< Exodus 19 >

1 In the third month after the children of Israel were gone forth out of the land of Egypt, the same day came they into the wilderness of Sinai.
Sanza misato sima na bana ya Isalaele kobima na Ejipito, kaka na mokolo yango, bana ya Isalaele bakomaki na esobe ya Sinai.
2 And when they were departed from Rephidim, and were come to the wilderness of Sinai, they encamped in the wilderness; and there Israel encamped before the mount.
Tango balongwaki na Refidimi, bakotaki na esobe ya Sinai, mpe Isalaele atongaki kuna kati na esobe molako etalana na ngomba.
3 And Moses went up unto God, and the LORD called unto him out of the mountain, saying: 'Thus shalt thou say to the house of Jacob, and tell the children of Israel:
Moyize amataki na ngomba mpo na kosolola na Nzambe; mpe wuta na likolo ya ngomba, Yawe abengaki ye mpe alobaki na ye: — Tala makambo oyo okoyebisa bakitani ya Jakobi mpe oyo okotalisa na bana ya Isalaele:
4 Ye have seen what I did unto the Egyptians, and how I bore you on eagles' wings, and brought you unto Myself.
« Bomonaki bino moko ndenge nini nasalaki bato ya Ejipito mpe ndenge nini namemaki bino lokola na mapapu ya mpongo kino epai na Ngai.
5 Now therefore, if ye will hearken unto My voice indeed, and keep My covenant, then ye shall be Mine own treasure from among all peoples; for all the earth is Mine;
Soki botosi Ngai penza mpe bobateli boyokani na Ngai, bokozala mpo na Ngai ekolo ya motuya kati na bikolo nyonso. Atako mokili mobimba ezali ya Ngai,
6 and ye shall be unto Me a kingdom of priests, and a holy nation. These are the words which thou shalt speak unto the children of Israel.'
kasi bino bokozala mpo na Ngai ekolo oyo ekosala mosala ya bonganga-Nzambe, ekolo ya bule. » Oyo nde maloba okoyebisa bana ya Isalaele.
7 And Moses came and called for the elders of the people, and set before them all these words which the LORD commanded him.
Moyize azongaki, abengisaki bakambi ya Isalaele mpe ayebisaki bango maloba nyonso oyo Yawe atindaki ye koloba.
8 And all the people answered together, and said: 'All that the LORD hath spoken we will do.' And Moses reported the words of the people unto the LORD.
Bato nyonso bazongisaki lokola moto moko: — Tokosala nyonso oyo Yawe alobi. Bongo Moyize amemaki eyano na bango epai na Yawe.
9 And the LORD said unto Moses: 'Lo, I come unto thee in a thick cloud, that the people may hear when I speak with thee, and may also believe thee for ever.' And Moses told the words of the people unto the LORD.
Yawe alobaki na Moyize: — Nazali koya epai na yo kati na lipata monene, mpo ete bana ya Isalaele bayoka tango nakosolola na yo mpe mpo ete batia tango nyonso elikya na bango epai na yo. Moyize ayebisaki Yawe makambo nyonso oyo bana ya Isalaele balobaki.
10 And the LORD said unto Moses: 'Go unto the people, and sanctify them to-day and to-morrow, and let them wash their garments,
Yawe alobaki na Moyize: — Kende epai ya bato, bulisa bango lelo mpe lobi, bongo yebisa bango ete basukola bilamba na bango;
11 and be ready against the third day; for the third day the LORD will come down in the sight of all the people upon mount Sinai.
bamibongisa mpo na mokolo ya misato, pamba te na mokolo wana nde Ngai Yawe, nakokita na likolo ya ngomba Sinai, na miso ya bana nyonso ya Isalaele.
12 And thou shalt set bounds unto the people round about, saying: Take heed to yourselves, that ye go not up into the mount, or touch the border of it; whosoever toucheth the mount shall be surely put to death;
Okotia bandelo zingazinga ya ngomba mpo na bato mpe okoyebisa bango: « Bosala keba ete bomata te na ngomba oyo mpe bopusana te pembeni na yango. Moto nyonso oyo akotuta yango akokufa penza.
