< Ezekiel 40 >

1 At the beginning of the year, on the tenth day of the month of the twenty-fifth year of our exile, (fourteenth years after Jerusalem had been captured), was the exact day that the Lord's power came over me and he took me there to the city.
Na mokolo ya zomi ya sanza ya liboso, sima na biso kokokisa mibu tuku mibale na mitano wuta tango tokendeki na bowumbu, na ebandeli ya mobu, ezalaki mobu ya zomi na minei sima na kobebisama ya engumba Yelusalemi, kaka na mokolo wana, loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai, mpe amemaki ngai kuna.
2 God took me to the country of Israel in vision and set me down on a very high mountain. On the south side of the mountain there were buildings that seemed to be a city.
Na nzela ya bimoniseli, Nzambe amemaki ngai kati na Isalaele mpe atiaki ngai na likolo ya ngomba moko ya molayi makasi; mpe na likolo ya ngomba yango, na ngambo ya sude, ezalaki na bandako batonga lokola engumba.
3 When he took me there I saw a man who looked like shining bronze. He was holding a linen cord and a measuring rod as he stood in the entrance way.
Tango amemaki ngai kuna, namonaki moto moko oyo lolenge na ye ezalaki lokola ebende ya bronze: atelemaki na ekuke ya engumba mpe asimbaki na loboko na ye singa moko ya lino mpe libaya oyo bamekelaka molayi.
4 “Son of man,” he told me, “watch with your eyes, listen with your ears. Concentrate on everything I'm about to show you, because that's the reason you were brought here. You are to explain to the people of Israel what you've been shown, everything you see.”
Moto yango alobaki na ngai: « Mwana na moto, tala na miso na yo mpe yoka na matoyi na yo! Sala keba na makambo nyonso oyo nakolakisa yo, pamba te ezali mpo na kolakisa yo yango nde namemaki yo na esika oyo. Yebisa libota ya Isalaele makambo nyonso oyo okomona. »
5 I could see a wall that surrounded the Temple. The measuring rod the man was holding was six long cubits in length (a long cubit is a cubit plus a handbreadth). He measured the wall as six cubits thick and six cubits high.
Tala makambo oyo namonaki: mir moko ezingelaki lopango mobimba ya Tempelo. Kati na loboko ya moto yango, ezalaki na libaya oyo bamekelaka molayi: ezalaki na bametele pene misato na molayi. Tango amekaki yango, amonaki ete monene na yango mpe bosanda na yango ezalaki ya kokokana, ezalaki na bametele pene misato.
6 Then he went up the steps of the east-facing gate. He measured the gate's threshold as six cubits deep.
Akendeki na ekuke oyo etala na ngambo ya este, amataki na bibutelo na yango mpe amekaki molayi ya ekotelo ya ekuke: mokuse mpe molayi na yango ezalaki na bametele pene misato.
7 Beyond that were alcoves that measured six cubits by six cubits, with five cubits between the alcoves. The threshold of the inside entrance facing the porch measured six cubits.
Longwa na ekotelo kino na Tempelo, ezalaki na bandako mike ya bakengeli: misato na ngambo ya loboko ya mwasi mpe misato na ngambo ya loboko ya mobali; molayi na yango mpe mokuse na yango ezalaki na bametele pene misato. Molayi oyo ekabolaki ndako moko ya bakengeli mpe ndako mosusu ezalaki na bametele pene misato. Longwa na ekotelo ya ekuke oyo elandaki kino na ndako moke ya kokotela oyo etalana na Tempelo, ezalaki na bametele pene misato.
8 Then he measured the entrance porch.
Amekaki molayi ya ndako moke ya kokotela na ekuke na libaya oyo bamekelaka molayi:
9 It was eight cubits deep, and its posts were two cubits thick. The entrance porch faced the Temple.
ezalaki na bametele pene minei. Makonzi na yango ezalaki pene na metele moko na monene; ndako moke ya kokotela ezalaki etala na ngambo ya Tempelo.
10 There were three alcoves on each side of the east gate entrance that all measured the same. The posts on each side also measured the same.
Ezalaki na bandako mike misato ya bakengeli, ngambo na ngambo, na ngambo ya ekuke ya este; bandako mike nyonso misato ezalaki ekokana, mpe molayi oyo ekabolaki ndako moko ya bakengeli na ndako mosusu, ngambo na ngambo, ezalaki mpe ekokana.
