< Judges 6 >

1 And the children of Israel did that which was evil in the sight of the LORD; and the LORD delivered them into the hand of Midian seven years.
Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe liboso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu sambo na maboko ya bato ya Madiani.
2 And the hand of Midian prevailed against Israel; and because of Midian the children of Israel made them the dens which are in the mountains, and the caves, and the strongholds.
Lokola loboko ya bato ya Madiani ezalaki na nguya makasi likolo ya Isalaele, bana ya Isalaele babongisaki mabulu ya kokimela mpe bibombelo kati na mabanga, kuna na likolo ya bangomba.
3 And so it was, when Israel had sown, that the Midianites came up, and the Amalekites, and the children of the east; they came up against them;
Tango nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kolona bilanga na bango, bato ya Madiani, bato ya Amaleki mpe bato ya bikolo mosusu ya ngambo ya este, bazalaki koya kobundisa Isalaele.
4 and they encamped against them, and destroyed the produce of the earth, till thou come unto Gaza, and left no sustenance in Israel, neither sheep, nor ox, nor ass.
Bazalaki kotonga milako na bango pene ya bana ya Isalaele, mpe bazalaki kobebisa bilanga na bango, kino pene ya Gaza. Bazalaki kotikela bana ya Isalaele ata eloko moko te ya kolia, ata meme to ntaba te, ata ngombe te, ata mpe ane te.
5 For they came up with their cattle and their tents, and they came in as locusts for multitude; both they and their camels were without number; and they came into the land to destroy it.
Bazalaki komata ebele lokola mabanki elongo na bibwele na bango mpe bandako na bango ya kapo. Ezalaki pasi mpo na kotanga motango ya bato mpe ya bashamo na bango; bazalaki kokota na mokili ya Isalaele mpo na kobebisa yango nyonso.
6 And Israel was brought very low because of Midian; and the children of Israel cried unto the LORD.
Bato ya Madiani bakomisaki bana ya Isalaele babola makasi. Boye, bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo ete asunga bango.
7 And it came to pass, when the children of Israel cried unto the LORD because of Midian,
Tango bana ya Isalaele babelelaki Yawe mpo ete akangola bango wuta na maboko ya bato ya Madiani,
8 that the LORD sent a prophet unto the children of Israel; and he said unto them: 'Thus saith the LORD, the God of Israel: I brought you up from Egypt, and brought you forth out of the house of bondage;
Yawe atindelaki bango mosakoli oyo alobaki na bango: « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Ngai nde nabimisaki bino na Ejipito, ndako ya bowumbu.
9 and I delivered you out of the hand of the Egyptians, and out of the hand of all that oppressed you, and drove them out from before you, and gave you their land.
Nakangolaki bino wuta na maboko ya bato ya Ejipito mpe na maboko ya bato nyonso oyo banyokolaki bino; nabenganaki bango liboso na bino mpe napesaki bino mokili na bango.
10 And I said unto you: I am the LORD your God; ye shall not fear the gods of the Amorites, in whose land ye dwell; but ye have not hearkened unto My voice.'
Nalobaki na bino: Nazali Yawe, Nzambe na bino; bogumbamela nzambe ya bato ya Amori te, kati na mokili oyo bozali kovanda. Kasi boyokelaki Ngai te. › »
11 And the angel of the LORD came, and sat under the terebinth which was in Ophrah, that belonged unto Joash the Abiezrite; and his son Gideon was beating out wheat in the winepress, to hide it from the Midianites.
Anjelu ya Yawe ayaki mpe avandaki na se ya terebente oyo ezalaki na Ofira, kati na mabele ya Joasi, moto ya libota ya Abiezeri. Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azalaki kosangisa bambuma ya ble esika moko, na esika oyo basalaka masanga ya vino, mpo na kobomba yango liboso ya bato ya Madiani.
12 And the angel of the LORD appeared unto him, and said unto him: 'The LORD is with thee, thou mighty man of valour.'
Anjelu ya Yawe abimelaki Jedeon mpe alobaki na ye: — Yawe azali elongo na yo, elombe ya bitumba.
13 And Gideon said unto him: 'Oh, my lord, if the LORD be with us, why then is all this befallen us? and where are all His wondrous works which our fathers told us of, saying: Did not the LORD bring us up from Egypt? but now the LORD hath cast us off, and delivered us into the hand of Midian.'
Jedeon azongisaki: — Ah nkolo, soki Yawe azali elongo na biso, mpo na nini makambo nyonso oyo ezali kokomela biso? Wapi makambo nyonso ya kokamwa oyo bakoko na biso bazalaki koyebisa biso tango bazalaki koloba ete Yawe abimisaki biso na Ejipito? Sik’oyo, Yawe atiki biso mpe asundoli biso na maboko ya bato ya Madiani.
14 And the LORD turned towards him, and said: 'Go in this thy might, and save Israel from the hand of Midian; have not I sent thee?'
Yawe abalukaki epai na ye mpe alobaki: — Kende, salela makasi oyo ozali na yango mpe bikisa bana ya Isalaele na maboko ya bato ya Madiani. Boni, ezali Ngai te nde natindi yo?
