< Joel 1 >

1 The word of the Lord that came to Joel the son of Phatuel.
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Joeli, mwana mobali ya Petueli:
2 Hear this, ye old men, and give ear, all ye inhabitants of the land: did this ever happen in your days, or in the days of your fathers?
— Bino bakambi ya bato, boyoka liloba oyo; bino nyonso, bavandi ya mokili, botia matoyi mpe boyoka! Boni, likambo ya boye esila kosalema na tango na bino to mpe na tango ya bakoko na bino?
3 Tell ye of this to your children, and let your children tell their children, and their children to another generation.
Boyebisa yango epai ya bana na bino, mpe tika ete bana na bino bayebisa yango epai ya bana na bango; mpe bana na bango, na milongo ya bato oyo bakoya na sima.
4 That which the palmerworm hath left, the locust hath eaten: and that which the locust hath left, the bruchus hath eaten: and that which the bruchus hath left, the mildew hath destroyed.
Matiti oyo mampinga ya mabanki etiki, mabanki minene elie yango; oyo mabanki minene etiki, mabanki mike elie yango; oyo mabanki mike etiki, mabanki mosusu elie yango.
5 Awake, ye that are drunk, and weep, and mourn all ye that take delight in drinking sweet wine: for it is cut off from your mouth.
Bino balangwi masanga, bolamuka mpe bolela; bolela, bino nyonso bameli vino. Pamba te babotoli bino vino ya sika na bibebu.
6 For a nation is come up upon my land, strong and without number: his teeth are like the teeth of a lion: and his cheek teeth as of a lion’s whelp.
Ekolo moko ya bapaya ebundisi mokili na Ngai, ezali na nguya makasi mpe bakokoka te kotanga motango ya bato na yango. Minu na yango ezali lokola minu ya nkosi ya mobali, mpe mbanga na yango, lokola mbanga ya nkosi ya mwasi.
7 He hath laid my vineyard waste, and hath pilled off the bark of my fig tree: he hath stripped it bare, and cast it away; the branches thereof are made white.
Ekolo yango ekomisi elanga na Ngai ya vino lokola esobe mpe ekati-kati banzete na Ngai ya figi, elongoli banzete na Ngai nyonso baposo, ebwaki yango mpe etiki bitape na yango pembe.
8 Lament like a virgin girded with sackcloth for the husband of her youth.
Bosala matanga lokola elenge mwasi oyo alati pili mpo na kolela mobandami na ye.
9 Sacrifice and libation is cut off from the house of the Lord: the priests, the Lord’s ministers, have mourned:
Makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe, basali ya Nkolo, bazali na matanga.
10 The country is destroyed, the ground hath mourned: for the corn is wasted, the wine is confounded, the oil hath languished.
Bilanga ebebisami, mabele ekawuki, mbuma ya ble ezali lisusu te, vino esili mpe mafuta ezali lisusu te.
11 The husbandmen are ashamed, the vinedressers have howled for the wheat, and for the barley, because the harvest of the field is perished.
Bino basali bilanga, bozala na soni; bino baloni vino, bolela mpo na mbuma ya ble mpe ya orje, pamba te milona ebebisami.
12 The vineyard is confounded, and the fig tree hath languished: the pomegranate tree, and the palm tree, and the apple tree, and all the trees of the field are withered: because joy is withdrawn from the children of men.
Bilanga ya vino ekawuki, banzete ya figi elembi-lembi, banzete ya grenade, ya mbila mpe ya pome, banzete nyonso ya bilanga esili kokawuka. Solo, esengo ya bato esili.
13 Gird yourselves, and lament, O ye priests, howl, ye ministers of the altars: go in, lie in sackcloth, ye ministers of my God: because sacrifice and libation is cut off from the house of your God.
Oh bino Banganga-Nzambe, bolata basaki mpe bolela. Bino bato oyo bosalaka na etumbelo, bolela. Bino basali ya Nzambe na ngai, boya, bolata basaki butu mobimba. Pamba te makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Ndako ya Nzambe na bino.
14 Sanctify ye a fast, call an assembly; gather together the ancients, all the inhabitants of the land into the house of your God: and cry ye to the Lord:
Bopanza sango ya kokila bilei, bobengisa bato na mayangani ya bule, bobengisa bakambi mpe bavandi nyonso ya mokili ete baya na Ndako ya Nzambe na bino mpe bolela epai na Yawe.
15 Ah, ah, ah, for the day: because the day of the Lord is at hand, and it shall come like destruction from the mighty.
Mawa na mokolo wana! Pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene; ekoya lokola libebi oyo ewuti epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
16 Is not your food cut off before your eyes, joy and gladness from the house of our God?
Boni, wuta na Ndako ya Nzambe mpe na miso na biso, balongoli te bilei, esengo mpe kosepela?
17 The beasts have rotted in their dung, the barns are destroyed, the storehouses are broken down: because the corn is confounded.
Bankona ekawuki na se ya mabele, bibombelo etikali lisusu na eloko te, bibombelo ya bambuma ebukani mpo ete ble ezali lisusu te.
18 Why did the beast groan, why did the herds of cattle low? because there is no pasture for them: yea, and the flocks of sheep are perished.
Tika ete ngombe elela! Bibwele ekomi kotelengana, pamba te matiti ya kolia etikali lisusu te; ezala bameme to bantaba ekomi na pasi.
19 To thee, O Lord, will I cry: because fire hath devoured the beautiful places of the wilderness, and the flame hath burnt all the trees of the country.
Oh Yawe, Yo nde nazali kobelela, pamba te moto ezikisi matiti mpe banzete nyonso ya bilanga.
20 Yea and the beasts of the field have looked up to thee, as a garden bed that thirsteth after rain, for the springs of waters are dried up, and fire hath devoured the beautiful places of the wilderness.
Ezala banyama ya zamba ezali kotalela Yo, pamba te miluka ekawuki mpe moto ezikisi bilanga.

< Joel 1 >