gideoni.
Na mokolo ya zomi, Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, mokambi ya libota ya Dani,
amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi.
Na mokolo ya zomi na moko, Pagieli, mwana mobali ya Okirani, mokambi ya libota ya Aseri,
amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Pagieli, mwana mobali ya Okirani.
Na mokolo ya zomi na mibale, Akira, mwana mobali ya Enani, mokambi ya libota ya Nefitali,
amemaki makabo oyo: etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
Amemaki lisusu: mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu;
mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Akira, mwana mobali ya Enani.
84 When the altar was dedicated to Yahweh, those [twelve] leaders brought these gifts: —twelve silver plates and twelve silver bowls, weighing a total of about (60 pounds/27.6 kg.), each of them being weighed on the scales kept in the Sacred Tent; —twelve gold dishes filled with incense, weighing a total of about (three pounds/1.4 kg.), each being weighed on those same scales; —twelve bulls, twelve [full-grown] rams, and twelve one-year-old rams, to be sacrifices that were completely burned, along with the grain offerings; —twelve goats to be sacrificed [to forgive the people] for the sins [they have committed]; —and 24 bulls, 60 full-grown rams, 60 goats, and 60 rams that were one-year-old, to be sacrifices to maintain the people’s fellowship with Yahweh.
Yango nde ezalaki makabo ya bakambi ya Isalaele mpo na libulisi ya etumbelo, na mokolo oyo basopelaki yango mafuta. Na kosangisa, bango nyonso bapesaki: bitando ya palata zomi na mibale, bambeki ya palata zomi na mibale, bambeki ya wolo zomi na mibale.
Etando moko na moko ya palata ezalaki ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mpe mbeki moko na moko ezalaki ya bagrame nkama mwambe: palata nyonso esalaki bakilo tuku mibale na sambo na bagrame nkama mitano, kolanda ndenge bazalaki komeka bakilo na Esika ya bule.
Mbeki moko na moko ya wolo ezalaki ya bagrame nkama moko na zomi: wolo nyonso esalaki bagrame nkoto moko na nkama misato.
Mpo na bambeka ya kotumba, bango nyonso bapesaki: bangombe zomi na mibale ya mibali, bameme zomi na mibale ya mibali, bana meme zomi na mibale ya mobu moko elongo na makabo mosusu mpe bantaba zomi na mibale lokola mbeka mpo na masumu.
Na kosangisa, bango nyonso bapesaki lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani: bangombe tuku mibale na minei ya mibali, bameme tuku motoba ya mibali, bantaba tuku motoba ya mibali, bana meme tuku motoba ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya libulisi ya etumbelo sima na kosopela yango mafuta.
89 Whenever Moses/I entered the Sacred Tent to talk with Yahweh, he/I heard Yahweh’s voice speaking between the two [images of] creatures with wings that were above the lid of the sacred chest.
Tango Moyize azalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosolola na Yawe, azalaki koyoka mongongo koloba na ye wuta na mofinuku oyo ezalaki likolo ya Sanduku ya Litatoli kati na basheribe mibale, mpe azalaki kosolola na ye.

< Numbers 7 >