< Ecclesiastes 5 >

1 Guard thy foot when thou goest to the house of God, and be ready to hearken: it is better than when fools give sacrifices; for they know not that they do evil.
Batela makolo na yo tango ozali kokende na Ndako ya Nzambe; eleki malamu kokende kuna mpo na koyoka, kasi mpo na kobonza mbeka ya bazoba te, pamba te bayebaka te ete basalaka mabe.
2 Be not rash with thy mouth, and let not thy heart be hasty to utter a word before God; for God is in heaven, and thou upon earth; therefore let thy words be few.
Kowelela te kofungola monoko na yo, mpe tika ete motema na yo ewelela te kobimisa liloba liboso ya Nzambe! Pamba te Nzambe azali na likolo, mpe yo ozali na mabele. Boye, tika ete maloba na yo ezalaka mingi te!
3 For a dream cometh through a multitude of business; and a fool's voice through a multitude of words.
Ndenge ndoto eyaka soki moto azali na misala mingi, ndenge wana mpe maloba ebele ebimisaka bozoba.
4 When thou vowest a vow unto God, defer not to pay it; for He hath no pleasure in fools; pay that which thou vowest.
Soki olapi ndayi liboso ya Nzambe, kowumela te mpo na kokokisa yango; pamba te Nzambe asepelaka na bazoba te; kokisa ndayi na yo.
5 Better is it that thou shouldest not vow, than that thou shouldest vow and not pay.
Eleki malamu ete olapa na yo kutu ndayi te na esika ya kolapa ndayi mpe ozanga kokokisa yango.
6 Suffer not thy mouth to bring thy flesh into guilt, neither say thou before the messenger, that it was an error; wherefore should God be angry at thy voice, and destroy the work of thy hands?
Kotika te ete monoko na yo ememisa yo masumu, mpe kokende koloba te liboso ya basali ya Nzambe: « Ndayi na ngai ezalaki libunga. » Mpo na nini Nzambe atomboka mpo na maloba na yo mpe abebisa misala ya maboko na yo?
7 For through the multitude of dreams and vanities there are also many words; but fear thou God.
Ndoto ebele mpe maloba ebele ezali kaka pamba; yango wana tosa nde Nzambe.
8 If thou seest the oppression of the poor, and the violent perverting of justice and righteousness in the state, marvel not at the matter; for one higher than the high watcheth, and there are higher than they.
Soki omoni ete bazali konyokola mobola kati na mokili, bongo boyengebene mpe bosembo etiolami, kokamwa likambo yango te; pamba te mokambi moko azali na se ya mokambi mosusu; mpe na likolo na bango mibale, ezali na bakonzi mosusu oyo baleki na bokonzi.
9 But the profit of a land every way is a king that maketh himself servant to the field.
Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga.
10 He that loveth silver shall not be satisfied with silver; nor he that loveth abundance, with increase; this also is vanity.
Moto oyo alingaka mbongo atondaka yango te, mpe moto oyo alingaka bomengo, bozwi na ye etondisaka ye te. Wana mpe ezali kaka pamba.
11 When goods increase, they are increased that eat them; and what advantage is there to the owner thereof, saving the beholding of them with his eyes?
Ndenge bozwi ya moto ekomaka ebele, ndenge wana mpe bato oyo baliaka yango bakomaka ebele; bongo litomba nini nkolo na yango akozwa, soki kaka te komona yango na miso?
12 Sweet is the sleep of a labouring man, whether he eat little or much; but the satiety of the rich will not suffer him to sleep.
Pongi ya mosali ezalaka ya kimia, ata soki alie moke to mingi; kasi bomengo ya mozwi ezangisaka ye pongi.
13 There is a grievous evil which I have seen under the sun, namely, riches kept by the owner thereof to his hurt;
Namoni mabe moko na se ya moyi, epesaka penza mawa: moto abombi bomengo na ye, kasi ememeli ye pasi;
14 and those riches perish by evil adventure; and if he hath begotten a son, there is nothing in his hand.
likambo moko ya mabe ya mbalakata ebebisi bomengo yango, mpe mwana na ye azangi libula ya kokitana na yango.
15 As he came forth of his mother's womb, naked shall he go back as he came, and shall take nothing for his labour, which he may carry away in his hand.
Ndenge abotamaki bolumbu wuta na libumu ya mama na ye, ndenge mpe akozanga bolumbu, akomema ata mbuma moko te ya mosala na ye.
16 And this also is a grievous evil, that in all points as he came, so shall he go; and what profit hath he that he laboureth for the wind?
Oyo mpe ezali lisusu pasi oyo epesaka mawa: ndenge moto ayaki, ndenge mpe akozonga. Bongo litomba na ye ezali nini? Asali kaka mpo na mopepe?
17 All his days also he eateth in darkness, and he hath much vexation and sickness and wrath.
Alekisi mikolo nyonso ya bomoi na ye kati na molili, na pasi, na komitungisa mpe na kanda.
18 Behold that which I have seen: it is good, yea, it is comely for one to eat and to drink, and to enjoy pleasure for all his labour, wherein he laboureth under the sun, all the days of his life which God hath given him; for this is his portion.
Mpo na yango, tala likambo oyo ngai namoni ete ezali malamu: ebongi na moto kolia, komela mpe kosepela na mbuma ya mosala na ye na se ya moyi, na mikolo ya bomoi oyo Nzambe apesi ye, pamba te yango nde libula na ye.
19 Every man also to whom God hath given riches and wealth, and hath given him power to eat thereof, and to take his portion, and to rejoice in his labour — this is the gift of God.
Kutu, epai na moto nyonso oyo Nzambe apesi bomengo mpe biloko ebele, bongo apesi ye lisusu makoki ya kosalela yango, ya kozwa libula na ye mpe ya kosepela na mbuma ya mosala na ye, wana ezali penza likabo ya Nzambe!
20 For let him remember the days of his life that they are not many; for God answereth him in the joy of his heart.
Nzokande, wana Nzambe akotondisa motema na ye na esengo, moto yango akosala keba te na motango ya mikolo ya bomoi na ye.

< Ecclesiastes 5 >