< Psalms 35 >

1 A Psalm of David. Strive, O LORD, with them that strive with me; fight against them that fight against me.
Nzembo ya Davidi. Yawe, kota likambo na ngai liboso ya bayini na ngai; bundisa bato oyo bazali kobundisa ngai.
2 Take hold of shield and buckler, and rise up to my help.
Kamata nguba ya moke mpe ya monene, mpe telema mpo na kosunga ngai.
3 Draw out also the spear, and the battle-axe, against them that pursue me; say unto my soul: 'I am Thy salvation.'
Tombola likonga ya monene mpe ya moke mpo na kobundisa bato oyo bazali kolanda ngai. Loba na ngai: « Nazali lobiko na Yo. »
4 Let them be ashamed and brought to confusion that seek after my soul; let them be turned back and be abashed that devise my hurt.
Tika ete bato oyo bazali komeka bomoi na ngai basambwa mpe bayoka soni; tika ete bato oyo bazali kokana kosala ngai mabe bazonga sima mpe bakoma mawa-mawa!
5 Let them be as chaff before the wind, the angel of the LORD thrusting them.
Tika ete bakoma lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ezali kopumbwisa, tango anjelu ya Yawe akotindika bango;
6 Let their way be dark and slippery, the angel of the LORD pursuing them.
tika ete nzela na bango ekoma molili mpe moselu tango anjelu ya Yawe akobengana bango.
7 For without cause have they hid for me the pit, even their net, without cause have they digged for my soul.
Mpo ete, na kozanga tina, mpo na kokanga ngai, batielaki ngai mitambo mpe batimolaki mabulu,
8 Let destruction come upon him unawares; and let his net that he hath hid catch himself; with destruction let him fall therein.
tika ete libebi ekweyela bango na mbalakata, bakangama bango moko na mitambo oyo batielaki ngai mpe bakweya kati na mabulu yango!
9 And my soul shall be joyful in the LORD; it shall rejoice in His salvation.
Nakotonda na esengo kati na Yawe mpe nakosepela kati na lobiko na Ye.
10 All my bones shall say: 'LORD, who is like unto Thee, who deliverest the poor from him that is too strong for him, yea, the poor and the needy from him that spoileth him?'
Mikuwa na ngai nyonso ekoloba: « Oh Yawe, nani akoki kokangola, lokola Yo, mobola wuta na maboko ya moto oyo aleki ye na makasi, mobola mpe mokeleli wuta na maboko ya banyokoli na bango? »
11 Unrighteous witnesses rise up; they ask me of things that I know not.
Batatoli oyo bamipesa na kanza batelemi, bazali kopesa ngai mituna na tina na makambo oyo nayebi te.
12 They repay me evil for good; bereavement is come to my soul.
Bazali kozongisela ngai mabe mpo na bolamu oyo nasalaki, mpe kosundola ngai lokola monyokolami.
13 But as for me, when they were sick, my clothing was sackcloth, I afflicted my soul with fasting; and my prayer, may it return into mine own bosom.
Nzokande tango bango babelaki, ngai nalataki saki, namikitisaki na kokila bilei, nazalaki kobondela mpo na bango.
14 I went about as though it had been my friend or my brother; I bowed down mournful, as one that mourneth for his mother.
Nazalaki kotambola na mawa lokola mpo na moninga to mpo na ndeko; nazalaki kokitisa moto na se mpo na mawa lokola moto oyo azali kolela mama na ye.
15 But when I halt they rejoice, and gather themselves together; the abjects gather themselves together against me, and those whom I know not; they tear me, and cease not;
Kasi awa ngai nakomi na pasi, bango bazali kosepela mpe kosangana; wana ngai nayebi te, bango bazali kosangana mpo na kotonga ngai, bazali kolemba te kofinga ngai.
16 With the profanest mockeries of backbiting they gnash at me with their teeth.
Lokola bapagano, bazali koseka ngai, bazali kolia minu na tina na ngai.
17 Lord, how long wilt Thou look on? Rescue my soul from their destructions, mine only one from the lions.
Yawe, kino tango nini okotala kaka boye? Kangola ngai wuta na misala na bango ya mabe, bomoi na ngai wuta na manzaka ya bankosi oyo.
18 I will give Thee thanks in the great congregation; I will praise Thee among a numerous people.
Nakokumisa Yo kati na mayangani monene, nakosanzola Yo kati na ebele ya bato.
19 Let not them that are wrongfully mine enemies rejoice over me; neither let them wink with the eye that hate me without a cause.
Tika ete banguna na ngai basepela te na tina na ngai; tika ete bayini na ngai na kozanga tina bakanga miso te.
20 For they speak not peace; but they devise deceitful matters against them that are quiet in the land.
Pamba te balobaka te maloba ya kimia, kasi babongisaka lokuta mpo na kokosela bato ya kimia makambo kati na mboka.
21 Yea, they open their mouth wide against me; they say: 'Aha, aha, our eye hath seen it.'
Balobaka na mongongo makasi: « Eh! Eh! Tomonaki ye! »
22 Thou hast seen, O LORD; keep not silence; O Lord, be not far from me.
Yawe, omoni nyonso wana; kovanda nye te! Nkolo, kozala mosika na ngai te!
23 Rouse Thee, and awake to my judgment, even unto my cause, my God and my Lord.
Lamuka mpe telema mpo na kolongisa ngai! Nzambe na ngai mpe Nkolo na ngai, kota likambo na ngai.
24 Judge me, O LORD my God, according to Thy righteousness; and let them not rejoice over me.
Yawe, Nzambe na ngai, longisa ngai na bosembo na Yo; kotika bango te kosepela na tina na ngai.
25 Let them not say in their heart: 'Aha, we have our desire'; let them not say: 'We have swallowed him up.'
Tika ete bamilobela te: « Ah! Tala makambo oyo tozalaki koluka! » Tika ete baloba te: « Tolie ye. »
26 Let them be ashamed and abashed together that rejoice at my hurt; let them be clothed with shame and confusion that magnify themselves against me.
Tika ete bato nyonso oyo basepelaka na pasi na ngai, bango nyonso lisanga, bayoka soni mpe basambwa! Tika ete bato oyo batombokelaka ngai balata soni mpe bazala kati na yikiyiki!
27 Let them shout for joy, and be glad, that delight in my righteousness; yea, let them say continually: 'Magnified be the LORD, who delighteth in the peace of His servant.'
Tika ete bato oyo basepelaka na bosembo na ngai baganga na esengo mpe basepela; tika ete balobaka tango nyonso: « Tika ete Yawe anetolama, Ye oyo asepelaka na kimia ya mowumbu na Ye! »
28 And my tongue shall speak of Thy righteousness, and of Thy praise all the day.
Nakosakola bosembo na Yo, nakokumisa Yo mikolo nyonso.

< Psalms 35 >