11 He measured the width of the entrance gateway as ten cubits. It was thirteen cubits long.
Amekaki molayi ya ekuke: mokuse na yango ezalaki na bametele pene mitano, mpe molayi na yango ezalaki na bametele pene motoba na basantimetele tuku mitano.
12 A wall one cubit high was in front of alcove, and the alcoves measured six cubits by six cubits.
Liboso ya ndako moko na moko ya bakengeli, na bangambo nyonso mibale, ezalaki na mwa mir moko oyo ezalaki na bosanda ya basantimetele pene tuku mitano, mpe ngambo moko na moko ya bandako nyonso ya bakengeli ezalaki na bametele pene misato.
13 Then he measured the entrance gateway from the roof of one alcove to the roof of the one opposite. It was twenty-five cubits from one doorway to the opposite doorway.
Amekaki molayi ya ekuke, longwa na suka ya mir ya sima ya ndako moko ya bakengeli kino na suka ya mir ya sima ya ndako ya bakengeli mosusu oyo etalana na yango, molayi na yango ezalaki na bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano, longwa na suka moko kino na suka mosusu.
14 Then he measured the distance between the posts as sixty cubits. The gateway led all the way around to the courtyard.
Amekaki lisusu molayi ya bandako mike nyonso misato ya bakengeli elongo na molayi oyo ezalaki kokabola ndako moko ya moke mpe ndako mosusu: nyonso esalaki bametele pene zomi na mitano, longola veranda na yango.
15 It was fifty cubits from the gateway entrance to the far side of the inside porch.
Longwa na ebandeli ya ekuke kino na suka ya ndako moke ya kokotela, ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano.
16 The alcoves and their pillars had narrow windows on all of the inside of the gateway. The porches also had windows on all of the inside. All the posts were decorated with palm tree designs.
Bandako mike ya bakengeli elongo na makonzi na yango ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda. Na likonzi moko na moko, basalaki bililingi ya banzete ya mbila.
17 He took me into the outer courtyard. I saw rooms and a pavement had been constructed around the courtyard. There were thirty rooms facing the pavement.
Amemaki ngai lisusu kati na lopango ya libanda. Kuna, namonaki bashambre mpe mabanga moko babongisa malamu penza, na mabele ya lopango mobimba; na likolo ya mabanga oyo babongisa malamu, ezalaki na bashambre tuku misato.
18 This was termed the lower pavement and it extended along the sides of the gateways and was the same length as them.
Mabanga yango ezalaki suka na suka ya bikuke, mpe molayi na yango ezalaki ekokana na molayi ya bikuke.
19 He measured the distance from the front of the lower gateway to the far side of the inner courtyard as one hundred cubits, both to the east side and the north.
Amekaki molayi ya liboso ya ekuke ya se kino na liboso ya ekuke ya lopango ya kati: ezalaki na bametele pene tuku mitano na ngambo ya este.
20 He also measured the length and width of the gateway of the outer courtyard that faced north.
Bongo na ngambo ya nor, amekaki molayi mpe mokuse ya ekuke oyo etala na ngambo ya nor, ekuke oyo ememaka kino na lopango ya libanda.
21 Its three alcoves on both sides, its posts, and its porch all measured the same as the first gateway and was fifty cubits long and twenty-five cubits wide.
Ezalaki na bandako na yango ya mike ya bakengeli: misato na ngambo moko mpe misato na ngambo mosusu. Makonzi na yango mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki ndenge moko na ekuke ya liboso, na molayi mpe na mokuse: ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
22 Its windows, porch, and palm tree decorations were the same as those of the east-facing gate. It had seven steps leading up to it, with its porch facing them.
Maninisa na yango, ndako na yango ya moke ya kokotela mpe bililingi na yango ya banzete ya mbila ezalaki ndenge moko na oyo ya ekuke ya ngambo ya este, na molayi mpe na mokuse. Mpo na kokota na ekuke yango, bazalaki komata na ematelo ya bibutelo sambo oyo ezalaki etalana na ndako moke ya kokotela.
23 There was an entrance to the inner courtyard facing the north gate, just like the east gate. He measured the distance from the entrance to the gate as a hundred cubits.
Ezalaki mpe lisusu na ekuke moko kati na lopango oyo ezalaki etalana na ekuke ya ngambo ya nor, ndenge kaka ezalaki na ngambo ya este. Amekaki molayi, longwa na ekuke ya liboso kino na ekuke oyo ezalaki etalana na yango: ezalaki na bametele pene tuku mitano.
