< Genesis 4 >

1 Adam slept with his wife Eve and she became pregnant. She gave birth to Cain, and said, “With the Lord's help I have made a man.”
Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki: « Nasali moto na lisungi ya Yawe. »
2 Later she gave birth to his brother Abel. Abel became a shepherd, while Cain was a crop farmer.
Sima na yango, abotaki lisusu Abele, ndeko ya Kayina. Abele akomaki kobokola bibwele mpe Kayina akomaki kosala bilanga.
3 Sometime later Cain brought some of the produce he'd grown as an offering to the Lord.
Sima na mwa tango, Kayina amemaki mbuma ya mabele mpo na kobonzela Yawe.
4 Abel also brought an offering: the firstborn lambs of his flock, selecting the very best parts to offer. The Lord was pleased with Abel and his offering,
Abele, ye mpe amemaki bibwele oyo ebotamaki liboso kati na etonga na ye mpe biteni oyo eleki mafuta. Yawe asepelaki na Abele mpe na makabo na ye,
5 but he wasn't pleased with Cain and his offering, which made Cain very angry and he frowned in annoyance.
kasi asepelaki te na Kayina mpe na makabo na ye. Bongo, Kayina asilikaki makasi mpe elongi na ye ekomaki mawa-mawa.
6 The Lord said to Cain, “Why are you so angry? Why do you look so annoyed?
Yawe alobaki na Kayina: — Mpo na nini osiliki? Mpo na nini elongi na yo ekomi mawa-mawa?
7 If you were doing what's right, then you'd be looking happy. But if you don't do what's right, then sin will be like animal crouching outside your home, ready to pounce on you. It wants to have you, but you must be the one in control.”
Boni, soki osali malamu, bakondima yo te? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi; kasi yo, longa yango.
8 Later, when Cain was talking with his brother Abel they went out into the fields where Cain attacked his brother and killed him.
Kayina alobaki na Abele, ndeko na ye. Wana bazalaki kati na bilanga, Kayina akangaki Abele, ndeko na ye, mpe abomaki ye.
9 “Where is your brother Abel?” the Lord asked Cain. “How should I know?” he replied. “Am I supposed to be my brother's care-giver?”
Yawe atunaki Kayina: — Wapi ndeko na yo Abele? Kayina azongisaki: — Nayebi te. Boni, ngai nazali mokengeli ya ndeko na ngai?
10 “What have you done?” the Lord asked. “Your brother's blood is crying out to me from the ground.
Nzambe alobaki: — Osali nini? Likambo nini penza osali? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai.
11 Consequently you are more cursed than the ground because you soaked it with your brother's blood.
Sik’oyo, olakelami mabe mpe obwakami mosika ya mabele oyo efungolaki monoko na yango mpo na komela makila ya ndeko na yo, oyo maboko na yo esopaki.
12 When you cultivate the ground, it won't produce crops for you. You'll be always on the run, wandering all over the earth.”
Tango okobalola mabele, ekobotela yo mbuma te. Okozala koyengayenga mpe kotelengana na mokili.
13 “My punishment is more than I can take,” Cain replied.
Kayina alobaki na Yawe: — Etumbu na ngai eleki pasi mpo na komema!
14 “Look! You're driving me away right now—cursing the ground and banishing me from your presence. I'm going to have to hide and always be on the run, left to wander all over the earth. Anyone who finds me is going to kill me!”
Tala, obwaki ngai lelo mosika ya mabele; nasengeli sik’oyo kobombama liboso na Yo, nakokoma koyengayenga mpe kotelengana na mokili, mpe moto nyonso oyo akomona ngai akoboma ngai.
15 But the Lord replied, “No, Cain. Anyone who kills you will be punished seven times over.” The Lord placed a mark on Cain so that no one who came across him would kill him.
Kasi Yawe alobaki na ye: — Ezali bongo te! Soki moto abomi Kayina, bakozongisa mabe mpo na Kayina mbala sambo. Mpe Yawe atiaki elembo na nzoto ya Kayina na tina ete moto oyo akokutana na ye aboma ye te.
16 So Cain left the Lord's presence and went to live in a land called Nod, east of Eden.
Kayina alongwaki liboso ya Yawe, akendeki kovanda na mokili ya Nodi, na este ya Edeni.
17 Cain slept with his wife and she became pregnant. She had a son named Enoch. At that time Cain was building a town, so he named it after his son Enoch.
Kayina asangisaki nzoto na mwasi na ye; mpe mwasi na ye akomaki na zemi, bongo abotaki Enoki. Kayina atongaki engumba. Apesaki yango kombo « Enoki, » kombo ya mwana na ye ya mobali.
18 Enoch had a son named Irad. Irad was the father of Mehujael, Mehujael was the father of Methushael, and Methushael was the father of Lamech.
Enoki abotaki Iradi; Iradi abotaki Mewuyayeli; Mewuyayeli abotaki Metusaeli; Metusaeli abotaki Lemeki.
19 Lamech married two women. The first was named Adah, and the second was named Zillah.
Lemeki abalaki basi mibale: moko, kombo na ye ezalaki « Ada, » mpe mosusu, « Tsila. »
20 Adah had a son named Jabal. He was the father of those who live in tents and have livestock.
Ada abotaki Yabali, koko ya bavandi ya bandako ya kapo mpe ya babokoli bibwele.
21 He had a brother named Jubal; he was the father of all those who play stringed and wind instruments.
Ndeko na ye ya mobali, Yubali, azalaki koko ya bato oyo babetaka lindanda mpe flite.
22 Zillah also had a son. He was named Tubal-cain and he was a blacksmith, making different kinds of tools out of bronze and iron. Tubal-cain's sister was named Naamah.
Tsila mpe abotaki mwana mobali, Tubali-Kayina, oyo azalaki kosala bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende. Tubali-Kayina azalaki na ndeko mwasi, kombo na ye ezalaki « Naama. »
23 At one time Lamech told his wives, “Adah and Zillah, listen to me. You wives of Lamech, pay attention to what I have to say. I killed a man because he wounded me; I killed a young man because he injured me.
Lemeki alobaki na basi na ye: « Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu; bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu: Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki moto; mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali!
24 If the sentence for killing Cain was to be punished seven times over, then if someone kills me, Lamech, the punishment should be seventy-seven times.”
Solo, bakozongisa mbala sambo mabe oyo basali Kayina; kasi mpo na Lemeki, ekozala mbala tuku sambo na sambo! »
25 Adam slept with his wife again, and she had a son and named him Seth, explaining that, “God has given me another child to replace Abel, the one Cain killed.”
Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki: « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. »
26 Later Seth had a son named Enosh, because at that time people began to worship the Lord by name.
Seti mpe abotaki mwana mobali, apesaki ye kombo « Enoshi. » Ezalaki na tango wana nde bato bakomaki kobelela Kombo ya Yawe.

< Genesis 4 >