< Exodus 15 >

1 Then sang Moses and the children of Israel this song unto the LORD, and spoke, saying: I will sing unto the LORD, for He is highly exalted; the horse and his rider hath He thrown into the sea.
Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe: Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, mpo ete amonisi monene ya nkembo na Ye! Azindisi mpunda mpe motambolisi na yango kati na ebale monene.
2 The LORD is my strength and song, and He is become my salvation; this is my God, and I will glorify Him; my father's God, and I will exalt Him.
Yawe azali makasi na ngai, azali solo loyembo na ngai, azali mobikisi na ngai, azali Nzambe na ngai, nakokumisa Ye; azali Nzambe ya tata na ngai, nakonetola Ye.
3 The LORD is a man of war, The LORD is His name.
Yawe azali elombe ya bitumba; Kombo na Ye ezali Yawe.
4 Pharaoh's chariots and his host hath He cast into the sea, and his chosen captains are sunk in the Red Sea.
Azindisi na ebale monene, bashar mpe mampinga ya Faraon; abwaki na ebale monene ya barozo, bakonzi mpe basoda oyo Faraon atielaka motema.
5 The deeps cover them — they went down into the depths like a stone.
Mozindo ya mayi ezipi bango, bakiti kino na se ya ebale monene lokola libanga.
6 Thy right hand, O LORD, glorious in power, Thy right hand, O LORD, dasheth in pieces the enemy.
Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, emonisi nguya na Yo; loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, enyati monguna.
7 And in the greatness of Thine excellency Thou overthrowest them that rise up against Thee; Thou sendest forth Thy wrath, it consumeth them as stubble.
Na monene ya nguya na Yo, obebisi batelemeli na Yo; na kanda na Yo, otombokeli bango, mpe baziki lokola matiti.
8 And with the blast of Thy nostrils the waters were piled up — the floods stood upright as a heap; the deeps were congealed in the heart of the sea.
Na pema ya zolo na Yo, mayi ekabwani, bambonge etelemi lokola mir, mpe mozindo ya mayi ekangami kati na ebale monene.
9 The enemy said: 'I will pursue, I will overtake, I will divide the spoil; my lust shall be satisfied upon them; I will draw my sword, my hand shall destroy them.'
Monguna amilobelaki: « Nakolanda bango kino nakokanga bango, molimo na ngai ekotonda na biloko oyo nakobotola; nakobimisa mopanga na ngai, mpe loboko na ngai ekobebisa bango. »
10 Thou didst blow with Thy wind, the sea covered them; they sank as lead in the mighty waters.
Kasi Yo, Yawe, ofuli mopepe na Yo, mpe ebale monene ezipi bango. Bazindi lokola mbodi kati na mayi makasi.
11 Who is like unto Thee, O LORD, among the mighty? who is like unto Thee, glorious in holiness, fearful in praises, doing wonders?
Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo? Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu, somo, mpe abongi na lokumu, mpe asalaka makambo ya kokamwa?
12 Thou stretchedst out Thy right hand — the earth swallowed them.
Osembolaki loboko na Yo ya mobali, mpe mabele emeli bango.
13 Thou in Thy love hast led the people that Thou hast redeemed; Thou hast guided them in Thy strength to Thy holy habitation.
Na bolingo na Yo, otambolisi bato oyo okangoli. Na makasi na Yo, omemi bango na Ndako na Yo ya bule.
14 The peoples have heard, they tremble; pangs have taken hold on the inhabitants of Philistia.
Bikolo eyoki sango na yango mpe ekomi kolenga, somo ekangaki bato ya Filisitia.
15 Then were the chiefs of Edom affrighted; the mighty men of Moab, trembling taketh hold upon them; all the inhabitants of Canaan are melted away.
Bakambi ya Edomi bakomi na somo, bankumu ya Moabi bakomi kolenga, bato ya Kanana balembi nzoto.
