< Jeremiah 4 >

1 If thou wilt return, O Israel, saith the LORD, yea, return unto Me; and if thou wilt put away thy detestable things out of My sight, and wilt not waver;
« Oh Isalaele, soki okozonga, zonga epai na Ngai, » elobi Yawe, « soki olongoli banzambe na yo ya bikeko liboso na Ngai mpe otiki kotambola libanda ya nzela na Ngai;
2 And wilt swear: 'As the LORD liveth' in truth, in justice, and in righteousness; then shall the nations bless themselves by Him, and in Him shall they glory.
soki olapi ndayi na bosolo mpe na bosembo: ‹ Na Kombo na Yawe, › bikolo ekomipambola mpe ekomipesa nkembo mpo na yo. »
3 For thus saith the LORD to the men of Judah and to Jerusalem: Break up for you a fallow ground, and sow not among thorns.
Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi: « Bokata bilanga ya sika, mpe botika kolona kati na banzube.
4 Circumcise yourselves to the LORD, and take away the foreskins of your heart, ye men of Judah and inhabitants of Jerusalem; lest My fury go forth like fire, and burn that none can quench it, because of the evil of your doings.
Bomibulisa mpo na Yawe, bopetola mitema na bino, bino bato ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi; noki te kanda na Ngai ekopela mpe ekozikisa bino lokola moto mpo na mabe oyo bozali kosala; ekopela makasi mpe moto moko te akokoka koboma yango.
5 Declare ye in Judah, and publish in Jerusalem, and say: 'Blow ye the horn in the land'; cry aloud and say: 'Assemble yourselves, and let us go into the fortified cities.'
Bopanza sango na mokili ya Yuda, botatola na Yelusalemi mpe boloba: ‹ Bobeta kelelo na mokili! › Boganga makasi mpe bobelela: ‹ Bosangana, bino nyonso! Tokima na bingumba batonga makasi! ›
6 Set up a standard toward Zion; put yourselves under covert, stay not; for I will bring evil from the north, and a great destruction.
Botombola bendele mpo na kokende na Siona! Bobombama noki, pamba te nakoyeisa pasi wuta na nor mpe kobebisama ya somo! »
7 A lion is gone up from his thicket, and a destroyer of nations is set out, gone forth from his place; to make thy land desolate, that thy cities be laid waste, without inhabitant.
Nkosi moko ebimi na ndako na yango; mobebisi moko ya bikolo abimi. Atiki esika na ye mpo na koya kobebisa mokili na yo. Bingumba na yo ekobukana mpe ekotikala lisusu na bato te.
8 For this gird you with sackcloth, lament and wail; for the fierce anger of the LORD is not turned back from us.
Yango wana, bolata bilamba ya basaki, bosala matanga mpe bolela, pamba te kanda makasi ya Yawe elongwe na mito na biso te.
9 And it shall come to pass at that day, saith the LORD, that the heart of the king shall fail, and the heart of the princes; and the priests shall be astonished, and the prophets shall wonder.
« Na mokolo wana, » elobi Yawe, « mokonzi mpe bakalaka na ye bakolemba nzoto, Banganga-Nzambe bakoyoka somo mpe basakoli bakokamwa. »
10 Then said I: 'Ah, Lord GOD! surely Thou hast greatly deceived this people and Jerusalem, saying: Ye shall have peace; whereas the sword reacheth unto the soul.'
Bongo nalobaki: « Oh Nkolo Yawe, tala ndenge okosaki bato oyo mpe Yelusalemi tango olobaki: ‹ Bokozala na kimia! › Nzokande mopanga ezalaki kozela biso. »
11 At that time shall it be said of this people and of Jerusalem; A hot wind of the high hills in the wilderness toward the daughter of My people, not to fan, nor to cleanse;
Na tango wana, bakoloba na bato oyo mpe na Yelusalemi: « Wuta likolo ya bangomba oyo ezali kati na esobe, mopepe moko ya makasi ezali koya epai ya bato na ngai; ezali koya te mpo na koyungola to mpo na kopetola.
12 A wind too strong for this shall come for Me; now will I also utter judgments against them.
Ezali mopepe moko ya makasi penza, pamba te ewuti epai na ngai. Sik’oyo, ngai moko nde nazali kosambisa bango. »
13 Behold, he cometh up as clouds, and his chariots are as the whirlwind; his horses are swifter than eagles. — 'Woe unto us! for we are undone.' —
Tala! Monguna azali koya na elulu lokola mapata, bashar na ye ezali konguluma lokola mopepe ya makasi; mpunda na ye kutu eleki mpongo na mbangu. Mawa na biso! Tokufi na biso!
14 O Jerusalem, wash thy heart from wickedness, that thou mayest be saved. How long shall thy baleful thoughts lodge within thee?
Oh Yelusalemi, petola motema na yo na mabe mpo ete obikisama. Kino tango nini okotika kosala mabongisi ya mabe?
15 For hark! one declareth from Dan, and announceth calamity from the hills of Ephraim:
Mongongo moko ezali koyokana wuta na Dani, ezali kopanza sango ya pasi na bangomba ya Efrayimi.
16 'Make ye mention to the nations: Behold — publish concerning Jerusalem — watchers come from a far country, and give out their voice against the cities of Judah.'
