< John 1 >

1 In the beginning was the Word, and the Word was with God, and the Word was God.
Na ebandeli, Ye oyo azali Liloba azalaka; azalaka elongo na Nzambe, mpe azali Nzambe.
2 The same was in the beginning with God.
Wuta na ebandeli, azalaka elongo na Nzambe.
3 All things were made by him; and without him was not any thing made that was made.
Nzambe akelaki biloko nyonso na nzela na Ye; ezali na eloko moko te oyo ekelama soki na nzela na Ye te.
4 In him was life; and the life was the light of men.
Bomoi ewuta epai na Ye, mpe bomoi yango ezalaki pole mpo na bato.
5 And the light shineth in darkness; and the darkness comprehended it not.
Pole engengaka kati na molili, kasi molili eyambaki yango te.
6 There was a man sent from God, whose name was John.
Nzambe atindaki moto moko, kombo na ye ezalaki « Yoane. »
7 The same came for a witness, to bear witness of the Light, that all men through him might believe.
Ayaki lokola motatoli, mpo na kotatola na tina na pole, mpo ete bato nyonso bandima na nzela na ye.
8 He was not that Light, but was sent to bear witness of that Light.
Ye moko Yoane azalaki pole te, kasi ayaki nde mpo na kozala motatoli na tina na pole.
9 That was the true Light, which lighteth every man that cometh into the world.
Pole ya solo eyaki na mokili, mpe engengisaka bato nyonso.
10 He was in the world, and the world was made by him, and the world knew him not.
Ye oyo azali Liloba azalaki kati na mokili, pamba te Ye nde akelaki yango, kasi mokili endimaki Ye te.
11 He came unto his own, and his own received him not.
Ayaki epai ya ekolo na Ye, kasi bato ya ekolo na Ye moko bayambaki Ye te;
12 But as many as accepted him, to them gave he power to become the sons of God, even to them that believe on his name:
nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe.
13 Which were born, not of blood, nor of the will of the flesh, nor of the will of man, but of God.
Bakomi bana na Nzambe na nzela ya mbotama ya bomoto te, na posa ya bomoto te to mpe na mokano ya moto te, kasi na mokano ya Nzambe.
14 And the Word was made flesh, and dwelt among us, ( and we beheld his glory, the glory as of the only begotten of the Father, ) full of grace and truth.
Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.
15 John bare witness of him, and cried, saying, This was he of whom I spake, He that cometh after me is preferred before me: for he was before me.
Yoane azalaki kotatola na tina na Ye, na mongongo makasi: « Botala Ye oyo nalobaki na tina na Ye: ‹ Ye oyo azali koya sima na ngai aleki ngai na lokumu, pamba te azalaki liboso ete ngai nazala. › »
16 And of his fulness have all we received, and grace for grace.
Lokola atonda na bolingo mpo na biso, apesaki biso ngolu likolo ya ngolu;
17 For the law was given by Moses, but grace and truth came by Jesus Christ.
pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.
18 No man hath seen God at any time; the only begotten Son, which is in the bosom of the Father, he hath declared him.
Moto moko te amona Nzambe, kasi ezali kaka Mwana se moko oyo azali Nzambe mpe azali moko na Tata nde atalisaki biso Ye.
19 And this is the record of John, when the Jews sent priests and Levites from Jerusalem to ask him, Who art thou?
Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye: — Yo ozali nani?
20 And he confessed, and denied not; but confessed, I am not the Christ.
Abetaki monoko te, kasi alobaki na bango solo na bonsomi nyonso: — Ngai, nazali Klisto te.
21 And they asked him, What then? Art thou Elijah? And he saith, I am not. Art thou that prophet? And he answered, No.
Batunaki ye lisusu: — Bongo ozali nani? Ozali Eliya? Azongisaki: — Nazali Eliya te. Batunaki ye lisusu: — Ozali mosakoli? Azongisaki: — Te!
