< Psalms 25 >

1 A psalm of David. To you, O Lord, I lift up my heart: all the day I wait for you.
Nzembo ya Davidi. Yawe, Nzambe na ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo.
2 In you I trust, put me not to shame; let not my foes exult over me.
Nzambe na ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo; sala ete nayoka soni te, mpe banguna na ngai basepela te na tina na ngai.
3 None will be shamed who wait for you, but shame will fall upon wanton traitors.
Bato nyonso oyo batalelaka Yo bakotikala koyokisama soni ata moke te; kaka ba-oyo bapesaka Yo mokongo nde bakoyokisama soni.
4 Make me, O Lord, to know your ways: teach me your paths.
Yawe, lakisa ngai nzela, teya ngai nzela oyo olingi ete nalanda.
5 In your faithfulness guide me and teach me, for you are my God and my saviour.
Kamba ngai kati na bosolo na Yo mpe pesa ngai mayele, pamba te ozali Nzambe, Mobikisi na ngai; mpe ngai natiaka elikya na ngai kati na Yo tango nyonso.
6 Remember your pity, O Lord, and your kindness, for they have been ever of old.
Yawe, kanisa mawa mpe bolingo na Yo, pamba te ezali mpo na libela na libela.
7 Do not remember the sins of my youth; remember me in kindness, because of your goodness, Lord.
Yawe, kokanisa te masumu mpe botomboki ya bolenge na ngai; kanisa ngai kaka kolanda boboto na Yo, pamba te ozali malamu.
8 Good is the Lord and upright, so he teaches sinners the way.
Solo, Yawe azali malamu mpe alima; atalisaka banzela na Ye epai ya bato ya masumu.
9 The humble he guides in the right, he teaches the humble his way.
Atambolisaka bato oyo bamikitisa, kati na banzela ya sembo, mpe ateyaka bango banzela na Ye.
10 All his ways are loving and loyal to those who observe his charges and covenant.
Banzela nyonso ya Yawe etalisaka bolingo mpe boyengebene na Ye mpo na bato oyo babatelaka boyokani mpe malako na Ye.
11 Be true to your name Lord, forgive my many sins.
Yawe, mpo na bolingo ya Kombo na Yo, limbisa masumu na ngai, atako ezali minene.
12 Who then is the person who fears the Lord? He will teach them the way to choose.
Banani bazali bato oyo batosaka Yawe? Alakisaka bango nzela ya kopona.
13 They will live in prosperity, their children will inherit the land.
Boye, bakolekisa mikolo ya bomoi na bango kati na bofuluki, mpe mokili ekozala libula ya bana na bango.
14 The Lord gives guidance to those who fear him, and with his covenant he makes them acquainted.
Yawe ayebisaka mabongisi na Ye epai ya bato oyo batosaka Ye, alakisaka bango mabombami ya boyokani na Ye.
15 My eyes are ever toward the Lord, for out of the net he brings my foot.
Natalelaka Yawe tango nyonso, pamba te kaka Ye nde akolongola makolo na ngai na motambo.
16 Turn to me with your favour, for I am lonely and crushed
Yawe, balola miso na Yo epai na ngai mpe salela ngai ngolu, pamba te nazali kaka ngai moko, mpe nazali monyokolami.
17 In my heart are strain and storm; bring me out of my distresses.
Lembisa pasi ya motema na ngai mpe kangola ngai na mitungisi na ngai.
18 Look on my misery and trouble, and pardon all my sins,
Tala pasi mpe kolela na ngai, mpe limbisa masumu na ngai nyonso.
19 look on my foes oh, so many! And their cruel hatred towards me.
Tala ndenge nini banguna na ngai bazali ebele, mpe ndenge nini bazali koyina ngai makasi!
20 Deliver me, keep me, and shame not one who takes refuge in you.
Batela bomoi na ngai mpe kangola ngai; sala ete nayoka soni te, pamba te nabombamaka kati na Yo.
21 May integrity and innocence preserve me, for I wait for you, O Lord.
Lokola mpe natielaka Yo motema, tika ete bozangi pamela mpe bosembo ebatela ngai.
22 Redeem Israel, O God, from all its distresses.
Nzambe, kangola Isalaele, na pasi na yango nyonso!

< Psalms 25 >