< Isaiah 23 >

1 The burden of Tyre. Howl, ye ships of Tarshish, for it is laid waste, so that there is no house, no entering in; from the land of Kittim it is revealed to them.
Maloba na Yawe na tina na engumba ya Tiri: Oh bamasuwa ya Tarsisi, bosala matanga! Pamba te engumba ya Tiri esili kobebisama nyonso: ezala ndako to libongo, eloko moko te etikali! Bazwaki sango oyo wuta na esanga ya Shipele.
2 Be still, ye inhabitants of the coast-land; thou whom the merchants of Zidon, that pass over the sea, have replenished.
Bino bavandi ya esanga, bino bato ya mombongo ya Sidoni, oyo nzela ya ebale ekomisa bazwi, bovanda nye!
3 And on great waters the seed of Shihor, the harvest of the Nile, was her revenue; and she was the mart of nations.
Lifuti na ye ezalaki: ble ya Shiyori, oyo ezalaki koya na nzela ya ebale monene mpe milona oyo ezalaki kowuta pembeni ya Nili. Engumba ya Tiri ekomaki nde zando ya bikolo.
4 Be thou ashamed, O Zidon; for the sea hath spoken, the stronghold of the sea, saying: 'I have not travailed, nor brought forth, neither have I reared young men, nor brought up virgins.'
Yoka soni, Sidoni, ndako batonga makasi ya ebale monene, pamba te ebale monene elobi: « Natikala koyoka pasi ya kobota te, natikala na ngai mpe kobota te, natikala na ngai kobokola bana mibali to kokolisa bana basi te. »
5 When the report cometh to Egypt, they shall be sorely pained at the report of Tyre.
Tango maloba yango ekokoma na Ejipito, bakolenga na somo wana bakoyoka sango ya Tiri.
6 Pass ye over to Tarshish; howl, ye inhabitants of the coast-land.
Bokatisa na ngambo ya Tarsisi, bolela makasi, bino bavandi ya esanga.
7 Is this your joyous city, whose feet in antiquity, in ancient days, carried her afar off to sojourn?
Boni, oyo nde engumba na bino ya bisengo, engumba oyo ebanda kala penza mpe oyo makolo na yango ememaka yango kowumela na mikili ya mosika?
8 Who hath devised this against Tyre, the crowning city, whose merchants are princes, whose traffickers are the honourable of the earth?
Nani azwaki mokano oyo mpo na kobebisa Tiri? Tiri oyo azalaki kokabola mitole, oyo bato na ye ya mombongo bazalaki komimona lokola bakonzi; mpe oyo bato na ye ya nkita bazalaki komimona lokola bato oyo baleki bato nyonso ya mokili na lokumu.
9 The LORD of hosts hath devised it, to pollute the pride of all glory, to bring into contempt all the honourable of the earth.
Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azwaki mokano yango mpo na kosambwisa lolendo ya nkembo nyonso mpe kokitisa kino na se bato nyonso ya lokumu, oyo bazali na mabele.
10 Overflow thy land as the Nile, O daughter of Tarshish! there is no girdle any more.
Oh Tarsisi, mboka kitoko, koma kosala bilanga ndenge basalaka pembeni ya ebale Nili, pamba te libongo ezali lisusu te.
11 He hath stretched out His hand over the sea, He hath shaken the kingdoms; the LORD hath given commandment concerning Canaan, to destroy the strongholds thereof;
Yawe asembolaki loboko na Ye na ebale monene mpe alengisaki bikolo, apesaki mitindo na tina na mokili ya Fenisi ete babuka bandako na yango oyo batonga makasi;
12 And He said: 'Thou shalt no more rejoice.' O thou oppressed virgin daughter of Zidon, arise, pass over to Kittim; even there shalt thou have no rest.
alobaki: « Okosepela lisusu te, yo Sidoni, mboka kitoko, yo oyo lokumu na yo esili kobebisama lelo! Telema, katisa na ngambo ya Shipele! Ezala kuna, okozwa bopemi te. »
13 Behold, the land of the Chaldeans — this is the people that was not, when Asshur founded it for shipmen — they set up their towers, they overthrew the palaces thereof; it is made a ruin.
Tala mokili ya bato ya Chalide, bato oyo bazalaka lisusu te! Bato ya Asiri bakomisaki yango esika ya kowumela mpo na banyama ya esobe; batongaki bandako na bango ya milayi mpo na kokengela, babukaki bandako na yango batonga makasi mpe bakomisaki yango putulu.
14 Howl, ye ships of Tarshish, for your stronghold is laid waste.
Bolela, bino bamasuwa ya Tarsisi! Pamba te ndako na bino, oyo batonga makasi ebukani.
15 And it shall come to pass in that day, that Tyre shall be forgotten seventy years, according to the days of one king; after the end of seventy years it shall fare with Tyre as in the song of the harlot:
Na tango wana, bakobosana Tiri mibu tuku sambo kolanda molayi ya bomoi ya mokonzi moko. Kasi na suka ya mibu tuku sambo, ekosalema mpo na Tiri, makambo oyo baloba na nzembo oyo bayembelaka mwasi ya ndumba:
16 Take a harp, go about the city, thou harlot long forgotten; make sweet melody, sing many songs, that thou mayest be remembered.
« Kamata lindanda, tambola na engumba mobimba, oh mwasi ya ndumba oyo babosana; beta yango malamu, yemba banzembo ebele mpo ete bakanisa yo lisusu! »
17 And it shall come to pass after the end of seventy years, that the LORD will remember Tyre, and she shall return to her hire, and shall have commerce with all the kingdoms of the world upon the face of the earth.
Na sima na mibu tuku sambo, Yawe akosala mpo na Tiri oyo ekozongela lifuti na yango ya mbindo; mpe ekozongela kosala kindumba elongo na bikolo nyonso ya mokili.
18 And her gain and her hire shall be holiness to the LORD; it shall not be treasured nor laid up; for her gain shall be for them that dwell before the LORD, to eat their fill, and for stately clothing.
Kasi lifuti mpe bomengo na yango ekobulisama mpo na Yawe; bakobomba te yango kati na bibombelo. Bomengo na yango ekozala mpo na koleisa bato oyo batelemaka liboso ya Yawe mpe kolatisa bango bilamba ya kitoko.

< Isaiah 23 >