15 And he said unto him: 'Oh, my lord, wherewith shall I save Israel? behold, my family is the poorest in Manasseh, and I am the least in my father's house.'
Jedeon azongisaki: — Ah nkolo na ngai, ndenge nini ngai nakoki kobikisa bana ya Isalaele? Kati na Manase, libota na ngai nde ezangi makasi koleka, mpe ngai nazali mwana ya suka kati na ndako ya tata na ngai.
16 And the LORD said unto him: 'Surely I will be with thee, and thou shalt smite the Midianites as one man.'
Yawe alobaki na ye: — Nakozala elongo na yo, mpe okoboma bato ya Madiani lokola moto moko.
17 And he said unto him: 'If now I have found favour in thy sight, then show me a sign that it is thou that talkest with me.
Jedeon alobaki: — Solo, soki nazwi ngolu na miso na Yo, pesa ngai elembo oyo ekolakisa solo ete Yo Yawe nde ozali kosolola na ngai.
18 Depart not hence, I pray thee, until I come unto thee, and bring forth my present, and lay it before thee.' And he said: 'I will tarry until thou come back.'
Nabondeli Yo, kolongwa na esika oyo te kino nakozonga awa na likabo na ngai mpo ete nabonza yango liboso na Yo. Yawe alobaki: — Nakozela kino okozonga.
19 And Gideon went in, and made ready a kid, and unleavened cakes of an ephah of meal; the flesh he put in a basket, and he put the broth in a pot, and brought it out unto him under the terebinth, and presented it.
Jedeon azongaki epai na ye, abongisaki mwana ntaba, azwaki kilo tuku misato ya farine, asalaki na yango mapa oyo ezanga levire, atiaki mapa yango na kitunga, mpe atiaki elubu na nzungu. Amemaki yango mpe apesaki nyonso epai na Anjelu na Nzambe, oyo azalaki na se ya terebente.
20 And the angel of God said unto him: 'Take the flesh and the unleavened cakes, and lay them upon this rock, and pour out the broth.' And he did so.
Anjelu na Nzambe alobaki na ye: — Kamata nyama mpe mapa oyo ezanga levire, tia yango na likolo ya libanga oyo mpe sopela yango elubu. Jedeon asalaki yango.
21 Then the angel of the LORD put forth the end of the staff that was in his hand, and touched the flesh and the unleavened cakes; and there went up fire out of the rock, and consumed the flesh and the unleavened cakes; and the angel of the LORD departed out of his sight.
Bongo Anjelu ya Yawe asembolaki nzete oyo asimbaki na loboko na Ye, mpe songe na yango etutaki nyama mpe mapa oyo ezanga levire. Moto ebimaki wuta na libanga mpe ezikisaki nyama mpe mapa. Anjelu ya Yawe alimwaki na miso na ye.
22 And Gideon saw that he was the angel of the LORD; and Gideon said: 'Alas, O Lord GOD! forasmuch as I have seen the angel of the LORD face to face.'
Tango Jedeon asosolaki ete Ye oyo azalaki elongo na ye azali Anjelu ya Yawe, agangaki: « Nkolo Yawe, mawa na ngai! Pamba te namoni Anjelu ya Yawe, miso na miso. »
23 And the LORD said unto him: 'Peace be unto thee; fear not; thou shalt not die.'
Kasi Yawe alobaki na ye: — Zala na kimia! Kobanga te.
24 Then Gideon built an altar there unto the LORD, and called it 'Adonai-shalom'; unto this day it is yet in Ophrah of the Abiezrites.
Bongo Jedeon atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abengaki yango « Yawe apesaka kimia. » Etumbelo yango ezali kino na mokolo ya lelo kati na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.
25 And it came to pass the same night, that the LORD said unto him: 'Take thy father's bullock, and the second bullock of seven years old, and throw down the altar of Baal that thy father hath, and cut down the Asherah that is by it;
Na butu wana, Yawe alobaki na Jedeon: — Kamata ngombe ya mobali ya mibu sambo, na etonga ya bibwele ya tata na yo. Buka etumbelo ya nzambe Bala, oyo ezali ya tata na yo, mpe kata ekeko ya Ashera, oyo ezali pembeni na yango.
26 and build an altar unto the LORD thy God upon the top of this stronghold, in the ordered place, and take the second bullock, and offer a burnt-offering with the wood of the Asherah which thou shalt cut down.'
Tonga etumbelo ya malamu mpo na Yawe, Nzambe na yo, na songe ya ngomba oyo. Na sima, kamata ngombe ya mobali mpe bonza yango nyonso lokola mbeka ya kotumba, na moto ya koni ya ekeko ya Ashera, oyo okataki.
27 Then Gideon took ten men of his servants, and did as the LORD had spoken unto him; and it came to pass, because he feared his father's household and the men of the city, so that he could not do it by day, that he did it by night.
Jedeon akamataki basali na ye zomi mpe asalaki ndenge Yawe alobaki na ye. Lokola azalaki kobanga libota na ye mpe bato ya engumba na ye, asalaki yango na butu, kasi na moyi te.
