< Nahum 1 >

1 A prophecy about Nineveh: the scroll of the vision that came to Nahum the Elkoshite.
Lisakoli na tina na engumba Ninive. Buku ya emoniseli ya Naumi, moto ya engumba Elikoshi.
2 The Lord is a jealous and avenging God—the Lord God is avenging and angry. The Lord takes vengeance on his enemies, he is angry with those who are hostile to him.
Yawe azali Nzambe oyo atonda na zuwa, oyo azongisaka mabe na mabe. Yawe azongisaka mabe na mabe mpe atombokaka makasi. Yawe azongisaka mabe na mabe epai ya banguna na Ye, akangelaka bayini na Ye kanda makasi.
3 The Lord is slow to become angry, has great power, and will not leave the guilty unpunished. He walks among the whirlwind and the storm; the clouds are like dust beneath his feet.
Yawe asilikaka noki te, mpe nguya na Ye ezali monene. Yawe atikaka te moto oyo asali mabe lokola nde asali na ye mabe te, kasi apesaka etumbu na moto oyo asali mabe. Yawe apasolaka nzela na Ye kati na ekumbaki, kati na mopepe makasi.
4 He commands the sea and makes it dry; he dries up all the rivers. Bashan and Carmel wither; the blossom of Lebanon fades.
Agangelaka ebale monene mpe akawusaka yango, akawusaka bibale nyonso. Etuka ya Bashani mpe ya Karimeli esili nyonso kokawuka, mpe matiti nyonso ya Libani esili kokawuka.
5 Mountains quake in his presence; hills melt away. The earth trembles before him—the whole world and everyone who lives there.
Bangomba milayi eninganaka liboso na Ye, mpe bangomba mikuse epanzanaka. Mabele, mokili mpe bavandi na yango balengaka liboso na Ye.
6 Who can withstand his fury? Who can endure the heat of his anger? His rage pours out like molten fire; he shatters rocks to pieces.
Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki? Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli? Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto, bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.
7 The Lord is good, a place of safety in a time of trouble. He takes care of those who place their trust in him,
Yawe azali malamu, azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.
8 but those who oppose him will be swept away by a tremendous flood to their destruction. He pursues his enemies into the darkness of death.
Akobebisa engumba na Ye nyonso na mpela mpe akobengana banguna na Ye kino kati na molili.
9 Why are you plotting against the Lord? He will end it completely; misery won't arise twice.
Likita ya ndenge nini bakoki kosalela Yawe? Azali Ye oyo asilisaka makambo nyonso; pasi ekoya lisusu te.
10 They entangle themselves like people caught in thorn bushes; they are like drunks full of drink. They will be completely burned up like dry straw.
Bakokoma lokola bato oyo bazali kati na banzube, lokola bato oyo balangwe masanga ya vino; bakozikisama nye lokola matiti ya kokawuka.
11 One of you is plotting evil against the Lord, someone who is planning wickedness.
Ezali kati na yo Ninive nde moto oyo azali na mabongisi mabe mpo na kotelemela Yawe mpe azali na batoli ya mabe abimi.
12 This is what the Lord says: Even though they are strong and numerous, they will be cut down and they will pass away. Though I have caused you trouble, I will not do so anymore.
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Ata banguna na bino bazali ebele mpe makasi, bakosila kokufa mpe kolimwa. Oh mokili ya Yuda, soki nasambwisaki yo, nakosala yango lisusu te.
13 Now I will break their yoke from your necks and tear away the chains which bind you.
Nakobuka ekangiseli na bango, oyo ezali na kingo na yo mpe nakolongola yo na minyololo. »
14 This is what the Lord has ordered concerning you. You will have no descendants to carry on your name. I will destroy the gods in your temples, all the wooden and metal idols. I am digging your grave, for you are depraved.
Kasi Yawe azwi mokano oyo mpo na yo: « Okotikala kozwa lisusu bakitani te oyo bakobatela kombo na yo na bokonzi. Nakolongola kati na tempelo na yo banzambe na yo ya bikeko mpe bikeko nyonso oyo basala na bibende balekisa na moto. Nazali kobongisela yo kunda, pamba te ozali na yo pamba. »
15 Look! A messenger is coming over the mountains, bringing good news and proclaiming peace. Judah, celebrate your religious festivals and keep your vows, for never again will wicked enemies invade your land—they will be completely destroyed.
Botala kuna na bangomba makolo ya momemi sango malamu: amemi sango ya kimia! Oh mokili ya Yuda, sepela na bafeti na yo mpe kokisa ndayi na yo; pamba te wuta sik’oyo, moto mabe moko te akokota lisusu epai na yo; pamba te bango nyonso bakobebisama nye.

< Nahum 1 >