24 He took me to the south side, and I saw a gateway that faced south. He measured its posts and its porch, and they measured the same as those previously.
Amemaki ngai lisusu na ngambo ya sude, mpe namonaki ekuke moko oyo etala na ngambo ya sude; amekaki molayi ya makonzi mpe ya ndako na yango ya moke ya kokotela: ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe mokuse.
25 Both the gateway and its porch had windows all around it that were like the other windows. It was fifty cubits long and twenty-five cubits wide.
Ekuke mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda lokola maninisa ya bikuke mosusu: ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi mpe bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
26 It had seven steps leading up to it, and its porch faced them. It had one post on each side with palm tree designs on them.
Mpo na kokota na ekuke yango, bazalaki komata na ematelo ya bibutelo sambo oyo etalana na ndako moke ya kokotela. Bililingi ya nzete ya mbila ezalaki na makonzi na yango na bangambo nyonso.
27 The inner courtyard also had an entrance facing south, and he measured the distance from the entrance to the south gate as a hundred cubits.
Lopango ya kati ezalaki na ekuke moko etala na ngambo ya sude. Boye, amekaki molayi na yango, longwa na ekuke wana kino na ekuke ya libanda na ngambo ya sude: ezalaki bametele pene tuku mitano.
28 He took me into the inner courtyard through the south gate, and he measured the south gate. It measured the same as those previously.
Amemaki ngai na kati ya lopango ya kati, na nzela ya ekuke ya sude; amekaki molayi mpe mokuse ya ekuke ya ngambo ya sude: ezalaki ndenge moko kaka na bikuke mosusu.
29 Its alcoves, posts, and porch had the same measurements as those previously. The gateway and its porch had windows all around. It was fifty cubits long and twenty-five cubits wide.
Bandako na yango ya mike ya bakengeli, makonzi na yango mpe bandako na yango ya mike ya kokotela ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse. Ekuke mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda: ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
30 (The other surrounding porches measured twenty-five cubits long and five cubits deep.)
Bandako moke ya kokotela ya bikuke, zingazinga ya lopango, ezalaki na bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na molayi, mpe bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
31 Its porch faced the outer courtyard, and its pillars were decorated with palm tree designs. It had eight steps leading up to it.
Ndako na yango ya kokotela ezalaki etalana na lopango ya libanda. Batiaki bililingi ya banzete ya mbila na makonzi na yango mpe ematelo na yango ezalaki na bibutelo mwambe.
32 He took me to the inner courtyard on the east side. He measured the gateway and it measured the same as those previously.
Amemaki ngai lisusu na lopango ya kati, na ngambo ya este, mpe amekaki molayi ya ekuke na yango: ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse.
33 Its alcoves, posts, and porch measured the same as those previously. The gateway and its porch had windows all around. It was fifty cubits long and twenty-five cubits wide.
Bandako na yango ya mike ya bakengeli, makonzi na yango mpe ndako na yango moke ya kokotela ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse. Ekuke mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda: ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
34 Its porch faced the outer courtyard, and its posts were decorated with palm tree designs. It had eight steps leading up to it.
Ndako na yango ya kokotela ezalaki etalana na lopango ya libanda na yango; ezalaki na bililingi ya banzete ya mbila na makonzi na yango, na bangambo nyonso, mpe ematelo na yango ezalaki na bibutelo mwambe.
35 He took me to the north gate and measured it. It measured the same as those previously,
Amemaki ngai na ekuke ya ngambo ya nor mpe amekaki molayi na yango: ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse.
36 including its alcoves, posts, and porch. The gateway and its porch had windows all around. It was fifty cubits long and twenty-five cubits wide.
Bandako na yango ya mike ya bakengeli, makonzi na yango mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki mpe na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda: ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse.
37 Its porch faced the outer courtyard, and its posts were decorated with palm tree designs on all sides. It had eight steps leading up to it.
Ndako na yango ya kokotela ezalaki etalana na lopango ya libanda; batiaki bililingi ya banzete ya mbila na makonzi na yango mpe ematelo na yango ezalaki na bibutelo mwambe.
38 A room with a doorway stood beside by the porch of the inner gateways. This was where the burnt offering was washed.
Bandako nyonso ya mike ya kokotela ezalaki na shambre moko epai wapi bazalaki kosukola mbeka ya kotumba; shambre yango ezalaki etalana na makonzi ya ekuke.
