< Chronicles I 13 >

1 And David took counsel with the captains of thousands and captains of hundreds, [even with] every commander.
Davidi asangisaki bakonzi ya basoda, bakonzi ya bankoto mpe bakonzi ya bankama elongo na bato mosusu ya lokumu.
2 And David said to the whole congregation of Israel, If it [seem] good to you, and it should be prospered by the Lord our God, let us send to our brethren that are left in all the land of Israel, and let the priests the Levites who are with them in the cities of their possession [come], and let them be gathered to us.
Davidi alobaki na lisanga mobimba ya Isalaele: « Soki bomoni yango malamu mpe soki yango ezali mokano na Yawe, Nzambe na biso, tika ete totinda sango epai ya bandeko na biso oyo batikali na bituka nyonso ya Isalaele mpe epai ya Banganga-Nzambe elongo na Balevi, kati na bingumba oyo bango bazali kovanda mpo ete baya kosangana na biso.
3 And let us bring over to us the ark of our God; for men have not enquired [at] it since the days of Saul.
Tozongisa Sanduku ya Nzambe na biso epai na biso, pamba te tolandelaki yango te tango Saulo azalaki mokonzi. »
4 And all the congregation said that they would do thus; for the saying was right in the eyes of all the people.
Lisanga mobimba endimaki ete basala bongo, pamba te likambo yango emonanaki malamu na miso ya bato nyonso.
5 So David assembled all Israel, from the borders of Egypt even to the entering in of Hemath, to bring in the ark of God from the city of Jarim.
Davidi asangisaki bana nyonso ya Isalaele longwa na moluka ya Ejipito kino na Lebo-Amati, mpo na kozongisa Sanduku ya Nzambe wuta na Kiriati-Yearimi.
6 And David brought it up: and all Israel went up to the city of David, which belonged to Juda, to bring up thence the ark of the Lord God who sits between the cherubim, whose name is called [on it].
Davidi elongo na basoda nyonso ya Isalaele bakendeki na Baala, na Kiriati-Yearimi oyo ezali kati na Yuda, mpo na kolongola kuna Sanduku ya Nzambe, oyo, liboso na yango, bazalaki kobelela Kombo ya Yawe oyo avandaka kati na basheribe.
7 And they set the ark of God on a new waggon [brought] out of the house of Aminadab: and Oza and his brethren drove the waggon.
Batiaki Sanduku ya Nzambe na likolo ya shario ya sika mpe bamemaki yango wuta na ndako ya Abinadabi. Uza mpe Ayiyo nde bazalaki kotambolisa shario yango.
8 And David and all Israel [were] playing before the Lord with all their might, and [that] together with singers, and with harps, and with lutes, with timbrels, and with cymbals, and with trumpets.
Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bazalaki kosepela makasi na liboso ya Nzambe, na koyemba mpe na kobeta mandanda, banzenze, bambunda ya mike-mike, manzanza mpe bakelelo.
9 And they came as far as the threshing floor: and Oza put forth his hand to hold the ark, because the bullock moved it from [its place].
Tango bakomaki na etando ya Kidoni, Uza asembolaki loboko na ye mpo na kosimba Sanduku ya Nzambe, pamba te bangombe eselumukaki mpe elingaki kokweyisa Sanduku ya Nzambe.
10 And the Lord was very angry with Oza, and struck him there, because of his stretching forth his hand upon the ark: and he died there before God.
Yawe asilikelaki Uza makasi mpe abetaki ye mpo ete asembolaki loboko na ye mpe asimbaki Sanduku ya Nzambe. Boye, Uza akufaki kaka wana liboso ya Nzambe.
11 And David was dispirited, because the Lord [had] made a breach on Oza: and he called that place the Breach of Oza until this day.
Davidi asilikaki makasi mpo ete Yawe afungolaki lidusu na kobeta Uza; yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango « Peretsi-Uza. »
12 And David feared God that day, saying, How shall I bring the ark of God in to myself?
Na mokolo wana, Davidi abangaki Nzambe mpe amitunaki: « Ndenge nini namema Sanduku ya Nzambe epai na ngai? »
13 So David brought not the ark home to himself into the city of David, but he turned it aside into the house of Abeddara the Gethite.
Boye, Davidi amemaki te Sanduku ya Nzambe epai na ye, kati na engumba ya Davidi; kasi atiaki yango na ndako ya Obedi-Edomi, moto ya Gati.
14 And the ark of God abode in the house of Abeddara three months: and God blessed Abeddara and all that he had.
Sanduku ya Nzambe evandaki sanza misato kati na ndako ya Obedi-Edomi, mpe Yawe apambolaki libota ya Obedi-Edomi mpe biloko na ye nyonso.

< Chronicles I 13 >