< Exodus 8 >

1 Then the Lord told Moses, “Go and see Pharaoh and say to him, ‘This is what the Lord says: Let my people go, so that they can worship me.
Sima na yango, Yawe atindaki Moyize: « Kende kokutana na Faraon mpe loba na ye: ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi: Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
2 If you refuse to let them leave, I will send a plague of frogs all over your country.
Soki oboyi kotika bango kokende, nakotinda etumbu ya magorodo na mokili na yo mobimba.
3 They will swarm out of the Nile, and they will enter your palace and get into your bedroom and jump onto your bed. They will get into the houses of your officials and jump around your people—even into your ovens and breadmaking bowls.
Nili ekotonda na magorodo; bongo magorodo yango ekobima wuta na Nili, ekokota kino na ndako na yo ya bokonzi, na shambre na yo ya kolala, na mbeto na yo, na bandako ya basali na yo, na bandako ya bato na yo, na bafulu na yo ya mapa mpe kino na bisika oyo babalolaka farine.
4 Frogs will jump all over you, your people, and all your officials.’”
Magorodo ekomatela yo, basali na yo mpe bato na yo nyonso. › »
5 The Lord said to Moses, “Tell Aaron, ‘Hold out your walking stick in your hand over the rivers and canals and ponds, and make frogs spread over Egypt.’”
Yawe alobaki na Moyize: « Loba na Aron ete asembola loboko na ye mpe lingenda na ye na ngambo ya mayi, ya miluka mpe ya maziba, mpo ete abimisa magorodo na mokili ya Ejipito. »
6 So Aaron held out his hand over the waters of Egypt, and frogs came up and covered the land.
Boye Aron asembolaki loboko na ye na ngambo ya mayi ya Ejipito; bongo magorodo ebimaki mpe etondisaki mokili ya Ejipito.
7 But the Egyptian magicians did the same thing using their magic arts. They brought up frogs in Egypt.
Kasi bato ya maji ya Ejipito mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka: bango mpe babimisaki magorodo na mokili ya Ejipito.
8 Pharaoh called for Moses and Aaron and pleaded with them, “Pray to the Lord, and ask him to take away the frogs from me and my people. Then I will let your people go so they can offer sacrifices to the Lord.”
Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango: — Bobondela Yawe ete alongola magorodo pene na ngai mpe pene ya bato na ngai; bongo nakotika bato na bino kokende kobonzela Yawe mbeka.
9 “You may have the honor of deciding when I'll pray for you, your officials, and your people that the frogs will be removed from you and your houses. They will remain only in the Nile.”
Moyize alobaki na Faraon: — Tika ete mokonzi apona tango nini nasengeli kobondela Yawe mpo na yo, basali na yo mpe bato na yo, mpo ete Yawe alongola magorodo pene na yo mpe pene ya bandako na yo; kasi etikala kaka na ebale Nili.
10 “Do it tomorrow,” Pharaoh replied. Moses said, “It will happen as you have requested so you will know that there is no one like the Lord our God.
Faraon azongisaki: — Tika ete esalema lobi. Moyize alobaki: — Iyo, ekosalema ndenge osengi, mpo oyeba ete moko te azali lokola Yawe, Nzambe na biso.
11 The frogs will leave you and your houses, your officials and your people, and they will remain only in the Nile.”
Magorodo ekolongwa pene na yo, pene na bandako na yo, ya basali na yo mpe ya bato na yo; kasi ekotikala kaka na ebale Nili.
12 Moses and Aaron left Pharaoh, and Moses pleaded with the Lord about the frogs he had sent against Pharaoh.
Sima, Moyize mpe Aron batikaki Faraon. Bongo Moyize agangaki epai na Yawe na tina na magorodo oyo atindelaki Faraon.
13 The Lord did as Moses asked. The frogs in the houses, the courtyards, and the fields died.
Yawe asalaki makambo oyo Moyize asengaki: magorodo ekufaki na bandako, na mapango mpe na bilanga.
14 The people collected them in pile upon pile, and the whole country smelled terrible.
Basangisaki yango na maboke mpe mabele elumbaki solo ya kopola.
15 But when Pharaoh realized the plague had passed he chose to become hard and stubborn again, wouldn't listen to Moses and Aaron, just as the Lord had predicted.
Kasi tango Faraon amonaki ete kimia ekoti, ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe ayokelaki te Moyize mpe Aron ndenge kaka Yawe alobaki.
16 The Lord said to Moses, “Tell Aaron, ‘Pick up your walking stick and hit the dust of the ground. The dust will become gnats swarming all over Egypt.’”
Yawe alobaki na Moyize: — Loba na Aron ete asembola lingenda na ye mpe abeta yango na putulu ya mabele; mpe yango ekokoma bangungi kati na mokili mobimba ya Ejipito.
17 They did what the Lord said. When Aaron lifted up his walking stick and hit the dust of the earth, gnats swarmed over both people and animals. The dust in the whole of Egypt turned into gnats.
Basalaki kaka ndenge wana. Tango Aron asembolaki loboko mpe lingenda na ye, abetaki yango na putulu ya mabele; bongo putulu yango ekomaki bangungi oyo ematelaki bato mpe banyama. Putulu nyonso ya mokili ya Ejipito ebongwanaki bangungi.