28 And when the men of the city arose early in the morning, behold, the altar of Baal was broken down, and the Asherah was cut down that was by it, and the second bullock was offered upon the altar that was built.
Na tongo-tongo, tango bato ya engumba balamukaki, bamonaki ete etumbelo ya nzambe Bala epanzani, ekeko ya Ashera oyo ezalaki pembeni na yango ekatami; mpe bamonaki lisusu ete babonzi ngombe ya mobali na likolo ya etumbelo oyo batongi sika.
29 And they said one to another: 'Who hath done this thing?' And when they inquired and asked, they said: 'Gideon the son of Joash hath done this thing.'
Balobanaki: « Nani asali makambo ya boye? » Wana bazalaki kotuna mpo na koluka koyeba, bayebisaki bango ete ezali Jedeon, mwana mobali ya Joasi, moto asalaki bongo.
30 Then the men of the city said unto Joash: 'Bring out thy son, that he may die; because he hath broken down the altar of Baal, and because he hath cut down the Asherah that was by it.'
Bato ya engumba balobaki na Joasi: — Bimisa mwana na yo ya mobali. Asengeli kokufa. Pamba te ye moto apanzi etumbelo ya nzambe Bala mpe akati ekeko ya Ashera oyo ezalaki pembeni na yango.
31 And Joash said unto all that stood against him: 'Will ye contend for Baal? or will ye save him? he that will contend for him, shall be put to death before morning; if he be a god, let him contend for himself, because one hath broken down his altar.'
Kasi Joasi azongiselaki bango nyonso oyo batelemelaki ye: — Boni, bino nde bokolobela Bala? Bino nde bokobundela ye? Moto nyonso oyo akobundela ye akokufa liboso ete tongo etana. Soki ye Bala azali nzambe, tika ete amibundela ye moko mpo ete babuki etumbelo na ye.
32 Therefore on that day he was called Jerubbaal, saying: 'Let Baal contend against him, because he hath broken down his altar.'
Kobanda mokolo wana, mpo ete Jedeon apanzaki etumbelo ya Bala, bakomaki kobenga ye « Yerubali » oyo elingi koloba: Tika ete Bala amibundela ye moko.
33 Now all the Midianites and the Amalekites and the children of the east assembled themselves together; and they passed over, and pitched in the valley of Jezreel.
Na tango wana, bato ya Madiani, ya Amaleki mpe bato ya ngambo ya este basanganaki elongo, bakatisaki ngambo ya Yordani mpe batongaki molako na bango na lubwaku ya Jizireyeli.
34 But the spirit of the LORD clothed Gideon; and he blew a horn; and Abiezer was gathered together after him.
Kasi Molimo na Yawe alataki Jedeon, mpe abetaki kelelo mpo na kobengisa bato ya libota ya Abiezeri na tina ete balanda ye.
35 And he sent messengers throughout all Manasseh; and they also were gathered together after him; and he sent messengers unto Asher, and unto Zebulun, and unto Naphtali; and they came up to meet them.
Jedeon atindaki bantoma na etuka nyonso ya Manase; mpe bato ya Manase basanganaki mpo na kozala sima na ye. Atindaki lisusu bantoma na libota ya Aseri, ya Zabuloni mpe ya Nefitali mpo ete bamata mpe bakutana na ye.
36 And Gideon said unto God: 'If Thou wilt save Israel by my hand, as Thou hast spoken,
Jedeon alobaki na Nzambe: « Soki okobikisa Isalaele na nzela ya maboko na ngai lokola olakaki ngai,
37 behold, I will put a fleece of wool on the threshing-floor; if there be dew on the fleece only, and it be dry upon all the ground, then shall I know that Thou wilt save Israel by my hand, as Thou hast spoken.'
nakotanda bapwale ya meme na esika oyo batutaka bambuma ya ble. Soki mamwe emonani kaka na likolo ya bapwale kasi mabele etikali ya kokawuka, wana nakoyeba ete okobikisa Isalaele na nzela ya loboko na ngai ndenge olobaki. »
38 And it was so; for he rose up early on the morrow, and pressed the fleece together, and wrung dew out of the fleece, a bowlful of water.
Mpe esalemaki bongo. Mokolo oyo elandaki, Jedeon alamukaki na tongo-tongo, akamolaki bapwale, ebimisaki mayi mpe etondisaki sani mobimba.
39 And Gideon said unto God: 'Let not Thine anger be kindled against me, and I will speak but this once: let me make trial, I pray Thee, but this once with the fleece; let it now be dry only upon the fleece, and upon all the ground let there be dew.'
Boye, Jedeon ayebisaki Nzambe: « Kosilikela ngai te, pesa ngai nzela ete nasenga lisusu elembo moko. Ya mbala oyo, sala ete bapwale ezala ya kokawuka, kasi mabele epola na mamwe. »
40 And God did so that night; for it was dry upon the fleece only, and there was dew on all the ground.
Nzambe asalelaki ye bongo, na butu yango: bapwale etikalaki ya kokawuka, kasi mabele ya pembeni epolaki na mamwe.

< Judges 6 >