22 Then said they unto him, Who art thou? that we may give an answer to them that sent us. What sayest thou of thyself?
Bakobaki kotuna ye: — Bongo ozali penza nani? Ozali koloba nini na tina na yo moko? Yebisa biso yango, pamba te tosengeli kopesa eyano epai ya bato oyo batindi biso.
23 He said, I am the voice of one crying in the wilderness, Make straight the way of the Lord, as said the prophet Isaiah.
Yoane azongiselaki bango kolanda ndenge mosakoli Ezayi alobaki: — Ngai, nazali mongongo ya moto oyo azali kobelela kati na esobe: « Bobongisa nzela mpo na Nkolo! »
24 And they which were sent were of the Pharisees.
Nzokande batindami yango bazalaki Bafarizeo.
25 And they asked him, and said unto him, Why baptizest thou then, if thou be not that Christ, nor Elijah, neither that prophet?
Batunaki ye lisusu: — Soki ozali Masiya te, Eliya te to mpe mosakoli te, bongo mpo na nini ozali kobatisa?
26 John answered them, saying, I baptize with water: but there standeth one among you, whom ye know not;
Yoane azongiselaki bango: — Ngai, nazali kobatisa na mayi; kasi kati na bino, ezali na Moto moko oyo bino boyebi te;
27 He it is, who coming after me is preferred before me, whose shoe’s latchet I am not worthy to unloose.
azali koya sima na ngai, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.
28 These things were done in Bethabara beyond Jordan, where John was baptizing.
Makambo oyo nyonso esalemaki na Betani, na ngambo mosusu ya Yordani, epai wapi Yoane azalaki kobatisa.
29 The next day John seeth Jesus coming unto him, and saith, Behold the Lamb of God, which taketh away the sin of the world.
Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki: — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.
30 This is he of whom I said, After me cometh a man which is preferred before me: for he was before me.
Ezali na tina na Ye nde nalobaki: « Ezali na moko oyo azali koya sima na ngai, aleki ngai na lokumu, pamba te azalaki liboso ete ngai nazala. »
31 And I knew him not: but that he should be made manifest to Israel, therefore am I come baptizing with water.
Ngai moko mpe nayebaki te soki esengelaki kozala nani; kasi tina oyo ngai nayaki kobatisa bato na mayi, ezalaki nde mpo ete natalisa Ye epai ya bato ya Isalaele.
32 And John bare record, saying, I saw the Spirit descending from heaven like a dove, and it abode upon him.
Bongo Yoane apesaki litatoli oyo: — Namonaki Molimo kokita wuta na likolo lokola ebenga mpe kovanda likolo na Ye.
33 And I knew him not: but he that sent me to baptize with water, the same said unto me, Upon whom thou shalt see the Spirit descending, and remaining on him, the same is he which baptizeth with the Holy Ghost.
Ngai moko mpe nayebaki Ye te; kasi Ye oyo atindaki ngai kobatisa na mayi alobaki na ngai: « Moto oyo okomona Molimo kokita mpe kowumela likolo na Ye, Ye nde akobatisa kati na Molimo Mosantu. »
34 And I saw, and bare record that this is the Son of God.
Mpe lokola ezali yango nde likambo oyo ngai namonaki, yango wana nazali kotatola: Moto oyo azali Mwana na Nzambe.
35 Again the next day after John stood, and two of his disciples;
Mokolo oyo elandaki, wana Yoane azalaki lisusu na esika yango elongo na bayekoli na ye mibale,
36 And looking upon Jesus as he walked, he saith, Behold the Lamb of God!
amonaki Yesu koleka mpe alobaki: « Botala Mpate ya Nzambe! »
37 And the two disciples heard him speak, and they followed Jesus.
Lokola bayekoli nyonso mibale bayokaki ndenge Yoane alobaki, balandaki Yesu.
38 Then Jesus turned, and saw them following, and saith unto them, What seek ye? They said unto him, Rabbi, ( which is to say, being interpreted, Master, ) where dwellest thou?
Bongo tango Yesu abalukaki mpo na kotala na sima, amonaki bango mibale bazali kolanda Ye. Atunaki bango: — Bolingi nini? Bazongisaki: — Rabi, ovandaka wapi?