18 The magicians also tried to make gnats using their magic arts, but they couldn't. The gnats stayed on both people and animals.
Kasi tango bato ya maji bamekaki kobimisa bangungi na nzela ya misala na bango ya soloka, balongaki te. Bongo bangungi ematelaki bato mpe banyama.
19 “This is an act of God,” the magicians told Pharaoh. But Pharaoh chose to be stubbornly hard-hearted, and he wouldn't listen to Moses and Aaron, just as the Lord had predicted.
Boye bato ya maji balobaki na Faraon: « Oyo ezali penza mosapi ya Nzambe! » Kasi Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki koyoka, ndenge kaka Yawe alobaki.
20 The Lord told Moses, “Tomorrow morning get up early and block Pharaoh's way as he walks down to the river. Tell him, ‘This is what the Lord says: Let my people go, so that they can worship me.
Yawe alobaki na Moyize: — Lamuka na tongo-tongo mpe kende kokutana na Faraon na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Loba na ye: « Tala makambo oyo Yawe alobi: Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
21 If you don't let my people leave, I will send swarms of flies on you and your officials, and on your people and your houses. Every Egyptian house and even the ground on which they stand will be filled with swarms of flies.
Soki oboyi kotika bato na Ngai kokende, nakotinda banzinzi epai na yo, epai ya bakalaka na yo, epai ya bato na yo mpe kino na bandako na yo. Boye bandako ya bato na Ejipito, ezala mabele epai wapi bazali, ekotonda na banzinzi oyo eswaka.
22 However, on this occasion I will treat the land of Goshen differently—that's where my people live—there won't be any swarms of flies there. This is how you will know that I, the Lord, am here in your country.
Na mokolo wana, nakosala bokeseni mpo na etuka ya Gosheni epai wapi bato na Ngai bazali kovanda; banzinzi oyo eswaka ekozala kuna te, mpo oyeba ete, Ngai Yawe, nazali kati na etuka yango.
23 I will distinguish my people from your people. You will see this sign that confirms it tomorrow.”
Bongo nakotia bokeseni kati na bato na Ngai mpe bato na yo. Elembo yango ekosalema lobi. »
24 The Lord did what he had said. Huge swarms of flies swept into Pharaoh's palace and into the houses of his officials. The whole of Egypt was devastated because of these swarms of flies.
Yawe asalaki bongo: banzinzi ebele oyo eswaka ekotaki mpe epanzanaki kati na ndako ya Faraon, na bandako ya bakalaka na ye mpe kati na mokili mobimba ya Ejipito. Boye mokili ebebisamaki na banzinzi oyo eswaka.
25 Pharaoh called for Moses and Aaron and told them, “Go and offer sacrifices to your God here in this country.”
Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango: — Bokende, bobonzela Nzambe na bino mbeka kati na mokili oyo.
26 “No, that wouldn't be the right thing to do,” Moses replied. “The sacrifices we offer to the Lord our God would be offensive to Egyptians. If we went ahead and offered sacrifices offensive to Egyptians, they'd stone us!
Kasi Moyize azongisaki: — Ekoki kosalema bongo te; noki te mbeka oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, ekomonana lokola eloko ya nkele na miso ya bato ya Ejipito. Boni, soki tobonzi mbeka oyo emonani lokola eloko ya nkele na miso na bango, bakobamba biso mabanga te?
27 We must make a three-day journey into the wilderness and offer sacrifices there to the Lord our God as he has told us.”
Tosengeli kotambola mikolo misato kati na esobe, sima tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ndenge atindaki biso.
28 “I'll let you go and offer sacrifices to the Lord your God in the desert, but don't go very far,” Pharaoh answered. “Now pray for me that this plague ends.”
Faraon alobaki: — Nakotika bino kokende kobonzela Yawe, Nzambe na bino, mbeka kati na esobe; kasi bokende mosika te. Sik’oyo, bobondela mpo na ngai!
29 “As soon as I leave you, I will pray to the Lord,” Moses replied, “and tomorrow the flies will leave Pharaoh and his officials and his people. But Pharaoh should be sure not to be deceitful again and refuse to let the people go and offer sacrifices to the Lord.”
Moyize azongisaki: — Ndenge nazali kobima boye na ndako na yo, nakobondela Yawe; bongo lobi, banzinzi oyo eswaka ekolongwa epai ya Faraon, epai ya bakalaka na ye mpe epai ya bato na ye. Kasi tika ete Faraon akoba te kotiola Yawe na koboya kotika bato kokende kobonzela Yawe mbeka.
30 Moses left Pharaoh and prayed to the Lord,
Tango Moyize abimaki na ndako ya Faraon, abondelaki Yawe
31 and the Lord did as Moses asked, and removed the swarms of flies from Pharaoh and his officials and his people. Not a single fly remained.
mpe Yawe akokisaki makambo oyo Moyize asengaki: banzinzi oyo eswaka etikaki Faraon, bakalaka na ye mpe bato na ye. Ata nzinzi moko te etikalaki.
32 But once again Pharaoh chose to be stubbornly hard-hearted and would not let the people leave.
Kasi na mbala oyo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.

< Exodus 8 >