16 Terror and dread falleth upon them; by the greatness of Thine arm they are as still as a stone; till Thy people pass over, O LORD, till the people pass over that Thou hast gotten.
Kobanga mpe somo ekweyeli bango. Na nguya ya loboko na Yo, bakomi bababa lokola libanga kino bato na Yo, oh Yawe, balekaki, kino bato oyo osikolaki balekaki.
17 Thou bringest them in, and plantest them in the mountain of Thine inheritance, the place, O LORD, which Thou hast made for Thee to dwell in, the sanctuary, O Lord, which Thy hands have established.
Okomema bango mpe okovandisa bango na ngomba na Yo, esika oyo obongisaki, oh Nkolo, mpo na kovanda, Esika ya bule, oh Yawe, esika oyo maboko na Yo esalaki.
18 The LORD shall reign for ever and ever.
Yawe akotikala mokonzi libela na libela!
19 For the horses of Pharaoh went in with his chariots and with his horsemen into the sea, and the LORD brought back the waters of the sea upon them; but the children of Israel walked on dry land in the midst of the sea.
Tango bampunda ya Faraon, bashar na ye elongo na bato oyo batambolisaka yango bamikotisaki kati na ebale monene, Yawe azongisaki mayi ya ebale monene likolo na bango. Nzokande bana ya Isalaele bakatisaki ebale monene lokola na esobe.
20 And Miriam the prophetess, the sister of Aaron, took a timbrel in her hand; and all the women went out after her with timbrels and with dances.
Miriami, mwasi mosakoli mpe ndeko mwasi ya Aron, azwaki mbunda moke na loboko na ye mpe basi nyonso balandaki ye; bazalaki kobeta bambunda mike mpe kobina.
21 And Miriam sang unto them: Sing ye to the LORD, for He is highly exalted: the horse and his rider hath He thrown into the sea.
Miriami ayembaki elongo na bango: « Boyembela Yawe, pamba te amonisi monene ya nkembo na Ye; azindisi na ebale monene, mpunda mpe motambolisi na yango. »
22 And Moses led Israel onward from the Red Sea, and they went out into the wilderness of Shur; and they went three days in the wilderness, and found no water.
Moyize atambolisaki bana ya Isalaele wuta na ebale monene ya barozo mpe amemaki bango na nzela oyo ekenda na esobe ya Shuri. Batambolaki mikolo misato kati na esobe mpe bamonaki mayi te.
23 And when they came to Marah, they could not drink of the waters of Marah, for they were bitter. Therefore the name of it was called Marah.
Tango bakomaki na Mara epai wapi bamonaki mayi, bakokaki te komela mayi yango, pamba te ezalaki bololo. Yango wana babengaki esika yango Mara.
24 And the people murmured against Moses, saying: 'What shall we drink?'
Boye bato bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe balobaki: « Tokomela nini? »
25 And he cried unto the LORD; and the LORD showed him a tree, and he cast it into the waters, and the waters were made sweet. There He made for them a statute and an ordinance, and there He proved them;
Boye Moyize abelelaki Yawe, mpe Yawe alakisaki ye eteni ya nzete. Moyize abwakaki yango na mayi, mpe mayi ekomaki elengi mpo na komela. Ezalaki kuna nde Yawe apesaki bango bikateli, mibeko mpe amekaki bango.
26 and He said: 'If thou wilt diligently hearken to the voice of the LORD thy God, and wilt do that which is right in His eyes, and wilt give ear to His commandments, and keep all His statutes, I will put none of the diseases upon thee, which I have put upon the Egyptians; for I am the LORD that healeth thee.'
Alobaki: « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »
27 And they came to Elim, where were twelve springs of water, and three score and ten palm-trees; and they encamped there by the waters.
Bongo bana ya Isalaele bakomaki na Elimi epai wapi bitima zomi na mibale mpe banzete ya mbila tuku sambo ezalaki. Ezalaki kuna nde batongaki molako na bango, pene ya mayi.

< Exodus 15 >