< Luke 10 >

1 And after these things, Jesus separated from among his disciples seventy other persons, and sent them, two and two, before his face, to every place and city whither he was to go.
Sima na yango, Nkolo aponaki bayekoli tuku sambo na mibale mpe atindaki bango, mibale-mibale liboso na Ye, na bingumba nyonso mpe na bisika nyonso oyo Ye moko asengelaki kokende.
2 And he said to them: The harvest is great, and the laborers few: pray ye, therefore, the lord of the harvest that he would send laborers into his harvest.
Alobaki na bango: — Bambuma ya kobuka etondi meke kati na elanga, kasi basali bazali moke. Boye bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye.
3 Go ye: lo, I send you forth, as sheep among wolves.
Bokende! Nazali kotinda bino lokola bampate kati na bambwa ya zamba.
4 Take to you no purses, nor wallets, nor shoes; and salute no man by the way.
Bomema mbongo te, sakosi te to basandale te, mpe bopesa moto moko te mbote na nzela.
5 And into whatever house ye enter, first say: Peace be to this house.
Na ndako nyonso oyo bokokota, boloba liboso: « Tika ete kimia ezala na ndako oyo! »
6 And if the son of peace is there, your salutation will rest upon it; but if not, your salutation will return to you.
Soki ezali na moto ya kimia kati na ndako yango, kimia na bino ekovanda likolo na ye; soki te, kimia yango ekozongela bino.
7 And remain in that house, eating and drinking of what it affords; for the laborer is worthy of his hire. And pass not from house to house.
Bovanda kuna, bolia mpe bomela nyonso oyo bakopesa bino; pamba te mosali asengeli kozwa lifuti na mosala na ye. Botambola-tambola na bandako nyonso te.
8 And into whatever city ye enter, and they receive you; eat that which set before you.
Tango bokokota na engumba songolo, soki bayambi bino, bolia bilei oyo bakopesa bino,
9 And heal them that are sick in it; and say to them: The kingdom of God hath come near you.
bobikisa babeli oyo bazali kuna mpe boloba na bango: « Bokonzi ya Nzambe ekomi pene na bino. »
10 And into whatever city ye enter, and they receive you not; go out into the street, and say:
Kasi tango bokokota na engumba songolo, soki baboyi koyamba bino, bokende na babalabala na yango mpe boloba:
11 Even the dust of your city which adhereth to our feet, we shake off against you: but this know ye, that the kingdom of God hath come near to you.
« Ezala putulu ya engumba na bino, topupoli yango wuta na makolo na biso, mpo na kokebisa bino. Nzokande, boyeba malamu ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. »
12 I say to you, that for Sodom there will be comfort in that day, rather than for that city.
Nazali koloba na bino penza ya solo: Na mokolo wana, etumbu na yango ekozala makasi koleka etumbu ya Sodome.
13 Woe to thee, Chorazin; woe to thee, Bethsaida; for if in Tyre and Sidon there had been the mighty deeds, that were in you, they would long ago have repented in sackcloth and ashes.
Mawa na yo, Korazini! Mawa na yo, Betisaida! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki kati na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele wuta kala, bavandi na yango babongola mitema, balata basaki mpe bamipakola putulu.
14 But for Tyre and Sidon there will be comfort in the day of judgment, rather than for you.
Kasi, na kosambisama, etumbu na bino ekozala makasi koleka etumbu ya Tiri mpe Sidoni.
15 And thou Capernaum, that art lifted up to heaven, shalt be brought down to hell. (Hadēs g86)
Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo? Te, okokitisama kino na mboka ya bakufi! (Hadēs g86)
16 He that heareth you, heareth me; and he that despiseth you, despiseth me; and he that despiseth me, despiseth him that sent me.
Moto oyo atosi bino atosi nde Ngai, moto oyo aboyi bino aboyi nde Ngai, nzokande moto oyo aboyi Ngai aboyi nde Motindi na Ngai.
17 And the seventy whom he sent forth, returned with great joy, and say to him: Our Lord, even the demons were subject to us, in thy name.
Tango bayekoli yango tuku sambo na mibale bazongaki, batondaki na esengo mpe balobaki: — Nkolo, ezala milimo mabe etosi biso na Kombo na Yo!
18 And he said to them: I saw Satan fall, like the lightning from heaven.
Yesu azongisaki: — Namonaki Satana kokweya longwa na likolo, lokola mikalikali.
19 Behold, I give you authority to tread on serpents, and scorpions, and on all the power of the adversary: and nothing shall harm you.
Napesi bino bokonzi ya konyata banyoka mpe bakoto, mpe ya kolonga nguya nyonso ya monguna, mpe eloko moko te ekosala bino mabe.
20 Yet rejoice not in this, that the demons are subject to you; but rejoice, that your names are written in heaven.
Nzokande, bosepela te komona ete milimo mabe ezali kotosa bino; bosepela nde ete bakombo na bino ekomami kati na Likolo.
21 In that hour Jesus exulted in the Holy Spirit, and said: I thank thee, my Father, thou Lord of heaven and earth, that thou hast hid these things from the wise and intelligent, and hast revealed them to babes: yes, my Father, for such was thy good pleasure.
Kaka na tango yango, awa Molimo Mosantu atondisaki Ye na esengo, Yesu alobaki: — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo! Pamba te obombaki makambo oyo, mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike. Iyo, Tata, pamba te yango nde osepelaki kosala.
22 And he turned himself to his disciples, and said to them: Every thing is committed to me by my Father: and no one knoweth who the Son is, but the Father; or who the Father is, but the Son, and he to whom the Son is pleased to reveal him.
Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi soki Mwana azali nani, longola kaka Tata; mpe moko te ayebi soki Tata azali nani, longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.
23 And he turned to his disciples, privately, and said: Blessed are the eyes that see, what ye see.
Bongo, abalolaki miso na Ye epai ya bayekoli na Ye mpe alobaki na bango moko kaka: — Esengo na bato oyo bazali komona makambo oyo bozali komona!
24 For I say to you, that many prophets and kings desired to see what ye see, and did not see it; and to hear what ye hear, and did not hear it.
Pamba te, nazali koloba na bino: basakoli mpe bakonzi ebele batondaki na posa ya komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te; batondaki na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.
25 And behold, a Scribe stood up to try him, and said: Teacher, what must I do, to inherit eternal life? (aiōnios g166)
Molakisi moko ya Mobeko atelemaki mpe atunaki mpo na komeka Yesu: — Moteyi, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko? (aiōnios g166)
26 And Jesus said to him: How is it written in the law? How readest thou?
Yesu alobaki na ye: — Makambo nini ekomama kati na mobeko? Otangaka yango ndenge nini?
27 He answered and said to him: Thou shalt love the Lord thy God, with all thy heart, and with all thy soul, and with all thy might, and with all thy mind; and thy neighbor, as thyself
Molakisi ya mibeko azongisaki: — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makasi na yo nyonso mpe na makanisi na yo nyonso; mpe linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.
28 Jesus said to him: Thou hast said correctly; do thus, and thou wilt live.
Yesu alobaki na ye: — Opesi eyano ya malamu; sala bongo mpe okozala na bomoi.
29 And he, being disposed to justify himself, said: And who is my neighbor?
Kasi molakisi ya Mobeko alingaki kolakisa ete azali sembo, boye atunaki na Yesu: — Nani azali moninga na ngai?
30 Jesus said to him: A certain man was going down from Jerusalem to Jericho, and robbers fell upon him, and plundered him, and smote him, and left him with little life in him, and went their way.
Yesu azongisaki: — Moto moko azalaki kokende na Jeriko, wana awutaki na Yelusalemi. Na nzela, miyibi babetaki ye, babotolaki ye bilamba na ye, babetaki ye mpe bakendeki na bango, batikaki ye pene ya kokufa.
31 And a certain priest went down by that way; and he saw him, and passed on.
Nzokande, na tango yango kaka, esalemaki ete Nganga-Nzambe moko akende mpe azwa nzela yango kaka; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye.
32 So also a Levite came, approached the spot, and saw him, and passed on.
Ndenge moko mpe Molevi moko akomaki na esika yango; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye.
33 But a Samaritan, as he travelled, came where he was, and saw him, and took pity on him,
Kasi moto moko ya Samari, wana azalaki kokende mobembo, akomaki na esika oyo moto yango azalaki; tango kaka amonaki ye, ayokelaki ye mawa,
34 and went to him, and bound up his wounds, and poured wine and oil on them, and placed him upon his ass, and brought him to the inn, and took care of him.
apusanaki pene na ye, asopelaki bapota na ye mafuta mpe vino, mpe akangaki yango. Bongo amatisaki moto yango na likolo ya mile na ye moko, amemaki ye na ndako ya bapaya, mpe akobaki kosunga ye kuna.
35 And on the morning of the next day, he took out two denarii and gave to the host, and said: Take good care of him; and if thou expendest any more, when I return, I will repay thee.
Mokolo oyo elandaki, abimisaki mbongo ya bibende mibale mpe apesaki yango na nkolo ndako ya bapaya; alobaki na ye: « Salisa moto oyo malamu; tango nakozonga, nakozongisela yo mbongo nyonso oyo okobakisa! »
36 Which therefore of these three, appears to thee, to have been neighbor to him that fell into the hands of marauders?
Yesu atunaki: — Mpo na yo, nani kati na bango misato azalaki moninga ya moto oyo akweyaki na maboko ya miyibi?
37 And he said: He that had pity on him. Jesus said to him: Go, and do thou also the like.
Molakisi ya mibeko azongisaki: — Ezali moto oyo ayokelaki ye mawa. Yesu alobaki na ye: — Kende mpe sala bongo!
38 And it occurred, as they travelled by the way, that he entered a certain village, and a woman whose name was Martha, received him at her house.
Wana Yesu mpe bayekoli na Ye bazalaki kokende, Yesu akotaki na mboka moko, mpe mwasi moko oyo kombo na ye ezali Marte ayambaki Ye kati na ndako na ye.
39 And she had a sister whose name, was Mary: and she came and seated herself at the feet of our Lord, and listened to his discourses.
Mari, ndeko mwasi ya Marte, ayaki kovanda na makolo ya Nkolo, mpe azalaki koyoka makambo oyo Nkolo azalaki koloba.
40 But Martha was occupied with much service; and she came, and said to him: My Lord, hast thou no concern, that my sister hath left me to serve alone? Bid her assist me.
Kasi, na tango yango, Marte amipesaki na misala nyonso ya ndako; ayaki na lombangu mpe alobaki: — Ah Nkolo, ozali komona te ete ndeko na ngai atiki ngai kosala ngai moko misala? Loba na ye ete asunga ngai!
41 Jesus answered, and said to her: Martha, Martha, thou art anxious and troubled about many things:
Nkolo azongiselaki ye: — Marte, Marte, ozali komitungisa mpe kominyokola mpo na makambo ebele,
42 yet but one thing is necessary; and Mary hath chosen for herself the good part, which shall not be taken from her.
kasi likambo moko kaka ezali na tina. Mari aponi oyo eleki malamu, mpe moto ata moko te akobotola ye yango.

< Luke 10 >