< Genesis 3 >

1 Now the serpent was more subtle than any beast of the field which the LORD God had made. And he said unto the woman: 'Yea, hath God said: Ye shall not eat of any tree of the garden?'
Nzokande, kati na banyama nyonso ya zamba oyo Yawe Nzambe akelaki, nyoka nde elekaki na mayele mabe. Alobaki na mwasi: — Nzambe alobaki na bino solo ete bolia mbuma ata moko te ya banzete ya elanga?
2 And the woman said unto the serpent: 'Of the fruit of the trees of the garden we may eat;
Mwasi azongisaki epai ya nyoka: — Toliaka bambuma ya banzete ya elanga.
3 but of the fruit of the tree which is in the midst of the garden, God hath said: Ye shall not eat of it, neither shall ye touch it, lest ye die.'
Kasi na oyo etali mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki: « Bosengeli te kolia yango, mpe bosengeli te kosimba yango; noki te bokokufa. »
4 And the serpent said unto the woman: 'Ye shall not surely die;
Nyoka alobaki na mwasi: — Solo penza, bokokufa te.
5 for God doth know that in the day ye eat thereof, then your eyes shall be opened, and ye shall be as God, knowing good and evil.'
Pamba te Nzambe ayebi malamu ete mokolo oyo bokolia yango, miso na bino ekofungwama mpe bokokoma lokola Ye: koyeba malamu na mabe.
6 And when the woman saw that the tree was good for food, and that it was a delight to the eyes, and that the tree was to be desired to make one wise, she took of the fruit thereof, and did eat; and she gave also unto her husband with her, and he did eat.
Mwasi amonaki ete mbuma ya nzete ezali elengi mpo na kolia, kitoko mpo na kotala mpe malamu mpo na kofungola mayele. Boye azwaki mbuma mpe aliaki yango. Apesaki yango mpe na mobali na ye, oyo azalaki elongo na ye; bongo ye mpe mobali aliaki yango.
7 And the eyes of them both were opened, and they knew that they were naked; and they sewed fig-leaves together, and made themselves girdles.
Mbala moko, miso na bango mibale efungwamaki, mpe basosolaki ete bazali bolumbu. Boye, basangisaki makasa ya nzete ya figi mpe bamizipaki.
8 And they heard the voice of the LORD God walking in the garden toward the cool of the day; and the man and his wife hid themselves from the presence of the LORD God amongst the trees of the garden.
Na pokwa, bayokaki makelele ya matambe ya Yawe Nzambe kotambola kati na elanga. Boye, mobali mpe mwasi babombamaki kati na banzete ya elanga mpo na kokima Yawe.
9 And the LORD God called unto the man, and said unto him: 'Where art thou?'
Kasi Yawe Nzambe abengaki mobali mpe atunaki ye: — Ozali wapi?
10 And he said: 'I heard Thy voice in the garden, and I was afraid, because I was naked; and I hid myself.'
Azongisaki: — Nayoki makelele ya matambe na Yo kotambola kati na elanga mpe nabangi mpo ete nazali bolumbu; yango wana nabombami.
11 And He said: 'Who told thee that thou wast naked? Hast thou eaten of the tree, whereof I commanded thee that thou shouldest not eat?'
Nzambe alobaki: — Ndenge nini oyebi ete ozali bolumbu? Boni, oliaki mbuma ya nzete oyo napekisaki yo kolia?
12 And the man said: 'The woman whom Thou gavest to be with me, she gave me of the tree, and I did eat.'
Adamu azongisaki: — Ezali mwasi oyo opesaki ngai lokola mosungi nde apesaki ngai mbuma ya nzete yango, mpe nalie yango.
13 And the LORD God said unto the woman: 'What is this thou hast done?' And the woman said: 'The serpent beguiled me, and I did eat.'
Yawe Nzambe alobaki na mwasi: — Mpo nini osali bongo? Mwasi azongisaki: — Ezali nyoka nde akosaki ngai, mpe naliaki yango.
14 And the LORD God said unto the serpent: 'Because thou hast done this, cursed art thou from among all cattle, and from among all beasts of the field; upon thy belly shalt thou go, and dust shalt thou eat all the days of thy life.
Boye Yawe Nzambe alobaki na nyoka: « Lokola osali bongo, olakelami mabe kati na bibwele mpe banyama nyonso ya zamba. Okotambola na libumu mpe okobanda kolia putulu bomoi na yo mobimba.
15 And I will put enmity between thee and the woman, and between thy seed and her seed; they shall bruise thy head, and thou shalt bruise their heel.'
Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »
16 Unto the woman He said: 'I will greatly multiply thy pain and thy travail; in pain thou shalt bring forth children; and thy desire shall be to thy husband, and he shall rule over thee.'
Nzambe alobaki na mwasi: « Nakobakisa pasi na zemi na yo; okobota na pasi. Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, kasi ye akozala mokonzi na yo. »
17 And unto Adam He said: 'Because thou hast hearkened unto the voice of thy wife, and hast eaten of the tree, of which I commanded thee, saying: Thou shalt not eat of it; cursed is the ground for thy sake; in toil shalt thou eat of it all the days of thy life.
Yawe Nzambe alobaki na Adamu: « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo: ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo.
18 Thorns also and thistles shall it bring forth to thee; and thou shalt eat the herb of the field.
Mabele ekobotela yo nzube mpe nzete ya sende. Okolia matiti ya bilanga.
19 In the sweat of thy face shalt thou eat bread, till thou return unto the ground; for out of it wast thou taken; for dust thou art, and unto dust shalt thou return.'
Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo kino okozonga na mabele epai wapi owutaki, pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. »
20 And the man called his wife's name Eve; because she was the mother of all living.
Mobali apesaki mwasi na ye kombo « Eva, » pamba te azali mama ya bato nyonso na mokili.
21 And the LORD God made for Adam and for his wife garments of skins, and clothed them.
Yawe Nzambe asalelaki Adamu mpe mwasi na ye bilamba ya poso ya nyama mpe alatisaki bango yango.
22 And the LORD God said: 'Behold, the man is become as one of us, to know good and evil; and now, lest he put forth his hand, and take also of the tree of life, and eat, and live for ever.'
Yawe Nzambe alobaki: « Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya kotia loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi. »
23 Therefore the LORD God sent him forth from the garden of Eden, to till the ground from whence he was taken.
Boye, Yawe Nzambe abenganaki ye na elanga ya Edeni mpo ete asala mosala ya mabele epai wapi awutaki.
24 So He drove out the man; and He placed at the east of the garden of Eden the cherubim, and the flaming sword which turned every way, to keep the way to the tree of life.
Sima na kobengana moto, atiaki basheribe, na ngambo ya este ya elanga ya Edeni, na mopanga ya moto oyo ezalaki kobaluka bipai na bipai mpo na kobatela nzela ya nzete ya bomoi.

< Genesis 3 >