< 2 Kings 9 >

1 And Elisha the prophet called one of the sons of the prophets, and said unto him: 'Gird up thy loins, and take this vial of oil in thy hand, and go to Ramoth-gilead.
Elize abengisaki moko kati na bayekoli ya basakoli mpe alobaki na ye: « Kanga mokaba na yo, zwa molangi oyo ya mafuta mpe kende na Ramoti ya Galadi.
2 And when thou comest thither, look out there Jehu the son of Jehoshaphat the son of Nimshi, and go in, and make him arise up from among his brethren, and carry him to an inner chamber.
Tango okokoma kuna, luka Jewu, mwana mobali ya Jozafati mpe koko ya Nimishi. Kende epai na ye, benda ye pembeni, mosika ya baninga na ye, mpe mema ye na shambre ya kati.
3 Then take the vial of oil, and pour it on his head, and say: Thus saith the LORD: I have anointed thee king over Israel. Then open the door, and flee, and tarry not.'
Bongo okozwa molangi, okosopa mafuta na moto na ye mpe okoloba: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Napakoli yo mafuta oyo mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele. › Sima, okofungola ekuke mpe okokima; kozela te! »
4 So the young man, even the young man the prophet, went to Ramoth-gilead.
Boye elenge mobali, mosakoli, akendeki na Ramoti ya Galadi.
5 And when he came, behold, the captains of the host were sitting; and he said: 'I have an errand to thee, O captain.' And Jehu said: 'Unto which of us all?' And he said: 'To thee, O captain.'
Tango akomaki, akutaki bakonzi ya mampinga bavandi kati na lisanga. Alobaki: — Nazali na sango mpo na yo mokonzi. Jewu atunaki: — Mpo na nani kati na biso? Mosakoli azongisaki: — Mpo na yo mokonzi.
6 And he arose, and went into the house; and he poured the oil on his head, and said unto him: 'Thus saith the LORD, the God of Israel: I have anointed thee king over the people of the LORD, even over Israel.
Jewu atelemaki mpe akotaki na ndako. Bongo mosakoli apakolaki mafuta na moto ya Jewu mpe alobaki: « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Napakoli yo mafuta oyo mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele, bato ya Yawe. ›
7 And thou shalt smite the house of Ahab thy master, that I may avenge the blood of My servants the prophets, and the blood of all the servants of the LORD, at the hand of Jezebel.
Osengeli koboma libota ya Akabi, mokonzi na yo, mpe nakozongisa mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na ngai, basakoli, mpe ya bawumbu nyonso ya Yawe, oyo Jezabeli asopaki makila na bango.
8 For the whole house of Ahab shall perish; and I will cut off from Ahab every man-child, and him that is shut up and him that is left at large in Israel.
Solo, libota nyonso ya Akabi esengeli kokufa. Nakosilisa mibali nyonso kati na Isalaele, ezala mowumbu to monsomi.
9 And I will make the house of Ahab like the house of Jeroboam the son of Nebat, and like the house of Baasa the son of Ahijah.
Nakosala libota ya Akabi ndenge nasalaki libota ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mpe libota ya Baesha, mwana mobali ya Ayiya.
10 And the dogs shall eat Jezebel in the portion of Jezreel, and there shall be none to bury her.' And he opened the door, and fled.
Nzokande mpo na Jezabeli, bambwa ekolia ye kati na bilanga ya Jizireyeli, mpe moto moko te akokunda ye. » Boye mosakoli afungolaki ekuke mpe akimaki.
11 Then Jehu came forth to the servants of his lord; and one said unto him: 'Is all well? wherefore came this mad fellow to thee?' And he said unto them: 'Ye know the man and what his talk was.'
Tango Jewu abimaki mpe azongaki epai ya baninga na ye, bakonzi ya basoda, moko kati na bango atunaki ye: — Boni, makambo nyonso ezali malamu? Mpo na nini moto ya liboma oyo ayaki epai na yo? Jewu azongisaki: — Boyebi malamu moto yango mpe lolenge ya makambo oyo alobaka.
12 And they said: 'It is false; tell us now.' And he said: 'Thus and thus spoke he to me, saying: Thus saith the LORD: I have anointed thee king over Israel.'
Bakonzi ya basoda balobaki: — Ezali ya solo te, ozali kokosa biso! Yebisa biso makambo yango. Jewu alobaki: — Boyoka ndenge alobi na ngai: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Napakoli yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele. › »
13 Then they hastened, and took every man his garment, and put it under him on the top of the stairs, and blew the horn, saying: 'Jehu is king.'
Tango kaka bayokaki bongo, bakonzi ya basoda bakamataki na lombangu bakazaka na bango mpe batandaki yango liboso ya Jewu, na binyatelo ya ematelo. Bongo babetaki kelelo mpe bagangaki: « Jewu azali mokonzi! »
14 So Jehu the son of Jehoshaphat the son of Nimshi conspired against Joram. — Now Joram had been guarding Ramoth-gilead, he and all Israel, because of Hazael king of Aram;
Jewu, mwana mobali ya Jozafati, koko ya Nimishi, asalelaki Yorami likita. Nzokande Yorami mpe Isalaele mobimba bazalaki kobundela Ramoti ya Galadi liboso ya Azaeli, mokonzi ya Siri.