« Boloba yango na bikolo mpe botatola yango na Yelusalemi: ‹ Wuta na mboka mosika, mampinga ya banguna ezali koya, ezali koya na lokito mpo na kobundisa bingumba ya Yuda.
17 As keepers of a field are they against her round about; because she hath been rebellious against Me, saith the LORD.
Ezingeli Yelusalemi lokola bakengeli bilanga, pamba te etombokelaki Ngai, › » elobi Yawe.
18 Thy way and thy doings have procured these things unto thee; this is thy wickedness; yea, it is bitter, yea, it reacheth unto thy heart.
« Etamboli mpe misala na yo moko nde ememelaki yo yango. Tala, etumbu na yo ezali bololo mpe ekosala pasi makasi na motema. »
19 My bowels, my bowels! I writhe in pain! The chambers of my heart! My heart moaneth within me! I cannot hold my peace! because thou hast heard, O my soul, the sound of the horn, the alarm of war.
Ah ngai eh! Ah motema pasi eh! Ah! Motema na ngai ezali kobeta makasi, ezali koswa makasi kati na ngai, mpe nazali kokoka kokanga monoko te, pamba te nayoki lolaka ya kelelo mpe ya bitumba.
20 Destruction followeth upon destruction, for the whole land is spoiled; suddenly are my tents spoiled, my curtains in a moment.
Sango moko kaka ezali kotambola: libebi na libebi; mokili mobimba ekufi. Na mbalakata, bandako ya kapo ekufi-kufi, mpe ebombamelo na ngai ebebi na mbala moko.
21 How long shall I see the standard, shall I hear the sound of the horn?
Kino tango nini nakomona bendele ya bitumba, mpe nakoyoka makelele ya bitumba?
22 For My people is foolish, they know Me not; they are sottish children, and they have no understanding; they are wise to do evil, but to do good they have no knowledge.
« Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te; bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te, bayebi kaka kosala mabe, kasi bayebi kosala bolamu te. »
23 I beheld the earth, and, lo, it was waste and void; and the heavens, and they had no light.
Tango natalaki mabele, namonaki ete ezalaki kaka bongo-bongo mpe ezalaki ata na eloko moko te; tango natalaki likolo, namonaki ete pole ezalaki lisusu te.
24 I beheld the mountains, and, lo, they trembled, and all the hills moved to and fro.
Tango natalaki bangomba, namonaki yango koningana, bangomba nyonso ya mike ezalaki kobukana.
25 I beheld, and, lo, there was no man, and all the birds of the heavens were fled.
Mpe tango natalaki malamu, namonaki lisusu ata moto moko te, mpe bandeke nyonso ya likolo ekimaki.
26 I beheld, and, lo, the fruitful field was a wilderness, and all the cities thereof were broken down at the presence of the LORD, and before His fierce anger.
Tango nakobaki kotala, namonaki ete mokili oyo ezalaki na mabele ya malamu ekomaki esobe; bingumba na yango nyonso ebebisamaki liboso ya Yawe, na kanda makasi na Ye.
27 For thus saith the LORD: The whole land shall be desolate; yet will I not make a full end.
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Mokili mobimba ekobebisama, kasi nakobebisa yango nyonso te.
28 For this shall the earth mourn, and the heavens above be black; because I have spoken it, I have purposed it, and I have not repented, neither will I turn back from it.
Yango wana, mokili ekozala na matanga; mpe kuna na lola, likolo ekokoma mwindo pamba te nalobaki yango, mpe nakobongola maloba na Ngai te; lokola nazwaki mokano, nakozonga lisusu sima te. »
29 For the noise of the horsemen and bowmen the whole city fleeth; they go into the thickets, and climb up upon the rocks; every city is forsaken, and not a man dwelleth therein.
Bato nyonso ya engumba bakimi, kaka na makelele ya basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, mpe oyo babundaka na matolotolo. Bamoko babombami na bazamba, bamosusu bakimi na madusu ya mabanga ya bangomba; bingumba nyonso etikali lisusu na bato te, mpe ata moto moko te atikali kuna.
30 And thou, that art spoiled, what doest thou, that thou clothest thyself with scarlet, that thou deckest thee with ornaments of gold, that thou enlargest thine eyes with paint? In vain dost thou make thyself fair; thy lovers despise thee, they seek thy life.
Oh engumba ekufa, ozali kosala nini? Olati bilamba ya motane mpe babiju ya wolo; otie bonzenga na miso na yo. Ozali komikomisa kitoko na pamba, bamakangu na yo bazali kotiola yo mpe bazali koluka koboma yo.
31 For I have heard a voice as of a woman in travail, the anguish as of her that bringeth forth her first child, the voice of the daughter of Zion, that gaspeth for breath, that spreadeth her hands: 'Woe is me, now! for my soul fainteth before the murderers.'
Nayoki makelele lokola koganga ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota, kolela ya pasi lokola mwasi oyo azali kobota mwana na ye ya liboso: ezali makelele ya kolela ya Siona, mboka kitoko; azali kolela, maboko likolo, mpe azali koloba: « Nabebi na ngai, nakomi na suka liboso ya babomi. »

< Jeremiah 4 >