< Genesis 7 >

1 And the LORD said unto Noah: 'Come thou and all thy house into the ark; for thee have I seen righteous before Me in this generation.
Yawe alobaki na Noa: « Kota na masuwa, yo mpe libota na yo mobimba, pamba te yo kaka nde omonani sembo na miso na Ngai kati na bato ya ekeke oyo.
2 Of every clean beast thou shalt take to thee seven and seven, each with his mate; and of the beasts that are not clean two and two, each with his mate;
Kamata banyama sambo ya mibali mpe sambo ya basi kati na banyama ya lolenge nyonso oyo ezangi mbindo; mpe nyama moko ya mobali mpe moko ya mwasi kati na banyama oyo ezali mbindo.
3 of the fowl also of the air, seven and seven, male and female; to keep seed alive upon the face of all the earth.
Kamata lisusu bandeke sambo ya mibali mpe sambo ya basi kati na lolenge nyonso ya bandeke mpo ete esila te kati na mokili.
4 For yet seven days, and I will cause it to rain upon the earth forty days and forty nights; and every living substance that I have made will I blot out from off the face of the earth.'
Pamba te etikali mikolo sambo mpo ete nanokisa mvula oyo ekowumela mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei mpe nakosilisa koboma bikelamu nyonso oyo nasala kati na mokili oyo. »
5 And Noah did according unto all that the LORD commanded him.
Bongo, Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Yawe atindaki ye.
6 And Noah was six hundred years old when the flood of waters was upon the earth.
Noa azalaki na mibu nkama motoba ya mbotama tango mpela eyaki na mokili.
7 And Noah went in, and his sons, and his wife, and his sons' wives with him, into the ark, because of the waters of the flood.
Noa mpe bana na ye ya mibali elongo na mwasi na ye mpe basi ya bana na ye bakotaki na masuwa mpo ete babika na mpela.
8 Of clean beasts, and of beasts that are not clean, and of fowls, and of every thing that creepeth upon the ground,
Kati na banyama ya lolenge nyonso, moko ya mobali mpe moko ya mwasi, ezala oyo ezanga mbindo to oyo ezali mbindo, bandeke mpe banyama oyo etambolaka na libumu
9 there went in two and two unto Noah into the ark, male and female, as God commanded Noah.
eyaki epai na Noa mpe ekotaki na masuwa, mwasi na mobali, ndenge Nzambe atindaki Noa.
10 And it came to pass after the seven days, that the waters of the flood were upon the earth.
Bongo sima na mikolo sambo, mpela eyaki na mokili.
11 In the six hundredth year of Noah's life, in the second month, on the seventeenth day of the month, on the same day were all the fountains of the great deep broken up, and the windows of heaven were opened.
Tango Noa akokisaki mibu nkama motoba ya mbotama, na sanza ya mibale, na mokolo ya zomi na sambo, bitima nyonso ya se mpe maninisa nyonso ya likolo efungwamaki.
12 And the rain was upon the earth forty days and forty nights.
Mvula enokaki na mokili mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei.
13 In the selfsame day entered Noah, and Shem, and Ham, and Japheth, the sons of Noah, and Noah's wife, and the three wives of his sons with them, into the ark;
Kaka na mokolo wana, Noa mpe bana na ye ya mibali: Semi, Cham mpe Jafeti, elongo na mwasi na ye mpe basi misato ya bana na ye, bakotaki na masuwa.
14 they, and every beast after its kind, and all the cattle after their kind, and every creeping thing that creepeth upon the earth after its kind, and every fowl after its kind, every bird of every sort.
Elongo na bango, ekotaki mpe banyama ya zamba ya lolenge nyonso, bibwele ya lolenge nyonso, bikelamu ya lolenge nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bandeke ya lolenge nyonso mpe bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.
15 And they went in unto Noah into the ark, two and two of all flesh wherein is the breath of life.
Mwasi na mobali, kati na bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, eyaki epai ya Noa mpo na kokota na masuwa.
16 And they that went in, went in male and female of all flesh, as God commanded him; and the LORD shut him in.
Banyama nyonso oyo ekotaki kuna ezalaki mwasi na mobali kati na bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, ndenge Nzambe atindaki Noa. Sima, Yawe akangaki ekuke ya masuwa.
17 And the flood was forty days upon the earth; and the waters increased, and bore up the ark, and it was lifted up above the earth.
Mpela ewumelaki na mokili mikolo tuku minei; mayi ekomaki ebele mpe etombolaki masuwa likolo na yango.
18 And the waters prevailed, and increased greatly upon the earth; and the ark went upon the face of the waters.
Mayi emataki mpe ekomaki ebele, bongo masuwa ekomaki kotepatepa likolo ya mayi.
19 And the waters prevailed exceedingly upon the earth; and all the high mountains that were under the whole heaven were covered.
Mayi emataki lisusu makasi mpe bangomba nyonso ya milayi oyo ezalaki na mokili ezindaki na se ya mayi.
20 Fifteen cubits upward did the waters prevail; and the mountains were covered.
Mayi emataki lisusu likolo ya bangomba na bosanda ya bametele pene sambo to mwambe.
21 And all flesh perished that moved upon the earth, both fowl, and cattle, and beast, and every swarming thing that swarmeth upon the earth, and every man;
Bikelamu nyonso ya bomoi kati na mokili ekufaki, ezala bandeke, bibwele, banyama ya zamba to mpe banyama ya mike-mike oyo etambolaka na mabele to mpe bato nyonso.
22 all in whose nostrils was the breath of the spirit of life, whatsoever was in the dry land, died.
Nyonso oyo ezalaki na pema ya bomoi ekufaki kati na mokili.
23 And He blotted out every living substance which was upon the face of the ground, both man, and cattle, and creeping thing, and fowl of the heaven; and they were blotted out from the earth; and Noah only was left, and they that were with him in the ark.
Boye, Yawe alongolaki kati na mokili bikelamu nyonso oyo ezalaki na bomoi, kobanda na moto kino na ebwele, ekelamu oyo etambolaka na libumu mpe ndeke ya likolo; alongolaki bango na mokili mpe etikalaki kaka Noa na ba-oyo bazalaki na ye elongo na masuwa.
24 And the waters prevailed upon the earth a hundred and fifty days.
Mayi etondaki na mokili mikolo nkama moko na tuku mitano.

< Genesis 7 >

The Great Flood
The Great Flood