15 but king Joram was returned to be healed in Jezreel of the wounds which the Arameans had given him, when he fought with Hazael king of Aram. — And Jehu said: 'If this be your mind, then let none escape and go forth out of the city, to go to tell it in Jezreel.'
Kasi mokonzi Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bato ya Arami bazokisaki ye na bitumba na Azaeli, mokonzi ya Siri. Jewu alobaki: « Soki yango ezali makanisi na bino, tika ete moto moko te akima mpe abima na engumba mpo na kokende kopesa sango na Jizireyeli. »
16 So Jehu rode in a chariot, and went to Jezreel; for Joram lay there. And Ahaziah king of Judah was come down to see Joram.
Boye Jewu amataki na shar na ye mpe akendeki na Jizireyeli mpo ete Yorami azalaki kopema kuna; mpe Akazia, mokonzi ya Yuda, akendeki kotala ye.
17 Now the watchman stood on the tower in Jezreel, and he spied the company of Jehu as he came, and said: 'I see a company.' And Joram said: 'Take a horseman, and send to meet them, and let him say: Is it peace?'
Tango mokengeli oyo azalaki na likolo ya ndako molayi ya Jizireyeli amonaki mampinga ya Jewu kopusana, agangaki: « Nazali komona mampinga, bazali koya! » Yorami apesaki mitindo: — Bopona soda moko oyo abundaka likolo ya mpunda mpe botinda ye mpo ete akende kokutana na bango mpe atuna bango: « Boni, boyei mpo na kimia? »
18 So there went one on horseback to meet him, and said: 'Thus saith the king: Is it peace?' And Jehu said: 'What hast thou to do with peace? turn thee behind me.' And the watchman told, saying: 'The messenger came to them, but he cometh not back.'
Soda oyo abundaka likolo ya mpunda akendeki mpe atunaki: — Tala makambo oyo mokonzi alobi: « Boni, boyei mpo na kimia? » Jewu azongisaki: — Okokende na kimia wapi? Baluka mpe kota na molongo na ngai. Mokengeli alobaki: — Motindami akomi epai na bango, kasi azali kozonga te.
19 Then he sent out a second on horseback, who came to them, and said: 'Thus saith the king: Is it peace?' And Jehu answered: 'What hast thou to do with peace? turn thee behind me.'
Boye mokonzi atindaki soda mosusu oyo abundaka likolo ya mpunda. Tango akomaki epai na bango, alobaki: — Boni, boyei mpo na kimia? Jewu azongisaki: — Okokende na kimia wapi? Baluka mpe kota na molongo na ngai.
20 And the watchman told, saying: 'He came even unto them, and cometh not back; and the driving is like the driving of Jehu the son of Nimshi; for he driveth furiously.'
Mokengeli alobaki: — Motindami akomi penza epai na bango, kasi ye mpe azali kozonga te. Nzokande, lolenge oyo ya kotambolisa ezali lokola ya Jewu, mwana mobali ya Nimishi, oyo atambolisaka lokola moto ya liboma.
21 And Joram said: 'Make ready.' And they made ready his chariot. And Joram king of Israel and Ahaziah king of Judah went out, each in his chariot, and they went out to meet Jehu, and found him in the portion of Naboth the Jezreelite.
Yorami apesaki mitindo: « Bongisa shar na ngai. » Tango babongisaki shar, Yorami, mokonzi ya Isalaele, mpe Akazia, mokonzi ya Yuda, babimaki, moto na moto likolo ya shar na ye, mpo na kokende kokutana na Jewu. Bakutanaki na ye kati na bilanga ya Naboti, moto ya Jizireyeli.
22 And it came to pass, when Joram saw Jehu, that he said: 'Is it peace, Jehu?' And he answered: 'What peace, so long as the harlotries of thy mother Jezebel and her witchcrafts are so many?'
Tango kaka Yorami amonaki Jewu, atunaki ye: — Boni Jewu, oyei mpo na kimia? Jewu azongisaki: — Ndenge nini kimia ekoki kozala na tango losambo ya banzambe ya bikeko mpe kindoki ya mama na yo, Jezabeli, ezali kokoba?
23 And Joram turned his hands, and fled, and said to Ahaziah: 'There is treachery, O Ahaziah.'
Yorami abalukaki mpe akimaki; abelelaki Akazia: « Akazia, bateki biso! »
24 And Jehu drew his bow with his full strength, and smote Joram between his arms, and the arrow went out at his heart, and he sunk down in his chariot.
Boye Jewu abendaki tolotolo mpe abetaki Yorami na kati-kati ya mapeka. Tolotolo etobolaki motema na ye, mpe akweyaki wuta na shar na ye.