39 He saith unto them, Come and see. They came and saw where he dwelt, and abode with him that day: for it was about the tenth hour.
Yesu azongiselaki bango: — Boya mpe bokomona. Balandaki Yesu, bamonaki esika oyo azalaki kovanda mpe bavandaki elongo na Ye na mokolo wana. Ezalaki na ngonga ya minei sima na midi.
40 One of the two which heard John speak, and followed him, was Andrew, Simon Peter’s brother.
Andre, ndeko ya Simona Petelo, azalaki moko kati na bato wana mibale oyo bayokaki maloba ya Yoane mpe balandaki Yesu.
41 He first findeth his own brother Simon, and saith unto him, We have found the Messiah, which is, being interpreted, the Christ.
Akendeki kokutana na Simona, ndeko na ye, mpe alobaki na ye: « Tomoni Masiya! »
42 And he brought him to Jesus. And when Jesus beheld him, he said, Thou art Simon the son of Jonah: thou shalt be called Cephas, which is by interpretation, A stone.
Bongo amemaki Simona epai ya Yesu. Yesu atalaki Simona mpe alobaki: « Ozali Simona, mwana mobali ya Yoane; kasi bakobanda kobenga yo Sefasi. »
43 The day following Jesus would go forth into Galilee, and findeth Philip, and saith unto him, Follow me.
Mokolo oyo elandaki, Yesu azwaki mokano ya kokende na Galile. Na nzela, akutanaki na Filipo mpe alobaki na ye: « Landa Ngai. »
44 Now Philip was of Bethsaida, the city of Andrew and Peter.
Filipo, Andre mpe Petelo bazalaki bato ya engumba Betisaida.
45 Philip findeth Nathanael, and saith unto him, We have found him, of whom Moses in the law, and the prophets, did write, Jesus of Nazareth, the son of Joseph.
Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye: — Tomoni Yesu ya Nazareti, mwana mobali ya Jozefi, oyo Moyize alobela kati na buku ya Mobeko, mpe oyo basakoli balobela.
46 And Nathanael said unto him, Can there any good thing come out of Nazareth? Philip saith unto him, Come and see.
Natanaele atunaki ye: — Boni, eloko ya malamu ekoki mpe kobima na Nazareti? Filipo azongiselaki ye: — Yaka mpe okomona yo moko.
47 Jesus saw Nathanael coming to him, and saith of him, Behold an Israelite indeed, in whom is no guile!
Tango Yesu amonaki Natanaele koya epai na Ye, alobaki na tina na ye: — Tala moto ya Isalaele ya solo-solo oyo, kati na ye, lokuta ezali te!
48 Nathanael saith unto him, Whence knowest thou me? Jesus answered and said unto him, Before that Philip called thee, when thou wast under the fig tree, I saw thee.
Natanaele atunaki Ye: — Oyebi ngai ndenge nini? Yesu azongiselaki ye: — Liboso ete Filipo abenga yo, wana ozalaki nanu na se ya nzete ya figi, namonaki yo.
49 Nathanael answered and saith unto him, Rabbi, thou art the Son of God; thou art the King of Israel.
Natanaele alobaki: — Moteyi, ozali solo Mwana na Nzambe; ozali penza Mokonzi ya Isalaele.
50 Jesus answered and said unto him, Because I said unto thee, I saw thee under the fig tree, believest thou? thou shalt see greater things than these.
Yesu alobaki na ye: — Ondimi kaka mpo ete nalobi na yo: Namonaki yo na se ya nzete ya figi? Okomona lisusu makambo minene koleka oyo.
51 And he saith unto him, Verily, verily, I say unto you, Hereafter ye shall see heaven open, and the angels of God ascending and descending upon the Son of man.
Bongo alobaki lisusu: « Nazali koloba na bino penza ya solo: bokomona Likolo kofungwama, mpe ba-anjelu ya Nzambe komata mpe kokita mpo na Mwana na Moto. »

< John 1 >