39 Inside the gateway porch were two tables on both sides, where the sacrificial animals were slaughtered for burnt offerings, sin offerings, and guilt offerings.
Kati na ndako moke ya kokotela na ekuke, ezalaki na bamesa mibale, ngambo na ngambo, epai wapi bazalaki kobomela banyama mpo na mbeka ya kotumba, mbeka ya masumu mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani.
40 Outside, on the way up to the entrance of the north gateway, were two tables on one side of the gate's porch and two tables on the other side.
Pene ya mir ya libanda ya ndako moke ya kokotela na ekuke, pene ya ematelo ya ekotelo ya ekuke ya nor, ezalaki na bamesa minei na ngambo moko ya ematelo.
41 So there were four tables on the inside the of gateway and another four outside, making a total of eight tables. This is where the sacrifices were slaughtered.
Liboso ya ekuke, ezalaki na bamesa mwambe oyo bazalaki kobomela bambeka: minei na ngambo moko mpe minei na ngambo mosusu.
42 There were also four tables of cut stone for the burnt offering. They each measured one and a half cubits long, one and a half cubits wide, and a cubit high. The tools used to slaughter the burnt offerings and the other sacrifices were placed on these tables.
Ezalaki na bamesa minei oyo basala na mabanga bakata mpo na bambeka ya kotumba; bazalaki kosalela yango mpo na kotia bisalelo oyo babomelaka bambeka ya kotumba mpe bambeka mosusu. Bamesa yango nyonso ezalaki ndenge moko: na molayi, na mokuse mpe na bosanda; molayi na yango ezalaki na basantimetele pene tuku sambo na mitano, mokuse na yango ezalaki na basantimetele pene tuku sambo na mitano mpe bosanda na yango ezalaki na basantimetele tuku mitano.
43 Hooks measuring the width of a hand were attached to the walls inside the room. The meat of the offering was to be placed on the tables.
Batobolaki nzela moko ya basantimetele pene mwambe na zingazinga ya bamesa moko na moko; bazalaki kotia misuni ya bambeka na likolo ya bamesa yango.
44 Outside the inner gate but inside the inner courtyard were two rooms. One was beside the north gate and faced south; the other beside the south gate and faced north.
Na libanda ya ekuke ya kati, kati na lopango ya kati, ezalaki na bashambre mibale mpo na bayembi: moko ezalaki na ngambo ya ekuke ya nor, etalana na ngambo ya sude, mpe mosusu ezalaki na ngambo ya ekuke ya sude, etalana na ngambo ya nor.
45 The man told me: “The room that faces south is for the priests in charge of the Temple,
Moto yango alobaki na ngai: « Shambre oyo etala na ngambo ya sude ezali mpo na Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala na Tempelo;
46 and the room that faces north is for the priests in charge of the altar. These priests are the descendants of Zadok and are the only Levites who are allowed to come near to the Lord and minister before him.”
mpe shambre oyo etala na ngambo ya nor ezali mpo na Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala ya etumbelo. Kati na bakitani ya Levi, bana mibali ya Tsadoki kaka nde bakoki kokota na Tempelo mpo na kosala mosala liboso ya Yawe. »
47 He measured the square courtyard: a hundred cubits long and a hundred cubits wide. The altar stood in the courtyard in front of the Temple.
Amekaki molayi ya lopango: ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi mpe na mokuse. Etumbelo ezalaki liboso ya Tempelo.
48 He took me to the Temple porch and measured the pillars of the porch as five cubits on each side. The gateway was fourteen cubits wide and its sides measured three cubits.
Amemaki ngai na ndako moke ya kokotela na Tempelo mpe amekaki molayi ya makonzi na yango: ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano na bangambo nyonso; mokuse ya ekotelo ezalaki na bametele pene sambo, mpe bamir na yango ya mipanzi ezalaki na metele pene moko na basantimetele tuku mitano, ngambo na ngambo.
49 The porch was twenty cubits wide and twelve cubits deep, and had ten steps leading up to it. There were columns by the posts, one on both sides.
Ndako moke ya kokotela ezalaki na bametele pene zomi na molayi, mpe motoba na mokuse. Bazalaki komata na ematelo ya bibutelo zomi mpo na kokota na ndako moke ya kokotela, na bangambo nyonso mibale. Batelemisaki likonzi moko na ngambo moko na moko ya ekotelo.

< Ezekiel 40 >