25 Then said Jehu to Bidkar his captain: 'Take up, and cast him in the portion of the field of Naboth the Jezreelite; for remember how that, when I and thou rode together after Ahab his father, the LORD pronounced this burden against him:
Jewu alobaki na Bidikari, soda oyo amemelaka ye bibundeli: « Kamata ye mpe bwaka ye na bilanga ya Naboti, moto ya Jizireyeli. Kanisa ndenge nini ngai na yo tozalaki kokumba bashar elongo, na sima ya tata na ye, Akabi, tango Yawe apesaki lisakoli oyo na tina na ye:
26 Surely I have seen yesterday the blood of Naboth, and the blood of his sons, saith the LORD; and I will requite thee in this plot, saith the LORD. Now therefore take and cast him into the plot of ground, according to the word of the LORD.'
‹ Lobi, namonaki makila ya Naboti mpe ya bana na ye ya mibali, › elobi Yawe, mpe solo, nakofutisa yo yango na bilanga oyo, » elobi Yawe. Sik’oyo, kamata ye mpe bwaka ye na bilanga wana, kolanda Liloba na Yawe.
27 But when Ahaziah the king of Judah saw this, he fled by the way of the garden-house. And Jehu followed after him, and said: 'Smite him also in the chariot'; and they smote him at the ascent of Gur, which is by Ibleam. And he fled to Megiddo, and died there.
Tango Akazia, mokonzi ya Yuda, amonaki makambo oyo esalemaki, akimaki na nzela ya Beti-Agani. Jewu alandaki ye mpe agangaki: « Boma ye mpe lokola! » Bazokisaki ye kati na shar na ye na nzela ya Guri, pembeni ya Yibileayimi, kasi akimaki na Megido mpe akufaki kuna.
28 And his servants carried him in a chariot to Jerusalem, and buried him in his sepulchre with his fathers in the city of David.
Basali na ye bamemaki ye na shar kino na Yelusalemi mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na kunda na ye kati na engumba ya Davidi.
29 And in the eleventh year of Joram the son of Ahab began Ahaziah to reign over Judah.
Akazia akomaki mokonzi ya Yuda na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Yorami, mwana mobali ya Akabi.
30 And when Jehu was come to Jezreel, Jezebel heard of it; and she painted her eyes, and attired her head, and looked out at the window.
Jewu akendeki na Jizireyeli. Tango Jezabeli ayokaki bongo, atiaki monzele na elongi na ye, abongisaki suki na ye mpe apusanaki pene ya lininisa mpo na kotala libanda.
31 And as Jehu entered in at the gate, she said: 'Is it peace, thou Zimri, thy master's murderer?'
Tango Jewu akotaki na ekuke ya engumba, Jezabeli atunaki na koganga: — Zimiri, mobomi ya nkolo na yo, boni, oyei mpo na kimia?
32 And he lifted up his face to the window, and said: 'Who is on my side? who?' And there looked out to him two or three officers.
Jewu atombolaki miso na ngambo ya lininisa mpe agangaki: — Nani kati na bino azali na ngambo na ngai, nani? Bakengeli mibale to misato ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, batalaki Jewu wuta na lininisa.
33 And he said: 'Throw her down.' So they threw her down; and some of her blood was sprinkled on the wall, and on the horses; and she was trodden under foot.
Jewu apesaki bango mitindo: — Bobwaka ye na se. Bongo babwakaki Jezabeli na se; mpe makila na ye epanzanaki na mir mpe na bampunda tango ezalaki konyata ye.
34 And when he was come in, he did eat and drink; and he said: 'Look now after this cursed woman, and bury her; for she is a king's daughter.'
Jewu akotaki, aliaki, amelaki mpe alobaki: « Bobongisa mwasi oyo alakelama mabe. Bokunda ye, pamba te azali mwana mwasi ya mokonzi. »
35 And they went to bury her; but they found no more of her than the skull, and the feet, and the palms of her hands.
Kasi tango babimaki mpo na kokunda ye, bakutaki kaka mokuwa ya moto na ye, makolo mpe matandu ya maboko na ye.
36 Wherefore they came back, and told him. And he said: 'This is the word of the LORD, which He spoke by His servant Elijah the Tishbite, saying: In the portion of Jezreel shall the dogs eat the flesh of Jezebel;
Bazongaki mpe bayebisaki Jewu: « Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosali na Ye, Eliya, moto ya mboka Tishibe: ‹ Bambwa ekolia nzoto ya Jezabeli kati na elanga ya Jizireyeli.
37 and the carcass of Jezebel shall be as dung upon the face of the field in the portion of Jezreel; so that they shall not say: This is Jezebel.'
Ebembe ya Jezabeli ekozala lokola nyei kati na bilanga ya Jizireyeli mpo ete moto moko te akoka lisusu koloba: Tala Jezabeli! › »

< 2 Kings 9 >