13 no hand shall touch him, but he shall surely be stoned, or shot through; whether it be beast or man, it shall not live; when the ram's horn soundeth long, they shall come up to the mount.'
Soki moto moko abuki mobeko oyo, bakosimba ye te, kasi bakoboma ye na mabanga to bakotobola ye likonga; ezala moto to nyama, asengeli kokufa. Kaka soki lokito ya liseke ya meme eyokani makasi nde ndambo ya bato bakomata na ngomba. »
14 And Moses went down from the mount unto the people, and sanctified the people; and they washed their garments.
Moyize alongwaki na ngomba, akendeki epai ya bana ya Isalaele, abulisaki bango, mpe basukolaki bilamba na bango.
15 And he said unto the people: 'Be ready against the third day; come not near a woman.'
Moyize alobaki na bango: — Bomilengela mpo na mokolo ya misato, bosangisa nzoto te na basi na bino.
16 And it came to pass on the third day, when it was morning, that there were thunders and lightnings and a thick cloud upon the mount, and the voice of a horn exceeding loud; and all the people that were in the camp trembled.
Na tongo ya mokolo ya misato, bakake ebetaki, mikalikali ezalaki kongenga, mpe lipata monene ezipaki ngomba; bongo bato bayokaki bakelelo kobeta makasi. Bato nyonso kati na molako balengaki.
17 And Moses brought forth the people out of the camp to meet God; and they stood at the nether part of the mount.
Moyize abimisaki bato mpo ete bakende kokutana na Nzambe, na libanda ya molako. Mpe bato batelemaki na ebandeli ya ngomba.
18 Now mount Sinai was altogether on smoke, because the LORD descended upon it in fire; and the smoke thereof ascended as the smoke of a furnace, and the whole mount quaked greatly.
Milinga ezipaki ngomba Sinai mpo ete Yawe akitaki na likolo na yango na lolenge ya moto, bongo milinga yango ezalaki komata lokola milinga oyo ebimaka na fulu ya moto. Mpe ngomba nyonso eninganaki makasi.
19 And when the voice of the horn waxed louder and louder, Moses spoke, and God answered him by a voice.
Mongongo ya kelelo ezalaki kaka komata se komata. Boye Moyize abandaki koloba na Nzambe, mpe Nzambe azalaki koyanola ye na lokito ya kake.
20 And the LORD came down upon mount Sinai, to the top of the mount; and the LORD called Moses to the top of the mount; and Moses went up.
Yawe akitaki na likolo ya ngomba Sinai mpe abengaki Moyize mpo ete amata na songe ya ngomba yango. Boye Moyize amataki.
21 And the LORD said unto Moses: 'Go down, charge the people, lest they break through unto the LORD to gaze, and many of them perish.
Yawe alobaki na Moyize: — Kita mpe kebisa bato ete baleka bandelo te mpo na koluka komona Ngai Yawe, noki te mingi kati na bango bakokufa.
22 And let the priests also, that come near to the LORD, sanctify themselves, lest the LORD break forth upon them.'
Ezala Banganga-Nzambe oyo basengeli kopusana pene na Ngai, basengeli komibulisa; noki te Ngai Yawe, nakoboma bango.
23 And Moses said unto the LORD: 'The people cannot come up to mount Sinai; for thou didst charge us, saying: Set bounds about the mount, and sanctify it.'
Moyize alobaki na Yawe: — Bato ya Isalaele bakoki te komata na ngomba Sinai, pamba te Yo moko oyebisaki biso ete totia bandelo zingazinga ya ngomba mpe tomona yango lokola bule.
24 And the LORD said unto him: 'Go, get thee down, and thou shalt come up, thou, and Aaron with thee; but let not the priests and the people break through to come up unto the LORD, lest He break forth upon them.'
Yawe azongiselaki ye: — Kita lisusu; bongo omata elongo na Aron. Kasi mpo na Banganga-Nzambe mpe bana ya Isalaele, tika ete bawelela komata te epai na Ngai Yawe, noki te nakoboma bango.
25 So Moses went down unto the people, and told them.
Moyize akitaki, akendeki epai ya bana ya Isalaele mpe ayebisaki bango makambo oyo Yawe alobaki.

< Exodus 19 >